Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 8

Yehova alingi basaleli na ye bázala pɛto

Yehova alingi basaleli na ye bázala pɛto

“Epai ya moto oyo azali pɛto, okomimonisa pɛto.”​—NZEMBO 18:26.

1-3. (a) Mpo na nini mama asalaka nyonso ete mwana na ye azala pɛto? (b) Mpo na nini Yehova alingi basaleli na ye bázala pɛto?

 KANISÁ mama moko ya boboto oyo azali kobongisa mwana na ye mpo akende kelasi. Asukoli ye mpe alatisi ye bilamba ya malamu mpe ya pɛto. Yango ekobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya mwana na ye mpe ekomonisa basusu ete tata ná mama ya mwana yango bakipaka ye malamu.

2 Tata na biso Yehova alingi tózala pɛto. (Nzembo 18:26) Ayebi ete kozala pɛto ezali mpo na bolamu na biso. Mpe ntango tozali pɛto, tozali kosala ete bato bápesa ye nkembo.​—Ezekiele 36:22; tángá 1 Petro 2:12.

3 Kozala pɛto elimboli nini? Mpo na nini kozala pɛto ezali mpo na bolamu na biso? Wana tozali kotalela mituna yango, mokomoko akoki komona esika oyo asengeli kosala mbongwana.

MPO NA NINI TOSENGELI KOZALA PƐTO?

4, 5. (a) Mpo na nini tosengeli kozala pɛto? (b) Biloko oyo Yehova akelá eteyaka biso nini mpo na ndenge atalelaka bopɛto?

4 Yehova ye moko nde azali ndakisa na oyo etali kozala pɛto. (Balevi 11:44, 45) Na yango, soki tolingaka kozala pɛto, libosoliboso ezali mpo tolingaka kozala “bamekoli ya Nzambe.”​—Baefese 5:1.

5 Biloko oyo Yehova akelá eteyaka biso ndenge atalelaka bopɛto. Yehova abongisá ete mopɛpɛ ná mai emipɛtolaka yango moko. (Yirimia 10:12) Kanisá ndenge oyo mabele emipɛtolaka, ata soki bato babebisi yango. Na ndakisa, Yehova asalá biloko ya mikemike oyo ebengami mikrobe, oyo ekoki komonana kaka na microscope. Mikrobe ekoki kosilisa pwazɔ oyo ezali na kati ya biloko ya bosɔtɔ. Mosala yango ekamwisaka mpenza. Bato ya siansi basalelaka kutu mikrobe yango mosusu mpo na kobatela mopɛpɛ.​—Baroma 1:20.

6, 7. Ndenge nini Mibeko ya Moize emonisaki ete bato oyo basambelaka Yehova basengeli kozala pɛto?

6 Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele na nzela ya Moize emonisaka mpe ntina oyo tosengeli kozala pɛto. Na ndakisa, Bayisraele basengelaki kozala nzoto pɛto mpo Yehova andima losambo na bango. Na Mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene asengelaki kosukola mbala mibale. (Balevi 16:4, 23, 24) Mpe liboso banganga-nzambe mosusu bápesa bambeka, basengelaki kosukola mabɔkɔ mpe makolo na bango. (Kobima 30:17-21; 2 Ntango 4:6) Na bantango mosusu, bazalaki koboma moto oyo atosi te mibeko oyo etali bopɛto.​—Balevi 15:31; Mitángo 19:17-20.

7 Makambo ezali ndenge nini lelo oyo? Mibeko ya Moize ekoki mpe koteya biso makambo mingi oyo emonisi ndenge Yehova atalelaka bopɛto. (Malaki 3:6) Mibeko yango emonisaki polele ete basambeli ya Yehova basengeli kozala pɛto. Mibeko ya Yehova ebongwani te. Lelo oyo mpe, azali kaka kosɛnga ete basaleli na ye bázala pɛto.​—Yakobo 1:27.

KOZALA PƐTO ELIMBOLI NINI?

8. Tosengeli kozala pɛto na makambo nini?

8 Mpo na Yehova, kozala pɛto elimboli kaka te kosukola nzoto, kolata bilamba oyo ezali pɛto, mpe kobatela ndako na biso pɛto. Bopɛto etali bomoi na biso mobimba. Etali losambo, bizaleli, mpe makanisi na biso. Mpo Yehova amona ete ozali pɛto, osengeli kozala pɛto na makambo nyonso ya bomoi na yo.

9, 10. Kozala pɛto na losambo na biso elimboli nini?

9 Losambo ya pɛto. Tosengeli kosala ata likambo moko te oyo eyokani na mangomba ya lokuta. Ntango Bayisraele bazalaki bakangami na boombo na Babilone, bazalaki kati ya bato oyo bazalaki kosala losambo ya mbindo ya bapakano. Yisaya asakolaki ete Bayisraele bakozonga na mboka na bango mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Yehova ayebisaki bango: “Bóbima kuna, bósimba eloko moko ya mbindo te; bóbima na kati na ye, bómibatela pɛto.” Basengelaki te kosangisa losambo na bango epai ya Nzambe na mateya, mimeseno to milulu ya mangomba ya lokuta ya Babilone.​—Yisaya 52:11.

10 Lelo oyo mpe, bakristo ya solo baboyaka mangomba ya lokuta. (Tángá 1 Bakorinti 10:21.) Na mokili mobimba, makambo mingi ya bonkɔkɔ, mimeseno, mpe makambo oyo bato bandimaka eutá na mateya ya mangomba ya lokuta. Na ndakisa, na bikólo mingi, bato bakanisaka ete eloko moko oyo ezalaka na kati ya moto ebimaka ntango moto akufi, mpe ezali na milulu ebele oyo eutá na liteya wana. (Mosakoli 9:5, 6, 10) Bakristo basengeli koboya milulu yango. Bato ya libota na yo bakoki kotya yo mbamba osangana na bango na milulu yango mosusu. Kasi, lokola tolingi Yehova amona ete tozali pɛto, tondimaka te kolanda mimeseno yango.​—Misala 5:29.

11. Kozala pɛto na bizaleli na biso elimboli nini?

11 Bizaleli ya pɛto. Mpo Yehova amona ete tozali pɛto, tosengeli koboya makambo ya pite ya lolenge nyonso. (Tángá Baefese 5:5.) Na Biblia, Yehova ayebisi biso ‘tókima pite.’ Alobi polele ete baoyo basalaka makambo ya mbindo mpe baboyi kobongola motema “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakorinti 6:9, 10, 18; talá Maloba na nsuka ya lisolo 22.

12, 13. Mpo na nini losambo na yo, bizaleli na yo mpe makanisi na yo esengeli kozala pɛto?

12 Makanisi ya pɛto. Mbala mingi, makambo oyo tokanisaka, yango nde tosalaka. (Matai 5:28; 15:18, 19) Na yango, soki makanisi na biso ezali pɛto, tokosala makambo ya pɛto. Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, na bantango mosusu tokoki kozala na makanisi ya mabe. Soki eyeli biso, tosengeli kolongola yango noki. Soki te, na nsima, tokoki komona ete motema na biso ezali lisusu pɛto te. Tokoki kokóma na mposa ya kosala makambo oyo tokanisaka mingi. Kasi, tosengeli kotondisa motó na biso na makanisi ya pɛto. (Tángá Bafilipi 4:8.) Yango wana, toboyaka mpe kominanola oyo ezali na makambo ya pite to ya mobulu. Toponaka malamu makambo oyo totángaka, totalaka, mpe oyo tolobelaka.​—Nzembo 19:8, 9.

13 Mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe, losambo na yo, bizaleli na yo mpe makanisi na yo esengeli kozala pɛto. Kasi, na miso ya Yehova, ezali mpe na ntina tózala pɛto na nzoto.

NDENGE NINI TOKOKI KOZALA PƐTO NA NZOTO?

14. Mpo na nini ezali na ntina ozala pɛto na nzoto?

14 Kobatela nzoto mpe esika tofandi pɛto ezali mpo na bolamu na biso moko mpe ya bato oyo bazali pembeni na biso. Tokomiyoka malamu mpe bato bakosepela kozala elongo na biso. Kasi, oyo eleki ntina, bopɛto na biso esalaka ete bato bákumisa Yehova. Kanisá naino: Soki mwana moko azalaka ntango nyonso salite, okoki kokanisa mabe mpo na baboti na ye, bongo te? Ndenge moko mpe, soki tozali pɛto te, bato bakoki kokanisa mabe mpo na Yehova. Ntoma Paulo alobaki: “Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo bázwa likambo ya koloba na mosala na biso te; kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe.”​—2 Bakorinti 6:3, 4.

Biso basaleli ya Yehova tosengeli kobatela nzoto mpe lopango na biso pɛto

15, 16. Tokoki kosala nini mpo tózalaka pɛto?

15 Nzoto mpe bilamba na biso. Tosengeli kozala pɛto mokolo na mokolo. Na ndakisa, osengeli kosukolaka nzoto mikolo nyonso soki likoki ezali. Osengeli kosukolaka mabɔkɔ na sabuni mpe mai, mingimingi liboso ya kolamba, liboso ya kolya mpe soki outi WC to soki osimbaki eloko moko ya salite. Kosukola mabɔkɔ ekoki komonana lokola likambo ya moke, nzokande ezali na ntina mingi mpo na kopekisa bamikrobe mpe maladi mosusu epanzana. Ekoki ata kobikisa bomoi na biso. Soki bozali na WC to twalɛti ya mai te, okoki kaka koluka mayele ya malamu mpo na kosala zongo. Na Yisraele ya kala, WC to twalɛti ya mai ezalaki te; na yango bazalaki kotimola mpo na kokunda salite na bango libándá, mosika na bandako mpe maziba ya mai.​—Kolimbola Mibeko 23:12, 13.

16 Bilamba na biso esengeli kaka te kozala ya ntalo mingi to ya mikolo oyo. Esengeli nde kozala pɛto. (Tángá 1 Timote 2:9, 10.) Tosengeli ntango nyonso kolinga ete molato mpe monzɛlɛ na biso ekumisaka Yehova.​—Tito 2:10.

17. Mpo na nini tolingaka ndako mpe lopango na biso ezala pɛto?

17 Ndako mpe lopango na biso. Ata soki tofandi wapi, ndako na biso esengeli kozala pɛto. Tosengeli mpe kosala makasi mpo motuka na biso, velo na biso, to eloko mosusu nyonso oyo tosalelaka mpo na kotambola ezala pɛto, mingimingi soki tozali kokende na yango na makita to na mosala ya kosakola. Esengeli kozala bongo, mpo na mosala ya kosakola, toyebisaka basusu ndenge bomoi ekozala na paradiso ya pɛto awa na mabele. (Luka 23:43; Emoniseli 11:18) Ndenge oyo ndako mpe lopango na biso ezali ekoki komonisa ete tozali komibongisa mpo na kofanda na mokili ya sika ya pɛto.

18. Mpo na nini tolingaka ete bisika na biso ya losambo ezala pɛto?

18 Bisika na biso ya losambo. Tokomonisa ete bopɛto ezali na ntina mingi na miso na biso soki tozali kobatela bisika na biso ya losambo pɛto, ezala Ndako ya Bokonzi, to esika oyo tosalaka mayangani. Ntango bato bayei na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso, mbala mingi bamonaka bopɛto na yango. Yango ekumisaka Yehova. Biso nyonso na lisangá tozali na libaku ya kopesa mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi na biso mpe kobatela yango.​—2 Ntango 34:10.

BOYÁ MIMESENO YA MBINDO

19. Makambo nini tosengeli koboya?

19 Ata soki Biblia etángi te ezaleli mokomoko ya mbindo oyo tosengeli koboya, epesi mitinda oyo esalisaka biso tóyeba ndenge Yehova atalelaka makambo ya ndenge wana. Yehova alingi te tómɛlaka likaya, tólangwa masanga, tómɛla bangi to drɔgɛ. Soki tozali baninga ya Nzambe, tokoboya kosala makambo yango. Mpo na nini? Mpo tozalaka na limemya mpo na likabo ya bomoi. Mimeseno wana ekoki kokómisa bomoi mokuse, ekoki kobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe kotya bomoi ya bato mosusu na likama. Bato mingi bamekaka kotika mimeseno wana ya mabe mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Kasi, lokola tozali baninga ya Yehova, tokotika yango mpo tolingaka ye. Elenge mwasi moko alobaki ete: “Na lisalisi ya Yehova, napɛtolaki bomoi na ngai mpe nalongwaki na boombo. . . . Nakanisi ete nakokaki kosala mbongwana yango na makasi na ngai moko te.” Tólobela mitinda mitano ya Biblia oyo ekosalisa moto atika mimeseno ya mbindo.

20, 21. Yehova alingi ete tóboya mimeseno nini?

20 “Lokola tozali na bilaka wana, bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Yehova alingi tótika mimeseno ya mbindo oyo ekoki kobebisa makanisi to nzoto na biso.

21 Ntina monene oyo tosengeli mpenza ‘komipɛtola na mbindo nyonso’ ezali na 2 Bakorinti 6:17, 18. Yehova alobi na biso: “Bótika kosimba eloko ya mbindo.” Na nsima apesi elaka oyo: “Nakoyamba bino. Mpe nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi.” Ya solo, Yehova akolinga biso ndenge tata alingaka bana na ye, soki toboyi eloko nyonso oyo ekokómisa biso mbindo na miso na ye.

22-25. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tóboya mimeseno ya mbindo?

22 “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Yango nde mobeko ya libosoliboso. (Matai 22:38) Bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kozala ya ndambondambo te. Ndenge nini okoki koloba ete olingi Yehova na motema mobimba soki oponi kosala likambo oyo ekoki koyeisa bomoi na yo mokuse to kobebisa bɔɔngɔ na yo? Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na komonisa ete ozalaka na limemya mpo na bomoi oyo apesá yo.

23 “[Yehova] apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:24, 25) Soki moninga moko apesi yo likabo to kado moko ya ntina mingi, okobwaka yango to okobebisa yango? Bomoi ezali likabo ya kokamwa oyo Yehova apesá biso. Tolingaka mpenza likabo yango. Yango wana tolingaka kosalela bomoi na biso na ndenge oyo ekopesa ye nkembo.​—Nzembo 36:9.

24 “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Mimeseno ya mabe ezali na likama kaka mpo na biso te. Ekoki mpe kozala na likama mpo na bato oyo bazali pembeni na biso, oyo mbala mingi ezali bato oyo tolingaka koleka. Na ndakisa, moto oyo afandaka ndako moko na moto oyo amɛlaka likaya akoki kozwa maladi ya makasi kaka mpo apemaka milinga ya likaya. Kasi, soki totiki mimeseno ya mabe, tokomonisa bato oyo bazali pembeni na biso ete tolingaka bango.​—1 Yoane 4:20, 21.

25 “Kobá kokundwela bango ete bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi.” (Tito 3:1) Na mikili mingi, mibeko ya mboka epekisá kosomba to kosalela lolenge mosusu ya drɔgɛ. Lokola Yehova asɛngi biso tótosa baguvɛrnema, tosengeli kotosa mibeko yango.​—Baroma 13:1.

Soki totikali ntango nyonso pɛto, tokokumisa Yehova

26. (a) Tosengeli kosala nini mpo Yehova andima losambo na biso? (b) Mpo na nini eleki malamu kozala pɛto na miso ya Nzambe?

26 Soki olingi kozala moninga ya Yehova, okoki komona ete osengeli kosala mwa mbongwana. Soki ezali bongo, osengeli kobanda sikoyo. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotika momeseno moko ya mabe, kasi okoki kosala yango! Yehova alaki ete akosalisa yo. Alobi: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.” (Yisaya 48:17) Ntango osali makasi mpo otikala ntango nyonso pɛto, yebá ete ozali kopesa Nzambe na biso nkembo.