Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 23

Bapesaki Yehova elaka

Bapesaki Yehova elaka

Sanza soki mibale nsima ya kolongwa na Ezipito, Bayisraele bakómaki na Ngomba Sinai mpe batyaki kaa wana. Yehova abengaki Moize amata na ngomba mpe alobaki na ye: ‘Nabikisaki Bayisraele. Soki batosi ngai mpe batosi mibeko na ngai, bakokóma bato na ngai mpenza.’ Moize akitaki mpe ayebisaki Bayisraele makambo Yehova alobaki. Bango balobaki nini? Balobaki ete: ‘Tokosala makambo nyonso oyo Yehova alobi.’

Moize amataki lisusu na ngomba. Kuna, Yehova alobaki: ‘Nsima ya mikolo misato, nakoloba na bino. Yebisá bato ete bámeka komata na Ngomba Sinai te.’ Moize akitaki mpe ayebisaki Bayisraele bámilɛngɛla mpo na koyoka makambo oyo Yehova akoloba.

Mikolo misato na nsima, Bayisraele bamonaki mikalikali mpe lipata ya moindo na ngomba. Bayokaki mpe lokito makasi ya nkake mpe lokito ya liseke. Na nsima, Yehova akitaki na ngomba na kati ya mɔtɔ. Bayisraele babangaki makasi mpe babandaki kolɛnga. Ngomba mobimba eninganaki makasi mpe etondaki na milinga. Lokito ya liseke ezalaki se kokóma makasi. Na nsima, Nzambe alobaki: ‘Nazali Yehova. Bosengeli kosambela banzambe mosusu te.’

Na nsima, Moize azongaki na ngomba, mpe Yehova apesaki ye mibeko mpo bato báyeba ndenge basengeli kosambela Ye mpe ndenge basengeli komitambwisa. Moize akomaki mibeko yango mpe atángelaki yango Bayisraele. Balakaki ete: ‘Tokosala makambo nyonso oyo Yehova alobi.’ Ya solo, bapesaki Nzambe elaka. Kasi batosaki yango?

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”​—Matai 22:37