Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 31

Yosua ná bato ya Gibeone

Yosua ná bato ya Gibeone

Bato ya bikólo mosusu ya Kanana bayokaki nsango ya makambo oyo esalemaki na Yeriko. Bakonzi na bango bayokanaki básangana mpo na kobundisa Bayisraele. Kasi bato ya Gibeone basalelaki mayele mosusu. Balataki bilamba ebebabebá, bayaki epai ya Yosua, mpe balobaki na ye ete: ‘Touti na mokili moko mosika. Toyoki nsango ya Yehova mpe nyonso oyo asalelaki bino na Ezipito mpe na Moabe. Pesá biso elaka ete okobundisa biso te, mpe tokokóma basaleli na yo.’

Yosua andimelaki bango mpe alakaki ete akobundisa bango te. Nsima ya mikolo misato, eyebanaki ete mokili na bango ezalaki mosika te. Bazalaki kaka bato ya Kanana. Yosua atunaki bato ya Gibeone: ‘Mpo na nini bokosaki biso?’ Balobaki: ‘Tozalaki kobanga! Toyebi ete Yehova Nzambe na bino azali kobundela bino. Bóboma biso te.’ Yosua atosaki maloba na ye mpe atikaki bango na bomoi.

Eumelaki te, bakonzi mitano ya Kanana mpe basoda na bango bayaki kobundisa bato ya Gibeone. Yosua ná basoda na ye batambolaki butubutu mpo na kobikisa bango. Etumba ebandaki na ntɔngɔntɔngɔ mpenza. Bato ya Kanana babandaki kokima bipai na bipai. Bisika nyonso oyo bakimaki, Yehova akweiselaki bango mabanga ya minene. Na nsima, Yosua asɛngaki Yehova atɛlɛmisa moi. Mpo na nini asɛngaki Yehova atɛlɛmisa moi nzokande likambo yango esalemaki naino liboso te? Mpo Yosua atyelaki Yehova motema. Moi elalaki te mokolo wana tii Bayisraele basilisaki kolonga bakonzi ya Kanana ná basoda na bango.

“Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te; mpo maloba oyo ebakisami likoló na oyo wana euti na moto mabe.”​—Matai 5:37