Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 13

Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?

Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?

“Bókoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.”​—BAEFESE 5:10.

1. Tosengeli kosala nini mpo Yehova andima losambo na biso, mpe mpo na nini?

 YESU alobaki ete: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23; 6:44) Mokomoko na biso asengeli ‘kokoba koluka koyeba malamu mpenza eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.’ (Baefese 5:10) Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Satana alukaka kokosa biso mpo tósala makambo oyo esepelisaka Yehova te.​—Emoniseli 12:9.

2. Likambo nini esalemaki pene na Ngomba Sinai?

2 Ndenge nini Satana alukaka kokosa biso? Mpo na kokosa biso, akoki kosala ete tóyeba te nini ezali mabe, nini ezali malamu. Kanisá likambo oyo esalemaki na ekólo Yisraele ntango bakómaki pene na Ngomba Sinai. Moize amataki na ngomba, mpe bato bazalaki kozela ye azonga na kaa. Nsukansuka, balɛmbaki kozela mpe basɛngaki Arona asalela bango nzambe. Arona azwaki wolo mpe asalaki na yango ekeko ya mwana-ngɔmbɛ. Na nsima, bato basalaki fɛti. Bazalaki kobina zingazinga ya mwana-ngɔmbɛ mpe kofukamela yango. Bazalaki kokanisa ete kofukamela yango ezalaki nde kosambela Yehova. Atako bato balobaki ete bazalaki kosala “fɛti mpo na Yehova,” molulu wana ezalaki likambo ya malamu te. Yehova amonaki ete ezali losambo ya bikeko, mpe mingi kati na bango bakufaki. (Kobima 32:1-6, 10, 28) Liteya nini tokoki kozwa? Kotika te bákosa yo. ‘Kosimba eloko moko ya mbindo te,’ mpe tiká Yehova ateya yo nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.​—Yisaya 52:11; Ezekiele 44:23; Bagalatia 5:9.

3, 4. Mpo na nini ezali malamu tótalela ndenge bafɛti mosusu ebandaki?

3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ateyaki bantoma na ye mpo bábatela losambo ya pɛto. Nsima ya liwa na ye, bantoma bakobaki koteya bayekoli ya sika mitinda ya Yehova. Kasi, nsima ya liwa ya bantoma, bateyi ya lokuta babandaki kokɔtisa makanisi ya lokuta mpe mimeseno ná bafɛti ya bapakano na kati ya lisangá. Bapesaki kutu bafɛti yango mosusu bankombo ya sika mpo emonana lokola ezali bafɛti ya bakristo. (2 Batesaloniki 2:7, 10; 2 Yoane 6, 7) Bafɛti yango mingi esalemaka tii lelo, mpe elendisaka mateya ya lokuta, ata mpe ya bademo. *​—Emoniseli 18:2-4, 23.

4 Lelo oyo na mokili mobimba, bato mingi basepelaka na bafɛti. Kasi, wana ozali kokoba koyekola ndenge Yehova atalelaka makambo, okoki komona ete osengeli kobongola makanisi na yo mpo na bafɛti mosusu. Kosala bongo ekoki kozala mpasi, kasi yebá ete Yehova akosalisa yo. Tótalela ndenge bafɛti mosusu ebandaki mpo tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka yango.

NDENGE NINI FƐTI YA NOELE EBANDAKI?

5. Nini emonisi ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 sanza ya 12 te?

5 Na mikili mingi, bato basalaka fɛti ya Noele na mokolo ya 25 sanza ya 12 mpo mingi bakanisaka ete ezali dati ya mbotama ya Yesu. Nzokande, Biblia eyebisi polele te mokolo to sanza oyo Yesu abotamaki, kasi esalisi biso tóyeba na eleko nini na kati ya mbula Yesu abotamaki. Luka akomaki ete ntango Yesu abotamaki na Beteleme, “babateli ya mpate bazalaki kofanda libándá” mpo na kobatela bampate na bango. (Luka 2:8-11) Na sanza ya 12, malili ezalaka makasi na Beteleme, mbula ebɛtaka mingi mpe nɛjɛ ekweaka; na yango babateli ya mpate ná bibwɛlɛ na bango bakokaki kozala libándá te na ntango yango. Yango emonisi nini? Emonisi ete Yesu abotamaki na sanza ya 12 te mpo ezalaki ntango ya malili makasi. Makambo oyo Biblia elobi mpe masolo ya kala emonisi ete Yesu abotamaki mokolo moko na basanza oyo ezali lelo sanza ya libwa to sanza ya zomi.

6, 7. (a) Makambo mingi oyo esalemaka na fɛti ya Noele eutá wapi? (b) Nini esengeli kotinda biso tókabela basusu?

6 Bongo fɛti ya Noele ebandaki ndenge nini? Eutaki na bafɛti ya bapakano, lokola fɛti ya Saturnales, oyo Baroma bazalaki kosala mpo na Saturne, nzambe ya bilanga. Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Makambo mingi oyo bato basalaka na fɛti ya Noele eutá na Saturnales, fɛti oyo Baroma bazalaki kosala na katikati ya sanza ya 12. Makambo lokola kosala bafɛti mineneminene, kopesana bakado, mpe kopelisa babuji eutá na fɛti wana.” Lisusu, fɛti ya mbotama ya Mithra, nzambe-moi ya Baperse ezalaki kosalema na mokolo ya 25 sanza ya 12.

7 Kasi, bato mingi oyo basalaka fɛti ya Noele lelo bayebaka te ete eutá na fɛti ya bapakano. Bamonaka kaka ete fɛti ya Noele ezali ntango ya kofanda elongo na libota, kolya bilei kitoko mpe kopesana bakado. Ya solo, osengeli kolinga bato ya libota na yo mpe baninga na yo; Yehova mpe alingi basaleli na ye bákabelaka baninga. Ndenge 2 Bakorinti 9:7 emonisi yango, “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Yehova alingi te tókabelaka basusu kaka na mabaku moko boye. Basaleli ya Yehova bapesaka basusu bakado mpe bafandaka elongo na baninga mpe bato ya libota na bango ntango nyonso oyo balingi na kati ya mbula, bazelaka mpe te ete basusu bázongisela bango. Bakabaka mpo balingaka bato.​—Luka 14:12-14.

Koyeba bisika bafɛti mosusu eutá ekoki kosalisa biso tóboya yango

8. Banganga-minzoto bamemelaki Yesu makabo ntango autaki kobotama sika? Limbolá.

8 Mpo na komonisa ete esengeli kopesana bakado na fɛti ya Noele, bato mingi balobaka ete mibali misato ya bwanya bamemelaki Yesu makabo ntango abotamaki na ndako ya bibwɛlɛ. Ezali solo ete bato yango bakendaki kotala Yesu mpe bamemelaki ye makabo. Na ntango ya kala, bato bazalaki na momeseno ya komemela moto ya lokumu makabo. (1 Bakonzi 10:1, 2, 10, 13) Kasi, oyebaka ete Biblia elobi ete bato wana bazalaki banganga-minzoto, elingi koloba bazalaki kosala maji mpe bazalaki kosalela Yehova te? Longola yango, ntango bakendaki kotala Yesu, bakutaki ye te auti kobotama na ndako ya bibwɛlɛ. Kasi, bakendaki kotala Yesu ntango azalaki ‘mwana ya moke,’ ntango bazalaki kofanda na ndako moko.​—Matai 2:1, 2, 11.

BIBLIA ELOBI NINI MPO NA FƐTI YA MBOTAMA?

9. Bafɛti nini ya mbotama Biblia elobeli?

9 Mokolo oyo mwana abotami ezalaka esengo mpenza. (Nzembo 127:3) Kasi yango elimboli te ete tosengeli kosalaka fɛti ya kokanisa mokolo ya mbotama. Kanisá likambo oyo: Biblia elobeli kaka fɛti mibale ya mbotama. Moko ezalaki ya Farao mokonzi ya Ezipito, mosusu ezalaki ya Mokonzi Erode Antipasi. (Tángá Ebandeli 40:20-22; Marko 6:21-29.) Moto te kati na bakonzi yango azalaki mosaleli ya Yehova. Kutu, ata na esika moko te Biblia elobi ete mosambeli moko ya Yehova asalaki fɛti mpo na kokanisa mbotama na ye.

10. Ndenge nini bakristo ya liboso bazalaki kotalela fɛti ya mbotama?

10 Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete bakristo ya liboso “bazalaki komona ete kosala fɛti ya mbotama ezali momeseno ya bapakano.” Mimeseno yango euti na mateya ya lokuta. Na ndakisa, Bagrɛki ya kala bazalaki kondima ete moto nyonso abatelami na elimo moko, oyo ezalaki wana ntango moto yango abotamaki. Bazalaki mpe kokanisa ete elimo yango ezalaki na boyokani na nzambe moko oyo abotamaki mokolo oyo moto yango abotami. Longola makanisi wana ya bapakano, basalelaka mpe mokolo ya mbotama na makambo lokola astroloji mpe horoscope.

11. Yehova alingi nini?

11 Bato mingi bamonaka ete mokolo oyo babotamaki ezali mokolo ya ntina mingi, oyo basusu basengeli komonisa ete balingaka bango mpe basepelaka na bango. Kasi, tokoki komonisa bandeko mpe baninga na biso ete tolingaka bango ata na ntango nini na kati ya mbula, kaka te na mokolo moko boye. Yehova alingi tózala na boboto mpe tókabaka ntango nyonso. (Tángá Misala 20:35.) Tozali na botɔndi mingi ndenge apesaka biso bomoi mokolo na mokolo, kaka te na mokolo ya mbotama na biso.​—Nzembo 8:3, 4; 36:9.

Bolingo nde etindaka bakristo ya solo bákabela basusu

12. Na ndenge nini mokolo ya liwa ekoki koleka mokolo ya mbotama?

12 Mosakoli 7:1 elobi: “Nkombo malamu eleki mafuta ya malamu, mpe mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama.” Na ndenge nini mokolo ya liwa ekoki koleka mokolo ya mbotama? Ntango moto abotami, asali naino eloko te na bomoi na ye, ezala ya malamu ezala ya mabe. Kasi ntango moto asaleli Yehova mpe asalisi basusu, amisaleli “nkombo malamu” to lokumu ya malamu, mpe Yehova akokanisa ye ata soki akufi. (Yobo 14:14, 15) Basaleli ya Yehova basalaka fɛti ya mbotama te, ezala ya bango moko to ya Yesu. Kutu, molulu kaka moko oyo Yesu atindaki tósalaka ezali Ekaniseli ya liwa na ye.​—Luka 22:17-20; Baebre 1:3, 4.

EBANDELI YA FƐTI YA PASIKA

13, 14. Fɛti ya Pasika ezali na boyokani na nini?

13 Bato mingi bakanisaka ete ntango bazali kosala fɛti ya Pasika, bazali kokanisa lisekwa ya Yesu. Nzokande fɛti ya Pasika ezali na boyokani na Eostre, nzambe-mwasi ya bapakano ya Anglo-Saxon ya kobima ya moi mpe eleko ya prɛnta. Diksionɛrɛ moko (Dictionary of Mythology) elobi ete azalaki mpe nzambe-mwasi ya makambo ya kobota. Makambo mosusu oyo basalaka na fɛti ya Pasika ezali na boyokani na nzambe yango. Na ndakisa, buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete maki “ezalaki elembo monene ya bomoi ya sika mpe ya lisekwa.” Longola yango, lapin esalelamaka banda kala na losambo ya bapakano lokola elembo ya kobota. Ezali polele ete fɛti ya Pasika ezali na boyokani na lisekwa ya Yesu te.

14 Yehova asepelaka ntango amonaka bato bazali koyokanisa mimeseno ya mangomba ya lokuta na lisekwa ya Mwana na ye? Te, asepelaka te. (2 Bakorinti 6:17, 18) Kutu, ata mokolo moko te Yehova asɛngá biso tósala fɛti mpo na lisekwa ya Yesu.

HALLOWEEN EZALI NINI?

15. Fɛti ya Halloween eutá wapi?

15 Fɛti ya Halloween to Mokolo ya basantu ezali na boyokani na bondɔki mpe bilima. Fɛti yango ezali ya sika te. Ntango sanza emonanaka mobimba pene na mokolo ya 1 sanza ya 11, Ba-celte oyo bazalaki kofanda na Angleterre mpe na Irlande bazalaki kosala fɛti ya Samhain. Bazalaki kokanisa ete na fɛti yango, bilimo ya bato bakufá ezongaka na mabele. Bato bazalaki kotya bilei mpe masanga mpo bilimo yango esala bango mabe te. Lelo oyo, ntango bana balataka bamaskɛ ya bilima mpe bakendaka ndako na ndako mpo na kobangisa bato, bayebaka te ete bamekolaka nde milulu wana ya kala oyo ezali na boyokani na bademo.

FƐTI YA LIBALA OYO EKUMISAKA NZAMBE

16, 17. Likambo nini tosengeli kokanisa ntango tozali kobongisa fɛti ya libala?

16 Fɛti ya libala ezali ntango ya esengo. Mboka na mboka ezali na ndenge na yango ya kosala fɛti ya libala. Mbala mingi bato bamitunaka te soki milulu oyo bato basalaka na fɛti ya libala eutá wapi, na yango bayebaka te ete milulu mosusu eutá na bindimeli ya mangomba ya bapakano. Kasi, bakristo mibale oyo balingi kobalana basengeli kosala nyonso mpo fɛti ya libala na bango esepelisa Yehova. Soki bayebi bisika mimeseno mosusu oyo basalaka na fɛti ya libala eutá, bakozwa bikateli ya malamu.​—Marko 10:6-9.

17 Bato basalaka milulu mosusu na fɛti ya libala mpo bakanisaka ete ekomemela mwasi ná mobali oyo babalani makila malamu (chance), to lipamboli. (Yisaya 65:11) Na ndakisa, na bisika mosusu, bato babwakelaka mwasi ná mobali oyo babalani loso to eloko mosusu ya ndenge wana. Bakanisaka ete yango ekopesa bango bana, esengo, mpe bomoi ya molai mpe ekobatela bango na bato mabe. Kasi, bakristo basengeli kokeba na mimeseno nyonso oyo ezali na boyokani na lingomba ya lokuta.​—Tángá 2 Bakorinti 6:14-18.

18. Mitinda nini mosusu ya Biblia etali fɛti ya libala?

18 Bakristo balingaka ete fɛti ya libala na bango ezala ntango ya esengo mpe ya lokumu, mpe ete moto nyonso oyo babengi asepela. Bato oyo bakei na fɛti ya bakristo basengeli te koloba makambo oyo ezangi boboto, to mpe oyo ezangi ntina; oyo ezali kobomba makanisi ya kosangisa nzoto, to oyo ezangi limemya epai ya mwasi ná mobali oyo babalani to bato mosusu. (Masese 26:18, 19; Luka 6:31; 10:27) Fɛti ya libala ya bakristo ezali te ntango ya “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” (1 Yoane 2:16) Soki ozali kobongisa fɛti ya libala, bongisá makambo malamu mpo ozalaka na esengo ntango okobanda kokanisa yango.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 28.

ESIKA MOMESENO YA KOTOMBOLA KƆPƆ YA MASANGA EUTÁ

19, 20. Momeseno ya kotombola kɔpɔ ya masanga eutá wapi?

19 Likambo oyo esalemaka mingi na fɛti ya libala mpe na bafɛti mosusu elongo na baninga ezali kotombola kɔpɔ ya masanga. Ntango batomboli kɔpɔ ya masanga, moto moko atombelaka moto mosusu bomoi molai, wana baninga mosusu mpe batomboli bakɔpɔ. Ndenge nini bakristo basengeli kotalela yango?

20 Buku moko (International Handbook on Alcohol and Culture) elobi ete mbala mosusu kotombola kɔpɔ eutá na momeseno moko ya bapakano na ntango ya kala “epai bazalaki kopesa banzambe mbeka ya masanga.” Bazalaki kosala bongo “mpo na kosɛnga [banzambe yango] bákokisa mposa moko, oyo ezalaki kolobama na maloba ya mokuse lokola ‘bomoi molai!’ to ‘zalá nzoto kolɔngɔnɔ!’” Na ntango ya kala, bato bazalaki kotombola bakɔpɔ na bango mpo na kosɛnga banzambe na bango lipamboli. Kasi Yehova apesaka lipamboli na ndenge wana te.​—Yoane 14:6; 16:23.

“BINO BAOYO BOLINGAKA YEHOVA, BÓYINA OYO EZALI MABE”

21. Bafɛti ya ndenge nini bakristo basengeli koboya?

21 Ntango ozali kokanisa soki osengeli kosangana na fɛti moko boye to te, kanisá naino ezaleli mpe makanisi oyo elendisaka. Na ndakisa, na milulu mosusu, lokola oyo babengaka carnaval, bato babinaka mabina ya nsɔni, bamɛlaka na lokoso, ntango mosusu mpe basalaka pite. Bafɛti mosusu ya ndenge wana elendisaka mpe makambo lokola libala ya mibali na mibali to basi na basi to mpe bolingo ya ekólo. Soki tosangani na bafɛti ya ndenge wana, ekomonisa ete toyinaka mpenza makambo oyo Yehova ayinaka?​—Nzembo 1:1, 2; 97:10; 119:37.

22. Nini ekoki kosalisa mokristo ayeba soki akosangana na fɛti moko boye to te?

22 Bakristo basengeli kosala makasi mpo báboya bafɛti nyonso oyo efingisaka Nzambe. Ntoma Paulo akomaki: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakorinti 10:31; talá Maloba na nsuka ya lisolo 29.) Ya solo, na bafɛti nyonso te nde basalaka pite, mimeseno ya mangomba ya lokuta to balendisaka bolingo ya ekólo. Soki fɛti moko ebuki mitinda ya Biblia te, biso moko tosengeli kozwa ekateli soki tokosangana na yango to te. Tosengeli mpe kokanisa soki ekateli oyo tozwi ekobɛtisa basusu libaku te.

KUMISÁ YEHOVA NA MALOBA MPE MISALA NA YO

23, 24. Ndenge nini okoki kolimbwela bandeko na yo oyo bazali Batatoli te ntina oyo oboyi bafɛti mosusu?

23 Mbala mosusu otiki kosangana na bafɛti oyo efingisaka Yehova. Kasi, bato mosusu ya libota oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kokanisa ete oboyi bango to ozali kosepela na bango lisusu te. Bakoki komona ete bafɛti ezali libaku kaka moko oyo bato nyonso ya libota bakoki kokutana. Okoki kosala nini mpo na yango? Okoki kosala makambo mingi mpo na komonisa bango ete olingaka bango mpe ete bazali na valɛrɛ mingi na miso na yo. (Masese 11:25; Mosakoli 3:12, 13) Okoki kobengisa bango na mabaku mosusu mpo bólekisa ntango elongo.

24 Soki bandeko na yo balingi koyeba ntina oyo oboyi kosangana na bafɛti mosusu, okoki kosala bolukiluki na mikanda na biso mpe na jw.org oyo ekosalisa yo olimbwela bango makambo yango. Kotinda bango te bámona ete olingi kokweisa makanisi na bango to kotya bango mbamba básala lokola yo. Salisá bato ya libota na yo bámona ete otaleli makambo malamumalamu mpe ete yo moko nde ozwi ekateli. Kitisá motema, mpe ‘liloba na yo ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.’​—Bakolose 4:6.

25, 26. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bálinga mibeko ya Yehova?

25 Ezali na ntina ete biso nyonso tóyeba malamu mpo na nini toboyaka kosala bafɛti mosusu. (Baebre 5:14) Toboyaka yango mpo na kosepelisa Yehova. Soki ozali moboti, osengeli kozwa ntango ya kosalisa bana na yo bákanga ntina ya mitinda ya Biblia mpe bálinga yango. Soki bakómi komona Yehova moto ya solo, bango mpe bakoluka kosepelisa ye.​—Yisaya 48:17, 18; 1 Petro 3:15.

26 Yehova asepelaka komona ete tozali kosala nyonso oyo tosengeli mpo losambo na biso epai na ye ezala pɛto mpe sembo. (Yoane 4:23) Kasi, bato mingi bakanisaka ete moto akoki kozala sembo te na mokili oyo ezangi bosembo. Ezali solo? Tokolobela yango na mokapo oyo elandi.

^ Mpo oyeba malamu bafɛti yango mokomoko, talá Index des Publications Watch Tower, Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova, mpe site jw.org.