Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 47

Yehova apesaki Eliya makasi

Yehova apesaki Eliya makasi

Ntango Yezabele ayokaki makambo oyo ekómelaki basakoli ya Baala, asilikaki makasi. Atindelaki Eliya nsango oyo: ‘Lobi, okokufa lokola basakoli ya Baala.’ Eliya abangaki makasi mpe akimaki na esobe. Abondelaki Nzambe ete: ‘Yehova, nakokoka lisusu te. Nakufa na ngai kaka.’ Eliya alɛmbaki mpe alalaki na nse ya nzete moko.

Anzelu moko alamwisaki ye mpe alobaki na ye na boboto ete: ‘Tɛlɛmá, lyá.’ Eliya amonaki limpa moko likoló ya mabanga oyo ezalaki na mɔtɔ mpe elokó ya mai. Alyaki, amɛlaki mai mpe alalaki lisusu. Anzelu alamwisaki ye lisusu mpe alobaki: ‘Lyá. Osengeli kozwa makasi mpo na mobembo na yo.’ Na yango, Eliya alyaki lisusu. Na nsima, asalaki mobembo mikolo 40 butu moi, tii na Ngomba Horebe. Kuna, akɔtaki na kati ya mobenga moko mpo na kolala. Kasi Yehova asololaki na ye. Atunaki ye: ‘Eliya, ozali kosala nini awa?’ Eliya azongisaki: ‘Bayisraele batosi te elaka oyo bapesaki yo. Babebisi bitumbelo na yo mpe babomi basakoli na yo. Sikoyo, bazali koluka koboma mpe ngai.’

Yehova alobaki na ye: ‘Kende mpe tɛlɛmá likoló ya ngomba.’ Liboso, mopɛpɛ moko ya makasi elekaki wana. Ya mibale, mabele eninganaki. Na nsima, mɔtɔ epelaki. Na nsuka, Eliya ayokaki mongongo moko ya kimya, ya nse. Azipaki elongi na kazaka na ye mpe abimaki libándá ya mobenga. Yehova atunaki ye ntina oyo akimaki. Eliya alobaki: ‘Natikali kaka ngai moko.’ Kasi Yehova ayebisaki ye: ‘Otikali yo moko te. Ezali na bato 7 000 na Yisraele oyo bazali kaka kosambela ngai. Kende mpe tyá Elisha mosakoli na esika na yo.’ Na mbala moko, Eliya akendaki mpe asalaki ndenge Yehova ayebisaki ye. Yehova akoki mpe kosalisa yo soki olingi kosala makambo oyo asɛngi? Ɛɛ, akosalisa yo. Tólobela likambo moko oyo esalemaki ntango mbula ezalaki konɔka te.

“Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6