Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 45

Bokonzi ekabwani

Bokonzi ekabwani

Ntango nyonso oyo Salomo azalaki kosambela Yehova, Yisraele ezalaki na kimya. Kasi Salomo abalaki basi ebele ya bikólo mosusu, mpe basi yango bazalaki kosambela bikeko. Mokemoke, Salomo akómaki kosambela bikeko. Yehova ayokaki nkanda. Ayebisaki Salomo: ‘Yisraele ekolongwa na libota na yo mpe ekokabwana na ndambo mibale. Nakopesa moko ya basaleli na yo ndambo ya monene, mpe libota na yo ekoyangela kaka ndambo ya moke.’

Yehova amonisaki ekateli na ye polele na ndenge mosusu. Mokolo moko, mosaleli moko ya Salomo na nkombo Yeroboame azalaki kosala mobembo mpe akutanaki na mosakoli Ahiya na nzela. Ahiya apasolaki elamba na ye na biteni 12 mpe alobaki na Yeroboame: ‘Yehova akolongola bokonzi ya Yisraele na libota ya Salomo mpe akokabola yango na ndambo mibale. Zwá biteni zomi oyo mpo yo okozala mokonzi ya mabota zomi.’ Mokonzi Salomo ayokaki likambo yango, mpe alingaki koboma Yeroboame. Na yango, Yeroboame akimaki na Ezipito. Na nsima, Salomo akufaki mpe mwana na ye Rehoboame akómaki mokonzi. Sikoyo, Yeroboame amonaki ete akoki kozonga na Yisraele.

Mikóló ya Yisraele bayebisaki Rehoboame ete: ‘Soki osaleli bato makambo ya malamu, bakozala sembo epai na yo.’ Kasi baninga ya Rehoboame oyo bazalaki bilenge lokola ye balobaki: ‘Osengeli kozala makambo makasi! Salisá bango misala ya makasi koleka!’ Rehoboame alandaki toli ya baninga na ye bilenge. Azalaki konyokola bato, mpe bato batombokaki. Batyaki Yeroboame mokonzi ya mabota zomi, oyo ekómaki kobengama bokonzi ya Yisraele. Mabota mibale ekómaki kobengama bokonzi ya Yuda, mpe bato na yango batikalaki sembo epai ya Rehoboame. Na yango, mabota 12 ya Yisraele ekabwanaki.

Yeroboame aboyaki bato bákendaka kosambela na Yerusaleme, mpo Rehoboame nde azalaki koyangela yango. Oyebi mpo na nini? Yeroboame azalaki kobanga ete bato bábalukela ye mpe bázongela Rehoboame. Na yango, asalaki bana-ngɔmbɛ mibale ya wolo mpe alobaki na bato ete: ‘Yerusaleme eleki mosika mingi. Bokoki kosambela awa.’ Bato babandaki kosambela bana-ngɔmbɛ ya wolo mpe babosanaki lisusu Yehova.

“Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? . . . To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?”​—2 Bakorinti 6:14, 15