Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 1

Bolingo ya Nzambe eumelaka seko

Bolingo ya Nzambe eumelaka seko

“Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”​—1 YOANE 5:3.

1, 2. Mpo na nini olingaka Yehova?

 OLINGAKA Nzambe? Ekoki kozala ete olingaka ye mingi, yango wana omipesaki epai na ye. Mbala mosusu ozali komona ete azali Moninga na yo ya motema. Kasi, yebá ete Yehova alingaki yo liboso kutu yo olinga ye. Biblia elobi: “Tozali kolinga, mpo ye alingaki biso liboso.”​—1 Yoane 4:19.

2 Kanisá nyonso oyo Yehova asalá mpo na komonisa ete alingaka biso. Abongisá mabele mpo tófanda mpe atyá nyonso oyo esengeli mpo tósepela na bomoi. (Matai 5:43-48; Emoniseli 4:11) Alingi tózala na boyokani malamu na ye mpe azwi bibongiseli mpo tóyeba makambo na ye. Toyokaka Yehova ntango tozali kotánga Biblia, mpe ayokaka biso ntango tozali kobondela. (Nzembo 65:2) Atambwisaka biso mpe apesaka biso makasi na nzela ya elimo santu na ye. (Luka 11:13) Atindaki kutu Mwana na ye ya bolingo awa na mabele mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa.​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 5:8.

3. Tosengeli kosala nini mpo na kobatela boyokani malamu na Yehova?

3 Kanisá naino moninga na yo moko ya motema, oyo azalaka na yo na ntango ya mpasi mpe ya bisengo. Esɛngaka kosala milende mpo boninga ya ndenge wana ezala ntango nyonso makasi. Tosengeli mpe kosala bongo mpo na kobatela boninga na biso na Yehova, Moninga oyo aleki malamu. Boninga na biso na Nzambe ekoumela libela. Yango wana, Biblia elobi: “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.” (Yuda 21) Ndenge nini tokoki kosala yango? Biblia epesi eyano oyo: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”​—1 Yoane 5:3.

“BOLINGO YA NZAMBE ELAKISI BOYE”

4, 5. (a) Maloba “bolingo ya Nzambe” elimboli nini? (b) Ndenge nini obandaki kolinga Yehova?

4 Biblia esaleli maloba “bolingo ya Nzambe” mpo na komonisa nini? Bolingo yango ezali te bolingo oyo Nzambe alingaka biso; ezali nde bolingo oyo biso tolingaka ye. Oyebi lisusu ndenge omiyokaki ntango obandaki kolinga Yehova?

Ntango osalaki libondeli mpo na komipesa na Yehova mpe ozwaki batisimo, omonisaki ete olingi ye mpe olingi kotosa ye libela na libela

5 Kanisá lisusu ndenge omiyokaki ntango oyebaki mpo na mbala ya liboso ete Yehova alingi ozala na bomoi ya seko na mokili ya sika. Bateyaki yo makambo nyonso oyo asalá mpo tózwa bomoi yango, mpe omonaki ete Yehova apesaki likabo ya motuya monene mpenza ndenge atindaki Mwana na ye awa na mabele. (Matai 20:28; Yoane 8:29; Baroma 5:12, 18) Ntango oyekolaki makambo mosusu oyo emonisaki ete Yehova alingaka yo mingi, esimbaki motema na yo, na nsima yo mpe obandaki kolinga ye.​—Tángá 1 Yoane 4:9, 10.

6. Tosalaka nini soki tolingi moto? Kolinga Nzambe etindaki yo osala nini?

6 Kasi, bolingo wana oyo oyokaki mpo na Nzambe ezalaki kaka ebandeli. Na ndakisa, soki olingi moto, okosuka kaka te na koloba na ye ete “Nalingaka yo.” Bolingo ekotinda yo oluka kosala makambo oyo ekopesa moto yango esengo. Ndenge moko mpe, kolinga Yehova etindaki yo oluka kozala na bomoi oyo ekosepelisa ye. Na ntembe te, ntango bolingo yango ekolaki, osalaki libondeli mpo na komipesa na ye mpe ozwaki batisimo. Ntango osalaki bongo, olakaki Yehova ete okosalela ye libela na libela. (Tángá Baroma 14:7, 8.) Ndenge nini okoki kokokisa elaka yango?

“TÓTOSAKA MIBEKO NA YE”

7. Tosalaka nini lokola tolingaka Yehova? Tángá mwa ndambo ya mibeko oyo atyeli biso.

7 Lokola tolingaka Yehova, ‘totosaka mibeko na ye,’ elingi koloba tosalaka makambo oyo asɛngi. Biblia esalisaka biso tóyeba ndenge Yehova alingaka tótambwisa bomoi na biso. Na ndakisa, ayebisi biso ete ezali mabe kolangwa masanga, koyiba to kokosa, kosangisa nzoto na moto oyo tobalaná na ye te, to kosambela moto to eloko moko; tosengeli kosambela kaka ye.​—1 Bakorinti 5:11; 6:18; 10:14; Baefese 4:28; Bakolose 3:9.

8, 9. Nini ekoki kosalisa yo oyeba oyo Yehova alingi osala na makambo oyo Biblia epesi mibeko ya polele te? Pesá ndakisa.

8 Kasi, mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kotosa mibeko na ye. Apesá biso te liste molai ya mibeko oyo eyokani na likambo mokomoko ya bomoi. Na yango, ezali na makambo mosusu oyo Biblia epesi mibeko ya polele te oyo tosengeli kotosa. Na ntango yango, ndenge nini tokoki kozwa ekateli ya malamu? (Baefese 5:17) Na kati ya Biblia, tokokuta mitinda. Mitinda ezali maloba oyo esalisaka biso tóyeba ndenge Yehova atalelaka makambo. Mpe ntango tozali kotánga Biblia, toyekolaka koyeba bomoto ya Yehova. Toyebaka makanisi na ye, ata mpe makambo oyo alingaka mpe oyo ayinaka.​—Tángá Nzembo 97:10; Masese 6:16-19; talá Maloba na nsuka ya lisolo 1.

9 Na ndakisa, nini ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo okoki kotala na TV to na Internet? Yehova ayebisi biso polele te nini tosengeli kotala to kotala te. Kasi mitinda oyo apesá esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Lelo, makambo mingi oyo balakisaka na TV mpe oyo ezalaka na Internet etondi na makambo ya mobulu mpe ya kosangisa nzoto. Nzokande, Yehova alobi ete ‘ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu,’ mpe ete “akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Nzembo 11:5; Baebre 13:4) Ndenge nini mitinda yango ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu? Ntango kaka oyebi ete Yehova ayinaka likambo moko to amonaka yango mbindo, osengeli koboya yango.

10, 11. Mpo na nini totosaka Yehova?

10 Mpo na nini totosaka Yehova? Ezali kaka te mpo na kokima etumbu, to mikakatano oyo ekobima soki tozwi bikateli ya mabe. (Bagalatia 6:7) Totosaka Yehova nde mpo tolingaka ye. Ndenge kaka bana balingaka kosepelisa tata na bango, biso mpe tolingaka kosepelisa Tata na biso ya likoló. Eloko moko te ekoki kopesa biso esengo koleka koyeba ete Yehova asepelaka na biso!​—Nzembo 5:12; Masese 12:2; talá Maloba na nsuka ya lisolo 2.

11 Totosaka Yehova kaka te na makambo oyo tolingi to ntango tomoni ete ndenge mosusu ya kosala ezali te. Toponaka mpe te mibeko oyo tokotosa. (Kolimbola Mibeko 12:32) Totosaka makambo nyonso oyo Yehova asɛngi, lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete alingaka mitindo nyonso ya Nzambe. (Nzembo 119:47; Baroma 6:17) Tolingi kolanda ndakisa ya Noa. Noa amonisaki ete alingaka Yehova na ndenge asalaki nyonso oyo Yehova apesaki ye mitindo. Biblia elobi ete “asalaki kaka bongo.” (Ebandeli 6:22) Okolinga Yehova aloba mpe bongo mpo na yo?

12. Ndenge nini tokoki kosepelisa Yehova?

12 Yehova ayokaka ndenge nini ntango totosaka ye? Biblia elobi ete ‘esepelisaka motema na ye’. (Masese 11:20; 27:11) Ezali likambo ya esengo mpenza! Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba asepelaka soki tozali kotosa ye. Kasi, atindaka biso na makasi te tósala yango; apesá biso bonsomi ya kopona. Yango elimboli ete biso moko tokoki kopona kosala malamu to mabe. Yehova alingi ete bolingo oyo olingaka ye etinda yo ozwa bikateli ya malamu mpo ozala na bomoi ya esengo mpenza.​—Kolimbola Mibeko 30:15, 16, 19, 20; talá Maloba na nsuka ya lisolo 3.

“MIBEKO NA YE EZALI KILO TE”

13, 14. Ndenge nini toyebi ete mibeko ya Nzambe eleki mpasi te mpo na kotosa yango? Pesá ndakisa.

13 Omonaka ete mibeko ya Yehova ezali mpasi mingi mpo na kotosa yango to ekotya yo nkaka? Biblia elobi polele ete: “Mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kilo” elimboli “bozito.” Bavɛrsɛ mosusu esaleli liloba yango mpo na kolobela mibeko ya makasimakasi to bato oyo balukaka kokonza mpe konyokola basusu. (Matai 23:4; Misala 20:29, 30) Biblia haut fleuve ebongoli yango ete: “Malako na ye mazali na bozito tɛ.” Ya solo, mibeko ya Yehova ezali “kilo” te, elingi koloba, eleki mpasi te mpo na kotosa yango. Yehova asɛngaka biso kaka makambo oyo tokokoka kosala.

14 Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kosalisa moninga na yo moko akende kokɔta na ndako ya sika. Akangisi biloko mpe atye yango na bakartɔ. Bakartɔ mosusu ezali pɛpɛlɛ, kasi mosusu ezali kilo mingi mpe ekosɛnga bato mibale mpo na kotombola yango. Okanisi ete moninga na yo akosɛnga yo omema kartɔ oyo eleki kilo mingi? Akosala bongo te. Mpo na nini? Mpo alingi konyokola yo te. Lokola moninga wana, ata mokolo moko te Yehova akosɛnga biso tósala likambo oyo eleki mpasi mpo na biso. (Kolimbola Mibeko 30:11-14) Yehova ayebi biso malamu. “Ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.”​—Nzembo 103:14.

15. Mpo na nini tokoki kondima ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso?

15 Moize ayebisaki Bayisraele ete mibeko ya Yehova ezali mpo na “bolamu na [bango] ntango nyonso” mpe soki batosi yango ‘bakotikala na bomoi.’ (Kolimbola Mibeko 5:28-33; 6:24) Ezali mpe bongo lelo. Likambo nyonso oyo Yehova asɛngaka tósala ebongisaka bomoi na biso. (Tángá Yisaya 48:17.) Tata na biso Yehova ayebaka ntango nyonso oyo eleki malamu mpo na biso. (Baroma 11:33) Biblia elobi: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yango elimboli ete bolingo nde esimbi maloba mpe misala na ye nyonso.

16. Atako tofandi na mokili ya mabe mpe tozali bato ya kozanga kokoka, ndenge nini toyebi ete tokoki kotosa Nzambe?

16 Kotosa Nzambe ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Tofandi na mokili moko ya mabe, oyo mokonzi na yango ezali Zabolo. Zabolo alukaka kotinda bato básala makambo ya mabe. (1 Yoane 5:19) Lisusu, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kobundisa makanisi mpe bamposa na biso, mpo ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. (Baroma 7:21-25) Kasi, bolingo oyo tolingaka Yehova epesaka biso makasi ya kosala oyo ezali malamu. Nzambe amonaka milende oyo tosalaka mpo na kotosa ye, mpe apesaka biso elimo santu na ye mpo esalisa biso. (1 Samwele 15:22, 23; Misala 5:32) Elimo santu ekosalisa biso tókolisa bizaleli oyo ekosala ete kotosa Nzambe ezala mpasi te mpo na biso.​—Bagalatia 5:22, 23.

17, 18. (a) Tokoyekola nini na mokanda oyo? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

17 Na mokanda oyo, tokoyekola ndenge ya kosepelisa Yehova na bomoi na biso. Tokomona ndenge ya kotosa mitinda mpe mibeko na ye mokolo na mokolo. Kobosana te ete Yehova asɛngaka biso na makasi te ete tótosa ye. Ntango toponi kotosa ye, bomoi na biso ekokóma malamu mpe tokozala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Longola yango, ndenge na biso ya kotosa Nzambe ekomonisa soki tolingaka ye mingi to te.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 4.

18 Mpo na kosalisa biso tóyeba kokesenisa mabe na malamu, Yehova apesá mokomoko na biso lisosoli. Soki toteyi lisosoli na biso, ekoki kosalisa biso “tótosaka mibeko na ye.” Lisosoli ezali nini, mpe ndenge nini tokoki koteya yango? Mokapo oyo elandi elobeli yango.