Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 9

‘Kimá pite!’

‘Kimá pite!’

“Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa [makasi] ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”​—BAKOLOSE 3:5.

1, 2. Balaama asalelaki mayele nini mpo na kokanga na motambo basaleli ya Yehova?

 MOBOMI-MBISI moko akei na esika oyo akoki kozwa lolenge ya mbisi oyo azali koluka. Aponi mpambo ya malamu, atye yango na ndɔbɔ mpe abwaki ndɔbɔ na ye na mai. Azali kaka kozela, mpe ntango mbisi elei mpambo mpe ekangami na ndɔbɔ, abimisi mbisi yango na mai.

2 Bato mpe bakoki kokangama na motambo. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki pene mpenza ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, ntango batyaki bahema na mokili patatalu ya Moabe. Mokonzi ya Moabe alakaki mobali moko na nkombo Balaama ete akopesa ye mbongo ebele soki alakeli Yisraele mabe. Nsukansuka, Balaama akanisaki mayele moko ya mabe mpo Bayisraele bango moko básala likambo oyo ekomemela bango elakeli mabe. Aponaki malamu mpambo na ye. Atindaki bilenge basi ya Moabe epai ya Bayisraele mpo na kolɛngola mibali.​—Mitángo 22:1-7; 31:15, 16; Emoniseli 2:14.

3. Ndenge nini Bayisraele balyaki mpambo oyo Balaama atyelaki bango?

3 Mpambo ya Balaama esimbaki? Ɛɛ; mibali ebele ya Yisraele basalaki “pite na bana basi ya Moabe.” Babandaki mpe kosambela banzambe ya lokuta, na ndakisa Baala ya Peore, nzambe ya makambo ya mbindo ya kosangisa nzoto. Na yango, Bayisraele 24 000 bakufaki wana, pene mpenza ya kokɔta na Mokili ya Ndaka.​—Mitángo 25:1-9.

4. Mpo na nini ebele ya Bayisraele bakweaki na motambo ya pite?

4 Mpo na nini ebele ya Bayisraele bakweaki na motambo oyo Balaama atyaki? Bazalaki kokanisa kaka bisengo na bango moko, mpe babosanaki nyonso oyo Yehova asalelaki bango. Mpo na nini Bayisraele basengelaki kotikala sembo epai ya Nzambe? Yehova abimisaki bango na boombo na Ezipito, aleisaki bango na esobe, mpe abatelaki bango tii bakómaki pene ya Mokili ya Ndaka. (Baebre 3:12) Atako bongo, bakweaki na motambo ya pite. Ntoma Paulo akomaki: “Tósalaka mpe pite te, ndenge bamosusu na bango basalaki pite, mpe bakweaki.”​—1 Bakorinti 10:8.

5, 6. Likambo oyo esalemaki na mokili patatalu ya Moabe ekoki koteya biso nini?

5 Biso mpe tokómi pene mpenza ya mokili ya sika. Na yango, tokoki koloba ete tozali lokola Bayisraele ntango bakómaki pene na Mokili ya Ndaka. (1 Bakorinti 10:11) Na mokili oyo tozali, bato bamipesi na makambo ya kosangisa nzoto koleka kutu bato ya Moabe. Basaleli ya Yehova mpe bakoki kokwea na motambo yango. Kutu, pite ezali mayele oyo Zabolo azali kosalela mingi mpo na kokanga bato na motambo.​—Mitángo 25:6, 14; 2 Bakorinti 2:11; Yuda 4.

6 Omituna boye: ‘Nakopona kozala na bomoi ya bisengo oyo ekoumela kaka mwa ntango moke, to nakolinga kozala na bomoi ya esengo oyo ekoumela libela na libela na mokili ya sika?’ Omoni te ete ebongi mpenza tósala makasi tótosa etinda ya Yehova oyo elobi: “Bókima pite”?​—1 Bakorinti 6:18.

PITE EZALI NINI?

7, 8. (a) “Pite” ezali nini? (b) Mpo na nini ezali likambo ya lisɛki te?

7 Bato mingi lelo bazali lisusu na nsɔni te mpe bazali kobuka na nko mibeko ya Nzambe na likambo ya kosangisa nzoto. Biblia esaleli liloba “pite” mpo na kolobela kosangisa nzoto ná moto oyo bobalani na ye te ndenge Biblia esɛngi. Elimboli mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi to mpe moto na nyama. Ezali mpe kofiba enama ya mwasi to ya mobali, kosangisa nzoto na esumbeli, to kosimbasimba enama ya moto mosusu mpo na kolamwisa mposa na ye.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 23.

8 Biblia emonisi polele ete moto oyo azali kokoba kosala pite, akoki kotikala na lisangá te. (1 Bakorinti 6:9; Emoniseli 22:15) Lisusu, moto oyo asalaka pite amisambwisaka mpe bato batyelaka ye lisusu motema te. Pite ebendaka kaka mindɔndɔ. Mbala mingi etungisaka lisosoli mpe moto akoki kozwa zemi oyo akanaki te, ebimisaka mikakatano na libala, epesaka maladi, mpe ekoki ata komema na liwa. (Tángá Bagalatia 6:7, 8.) Soki moto azwi mpenza ntango ya kofanda mpe kokanisa makambo oyo pite ebimisaka, mbala mosusu akolinga lisusu kosala pite te. Kasi, mbala mingi moto akanisaka kaka ndenge ya kokokisa bamposa na ye moko ntango abandi kosala likambo ya liboso oyo ememaka na pite. Likambo yango ezali pornografi.

PORNOGRAFI: LIKAMBO YA LIBOSO OYO EMEMAKA NA PITE

9. Mpo na nini pornografi ezali likama mpenza?

9 Mokano ya pornografi ezali ya kolamwisa bamposa ya kosangisa nzoto. Lelo oyo, pornografi ezali bisika nyonso: na mikanda, babuku, miziki, na televizyo mpe na Internet. Bato mingi bakanisaka ete pornografi ezali mabe te, nzokande ezali mpenza likama monene. Ekoki kokómisa moto moombo ya kosangisa nzoto mpe kosala ete akóma na bamposa ya mabe koleka. Soki moto abandi kotala pornografi, ekoki komema ye na kosimbasimba enama na ye ya kobotela tii akoyoka elɛngi, kobimisa matata na libala, to ata koboma libala.​—Baroma 1:24-27; Baefese 4:19; talá Maloba na nsuka ya lisolo 24.

Ezali malamu kokeba ntango tozali kosalela Internet

10. Ndenge nini maloba ya Yakobo 1:14, 15 ekoki kosalisa biso tókima pite?

10 Ezali na ntina tóyeba ndenge oyo moto akweaka na pite. Talá likebisi oyo ezali na Yakobo 1:14, 15: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye. Na nsima mposa wana, ntango ekoli, eboti lisumu; lisumu mpe, ntango esalemi, eboti liwa.” Na yango, soki makanisi ya mabe eyeli yo, benganá yango mbala moko. Soki omoni bililingi ya mbindo kozanga okana yango, longolá miso mbala moko! Soki ezali na ordinatɛrɛ, kangá yango; soki ezali na TV, luká eloko mosusu ya kotala! Kolinga te bamposa ya mabe ezwa esika na motema na yo, mpo ekoki kokóma makasi mpe ekozala mpasi mingi mpo obengana yango.​—Tángá Matai 5:29, 30.

11. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ntango makanisi ya mabe eyeli biso?

11 Yehova ayebi biso malamu koleka biso moko. Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi, ayebi mpe ete tokoki kolonga bamposa ya mbindo. Alobi na biso: “Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa [makasi] ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Bakolose 3:5) Ata soki kosala yango ezali pɛtɛɛ te, Yehova azali na motema molai mpe akosalisa biso. (Nzembo 68:19) Ndeko mobali moko ya elenge akómaki moombo ya pornografi mpe ya kosimbasimba enama na ye ya kobotela tii akoyoka elɛngi. Baninga na ye ya kelasi bazalaki komona ete moto nyonso oyo azali kokola asengeli kosala bongo, kasi ndeko yango alobaki: “Lisosoli na ngai ebebaki, mpe nakómaki na bomoi ya mbindo.” Na nsima, amonaki ete asengeli kopekisa bamposa na ye, mpe na lisalisi ya Yehova alongwaki na boombo yango. Soki makanisi ya kosala pite eyeli yo, sɛngá Yehova apesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo obatela makanisi na yo pɛto.​—2 Bakorinti 4:7; 1 Bakorinti 9:27.

12. Mpo na nini tosengeli ‘kobatela motema na biso’?

12 Salomo akomaki: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23) “Motema” na biso ezali bomoto na biso ya kati, oyo Yehova amonaka. Makambo oyo totalaka ekoki mpenza kobongola bomoto na biso. Yobo, moto ya sembo, alobaki boye: “Nasalá kondimana na miso na ngai. Bongo ekobanda boni natya likebi epai ya ngɔndɔ?” (Yobo 31:1) Ndenge moko na Yobo, tosengeli kokeba na makambo oyo totalaka mpe oyo tokanisaka. Mpe lokola mokomi ya nzembo, tosengeli kobondela Nzambe ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.”​—Nzembo 119:37.

DINA APONAKI BANINGA YA MABE

13. Dina aponaki baninga ya ndenge nini?

13 Baninga na biso bakoki mpenza kobongola biso, ezala na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe. Soki tozali na baninga oyo batosaka mibeko ya Nzambe, bakoki kosalisa biso mpe tósalaka yango. (Masese 13:20; tángá 1 Bakorinti 15:33.) Likambo oyo ekómelaki Dina ekoki kosalisa biso tómona ntina ya kozala na baninga ya malamu. Dina mwana ya Yakobo, abotamaki mpe akolaki na libota ya bato oyo bazalaki kosambela Yehova. Azalaki na etamboli ya mbindo te, kasi asalaki boninga ya makasi na bana basi ya Kanana oyo bazalaki kosambela Yehova te. Bato ya Kanana bazalaki kotalela kosangisa nzoto ndenge moko te na basaleli ya Nzambe, mpe eyebanaki ete bazalaki kolinga makambo ya pite. (Balevi 18:6-25) Mokolo moko ntango Dina azalaki na baninga na ye wana, akutanaki na elenge mobali moko ya Kanana na nkombo Shekeme, mpe mobali yango alulaki ye. Na libota ya Shekeme bazalaki komona ete elenge yango azali mobali “oyo alekaki na lokumu.” Kasi azalaki kolinga Yehova te.​—Ebandeli 34:18, 19.

14. Nini ekómelaki Dina?

14 Shekeme asalaki likambo oyo amonaki ete ebongi mpe ezali malamu mpo na ye. Lokola azalaki kolula Dina, “azwaki ye” mpe “abebisaki ye.” (Tángá Ebandeli 34:1-4.) Likambo wana ya mabe ememelaki Dina mpe libota na ye mobimba makambo ebele ya mpasi.​—Ebandeli 34:7, 25-31; Bagalatia 6:7, 8.

15, 16. Ndenge nini tokoki kokóma bato ya bwanya?

15 Tokozela te tósala naino libunga oyo Dina asalaki mpo tóndima ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Soki tomityeli mokano ya koyeba “nzela mobimba ya oyo ezali malamu,” tokokima mindɔndɔ mpe bampasi ezangá ntina.​—Masese 2:6-9; Nzembo 1:1-3.

16 Mpo tókóma bato ya bwanya, tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe, kobondelaka liboso ya kozwa bikateli, mpe kolandaka toli ya malamu ya moombo ya sembo mpe ya mayele. (Matai 24:45; Yakobo 1:5) Ya solo, toyebi ete biso nyonso tozali bato ya bolɛmbu mpe ya kozanga kokoka. (Yirimia 17:9) Kasi, okosala nini soki moto akebisi yo ete nzela oyo ozali kolanda ekoki komema yo na pite? Okosilika, to okomikitisa mpe okondima lisalisi?​—2 Bakonzi 22:18, 19.

17. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge toli ya ndeko moko ekoki kosalisa biso.

17 Tózwa ndakisa moko. Na esika ya mosala, mobali moko abandi kotyela ndeko mwasi moko likebi mingi mpe asɛngi ye bákende kozwa mwa mopɛpɛ. Mobali yango asambelaka Yehova te, kasi azali komonana moto ya boboto mpe ya motema malamu. Ndeko mwasi mosusu amoni bango elongo, mpe na nsima ameki kokebisa ndeko wana. Ndeko na biso oyo azalaki na mobali wana akosala nini? Akoluka komilongisa, to akomona ete ezali likebisi ya bwanya? Mbala mosusu ndeko yango alingaka Yehova mpe alingi kosala oyo ezali malamu. Kasi, soki azali kaka kobima na mwana mobali wana, azali mpenza ‘kokima pite,’ to azali nde “kondimela motema na ye moko”?​—Masese 22:3; 28:26; Matai 6:13; 26:41.

NDAKISA MALAMU YA YOZEFE

18, 19. Ndenge nini Yozefe akimaki pite?

18 Yozefe azalaki moombo na Ezipito ntango azalaki elenge. Mokolo na mokolo, mwasi ya nkolo na ye azalaki kosɛnga ye básangisa nzoto, kasi Yozefe ayebaki ete ezali mabe. Yozefe azalaki kolinga Yehova mpe alingaki kosepelisa ye. Na yango, mbala nyonso oyo mwasi yango alukaki kolɛngola ye, Yozefe azalaki koboya. Lokola azalaki moombo, akokaki te kokima nkolo na ye kaka boye. Mokolo moko ntango mwasi ya nkolo na ye alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi, Yozefe “akimaki mpe abimaki libándá.”​—Tángá Ebandeli 39:7-12.

19 Yozefe alingaki kokoka kosala bongo te soki azalaki kokanisakanisa makambo ya mbindo to soki azalaki kolɔta kaka mwasi yango. Kasi, boyokani makasi oyo Yozefe azalaki na yango na Yehova ezalaki na ntina koleka eloko mosusu nyonso. Ayebisaki mwasi yango: “Nkolo na ngai . . . aboyeli ngai ata eloko moko te longola kaka yo, mpo ozali mwasi na ye. Bongo ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?”​—Ebandeli 39:8, 9.

20. Ndenge nini toyebi ete Yozefe asepelisaki Yehova?

20 Atako Yozefe azalaki na mboka mopaya mpe mosika na baboti na ye, atikalaki sembo epai ya Yehova, mpe Yehova apambolaki ye. (Ebandeli 41:39-49) Yehova asepelaki mingi na bosembo ya Yozefe. (Masese 27:11) Kokima pite ekoki kozala mpasi. Kasi, kanisá maloba oyo: “Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe. Ye abatelaka milimo [bomoi] ya bato na ye ya sembo; Abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”​—Nzembo 97:10.

21. Ndenge nini ndeko mobali moko ya elenge amekolaki Yozefe?

21 Mokolo na mokolo, basaleli ya Yehova bamonisaka na mpiko nyonso ete ‘bayinaka oyo ezali mabe’ mpe ‘balingaka oyo ezali malamu.’ (Amose 5:15) Ata soki ozali na mbula boni, okoki kotikala sembo epai ya Yehova. Elenge mobali moko akutanaki na komekama na eteyelo. Elenge mwasi moko ayebisaki ye ete akosangisa na ye nzoto soki asalisi ye na ekzamɛ ya matematiki. Ndeko mobali yango asalaki nini? Alandaki ndakisa ya Yozefe. Alobi: “Naboyaki likanisi na ye mbala moko. Lokola natikalaki sembo, namipesaki kilo mpe nabatelaki lokumu na ngai.” “Bisengo ya ntango mokuse” ata ya ndenge nini oyo moto ayokaka soki asali pite etungisaka mpe epesaka mpasi na motema. (Baebre 11:25) Kasi, kotosa Yehova epesaka ntango nyonso esengo ya solosolo.​—Masese 10:22.

TIKÁ YEHOVA ASALISA YO

22, 23. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ata soki tosali lisumu ya monene?

22 Satana akoluka kosalela pite mpo na kokweisa biso. Yango ekoki kozala mokakatano monene mpo, na bantango mosusu, biso nyonso tozalaka na makanisi ya mabe. (Baroma 7:21-25) Yehova ayebi yango mpe abosanaka te ete “tozali putulu.” (Nzembo 103:14) Bongo soki mokristo asali lisumu ya pite? Tokoloba ete elikya ezali lisusu te mpo na ye? Te, elikya ezali. Soki moto abongoli mpenza motema, Yehova akosalisa ye, mpo ‘asepelaka kolimbisa.’​—Nzembo 86:5; Yakobo 5:16; tángá Masese 28:13.

23 Yehova apesi biso mpe “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bankulutu oyo balingaka biso mpe batyelaka biso likebi. (Baefese 4:8, 12; Yakobo 5:14, 15) Atye bankulutu mpo na kosalisa biso tózongisa boyokani na biso na Nzambe.​—Masese 15:32.

ZALÁ NA BOSOSOLI

24, 25. Na ndenge nini bososoli ekoki kosalisa biso tókima pite?

24 Mpo tózwa bikateli ya malamu, tosengeli koyeba ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso. Tólinga te kozala lokola elenge mobali oyo Masese 7:6-23 elobeli. Biblia elobi ete azalaki na “motema te,” elingi koloba azangaki bososoli, yango wana akweaki na motambo ya pite. Kozala na bososoli mpe kozala na mayele ezali makambo mibale oyo ekeseni. Moto oyo azali na bososoli alukaka koyeba makanisi ya Yehova mpe koyokanisa yango na bomoi na ye. Kanisá maloba oyo ya bwanya, oyo elobi: “Ye oyo azali kozwa motema [to bososoli] azali kolinga molimo na ye. Ye oyo azali kobatela bososoli akozwa bolamu.”​—Masese 19:8.

25 Ondimaka mpenza ete mibeko ya Yehova ebongi? Ondimaka mpenza ete okozala na esengo soki ozali kotosa yango? (Nzembo 19:7-10; Yisaya 48:17, 18) Soki ondimi yango naino te, kanisá makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asali mpo na yo. Biblia elobi: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.” (Nzembo 34:8) Okomona ete soki ozali kotosa, okolinga mpe Nzambe mingi. Lingá makambo oyo alingaka, mpe yiná oyo ayinaka. Tondisá makanisi na yo na makambo oyo ezali solo, ya boyengebene, ya pɛto, oyo ekoki kolingama, mpe oyo ebongi kokumisama. (Bafilipi 4:8, 9) Tokoki kozala lokola Yozefe, oyo azwaki bolamu mpo asalelaki bwanya oyo euti na Yehova.​—Yisaya 64:8.

26. Tokolobela nini na mikapo mibale oyo elandi?

26 Ezala obalá to ozali monzemba, Yehova alingi osepela na bomoi mpe ozala na esengo. Na mikapo mibale oyo elandi tokolobela makambo oyo ekoki kosalisa biso tózala na libala ya malamu.