Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 50

Yehova abundeli Yehoshafate

Yehova abundeli Yehoshafate

Yehoshafate, mokonzi ya Yuda, abebisaki bitumbelo ya Baala mpe alongolaki bikeko na mboka. Alingaki ete bato báyeba mibeko ya Yehova. Na yango, atindaki bankumu mpe Balevi na Yuda mobimba mpo báteya bato mibeko ya Yehova.

Bikólo ya pembenipembeni ezalaki kobanga kobundisa Yuda mpo bayebaki ete Yehova azalaki elongo na bato na ye. Bamemelaki kutu Mokonzi Yehoshafate makabo. Kasi na nsima, bana ya Moabe, bana ya Amone mpe bato ya mokili ya Seire bayaki kobundisa Yuda. Yehoshafate ayebaki ete asengeli koluka lisalisi ya Yehova. Asɛngaki mibali nyonso, basi mpe bana báya na Yerusaleme. Liboso na bango nyonso, abondelaki: ‘Yehova, soki osalisi biso te, tokolonga te. Tobondeli yo, yebisá biso nini tósala.’

Yehova ayanolaki bango: ‘Bóbanga te. Nakosalisa bino. Bótɛlɛma, bóningana te, mpe bómona ndenge nakobikisa bino.’ Ndenge nini Yehova abikisaki bango?

Na ntɔngɔ ya mokolo elandaki, Yehoshafate aponaki bayembi mpe ayebisaki bango bátambola liboso ya limpinga ya basoda. Balongwaki na Yerusaleme tii na esika ya etumba oyo babengi Tekoa.

Wana bayembi bazalaki kosanzola Yehova na esengo mpe na mongongo makasi, Yehova abundelaki bato na ye. Akɔtisaki mobulungano makasi kati na bana ya Amone ná bana ya Moabe; babandaki kobomana bango na bango, mpe ata moto moko te abikaki. Kasi Yehova abatelaki bato ya Yuda, basoda ná banganga-nzambe. Bikólo nyonso ya pembenipembeni eyokaki makambo oyo Yehova asalaki, mpe bayebaki ete Yehova azalaki kaka kobundela bato na ye. Ndenge nini Yehova abikisaka bato na ye? Na ndenge mingi. Mpo abikisa bato na ye, azalaka na mposa ya lisalisi ya moto te.

“Bokozala na ntina ya kobunda te na mbala oyo. Bótɛlɛma, bóningana te mpe bómona lobiko ya Yehova mpo na bolamu na bino.”​—2 Ntango 20:17