Maloba ya ebandeli ya Eteni 8
Yehova apambolaki Salomo; apesaki ye bwanya mingi mpe lokumu monene ya kotonga tempelo. Kasi mokemoke Salomo atikaki Yehova. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ndenge basambeli ya lokuta bakabolaki Salomo na Nzambe. Bokonzi na ye ekabwanaki, mpe bakonzi ya mabe bamemaki ekólo na lipɛngwi mpe na losambo ya bikeko. Na ntango wana, banyokolaki mpe babomaki ebele ya basakoli ya sembo ya Yehova. Yezabele, mwasi ya mokonzi, akɔtisaki bokonzi ya nɔrdi na lipɛngwi makasi. Ezalaki eleko moko ya mpasi mpenza na Yisraele. Kasi Bayisraele mingi bazalaki kaka sembo epai ya Yehova, na ndakisa Mokonzi Yehoshafate mpe mosakoli Eliya.
NA ETENI OYO
LITEYA 44
Batongeli Yehova tempelo
Nzambe andimaki libondeli ya Salomo mpe apesaki ye mikumba monene.
LITEYA 49
Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu
Yezabele abomisaki Nabote kaka mpo azwa elanga ya vinyo na ye! Yehova amonanaki mabe mpe kozanga bosembo wana.
LITEYA 50
Yehova abundeli Yehoshafate
Yehoshafate, oyo azalaki mokonzi ya malamu, asɛngaki Nzambe asalisa ye ntango banguna bayelaki Yuda.