Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 5

Ndenge ya kokabwana na mokili

Ndenge ya kokabwana na mokili

“Bozali bato ya mokili te.”​—YOANE 15:19.

1. Mpo na nini Yesu amitungisaki na butu ya nsuka liboso abomama?

 NA BUTU ya nsuka liboso abomama, Yesu ayebaki ete akotika bayekoli na ye, mpe azalaki komitungisa mpo na bomoi na bango. Ayebisaki bango: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Na nsima, abondelaki Tata na ye mpo na bango, alobaki: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:15, 16) Maloba yango ya Yesu elimboli nini?

2. “Mokili” oyo Yesu alobelaki ezali nini?

2 Na vɛrsɛ yango, liloba “mokili” elimboli bato oyo bayebi Nzambe te mpe oyo Satana azali koyangela. (Yoane 14:30; Baefese 2:2; Yakobo 4:4; 1 Yoane 5:19) Na ndenge nini tozali “bato ya mokili te”? Na mokapo oyo, tokolobela makambo oyo emonisaka ete tozali bato ya mokili te: Tozalaka sembo na Bokonzi ya Nzambe mpe tokɔtaka na makambo ya politiki te. Toboyaka elimo ya mokili. Tolataka mpe tobongisaka nzoto na ndenge ya kolekisa ndelo te, mpe totyaka mbongo na esika na yango. Tolati mpe molato ya etumba oyo Nzambe apesi biso.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 16.

ZALÁ SEMBO NA BOKONZI YA NZAMBE

3. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela makambo ya politiki?

3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonaki ete bato bazalaki na mitungisi ebele mpe bomoi ezalaki mpasi. Ayokelaki bango mawa mpe alingaki kosalisa bango. Kasi, akómaki mokonzi ya politiki mpo asalisa bango? Te. Ayebaki ete bato basengelaki nde na Bokonzi, to guvɛrnema ya Nzambe. Yesu nde asengelaki kozala Mokonzi ya Bokonzi yango, mpe na mosala ya kosakola, ateyaki mingimingi makambo ya Bokonzi yango. (Danyele 7:13, 14; Luka 4:43; 17:20, 21) Yesu amikɔtisaki na makambo ya politiki te, akɔtaki mpe ata moke te na makambo ya mokili. Ntango azalaki kosamba liboso ya Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma, Yesu alobaki: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Bayekoli na ye mpe bazalaki kokɔta na makambo ya politiki te. Buku Sur le chemin de la civilisation (na Anglais) elobaki ete bakristo ya liboso “bazalaki kondima mikumba ya politiki te.” Lelo oyo, bakristo ya solo mpe batalelaka makambo kaka ndenge wana. Topesaka mabɔkɔ na Bokonzi ya Nzambe mpe tokɔtaka te na makambo ya politiki ya mokili oyo.​—Matai 24:14.

Okokoka kolimbola ntina oyo opesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na bosembo nyonso?

4. Na ndenge nini bakristo ya solo bapesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ?

4 Baambasadɛrɛ bazalaka bamonisi ya guvɛrnema na bango na mboka-mopaya; na yango bakɔtaka na makambo ya politiki ya mboka yango te. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali na elikya ya koyangela elongo na Kristo na likoló, bazali mpe baambasadɛrɛ. Ntoma Paulo akomelaki bango ete: “Tozali ba ambasadɛrɛ na esika ya Kristo.” (2 Bakorinti 5:20, msl) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe. Bakɔtaka te na makambo ya politiki mpe makambo ya baguvɛrnema ya mokili oyo. (Bafilipi 3:20) Basalisi nde bamilio ya bato báyeba guvɛrnema ya Nzambe. “Bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, bapesaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ. Bango mpe bakɔtaka na makambo ya mokili te. (Yoane 10:16; Matai 25:31-40) Emonani polele ete mokristo ya solo asengeli te kokɔta na makambo ya politiki ya mokili oyo.​—Tángá Yisaya 2:2-4.

5. Wapi ntina moko oyo bakristo bakendaka etumba te?

5 Bakristo ya solo bamonaka bandeko nyonso ya lisangá ete bazali libota moko mpe bazali na bomoko, batalaka mimeseno to ekólo ya moto te. (1 Bakorinti 1:10) Soki mokristo andimi kokende etumba, ekozala lokola nde akei kobundisa bato ya libota na ye moko, bandeko na ye bandimi, oyo Yesu apesaki etinda ete tólinga bango. (Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 3:10-12) Longola yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bálingaka ata banguna na bango.​—Matai 5:44; 26:52.

6. Ndenge nini basaleli ya Yehova batalelaka baguvɛrnema?

6 Atako biso bakristo tokɔtaka na makambo ya mokili te, tosalaka makasi tózala bana-mboka ya malamu. Na ndakisa, tomemyaka baguvɛrnema; totosaka mibeko ya mboka mpe tofutaka mpako. Kasi, tobosanaka te ete tosengeli kopesa “Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:17; Baroma 13:1-7; 1 Bakorinti 6:19, 20) Kati na “biloko ya Nzambe” tokoki kotánga bolingo oyo tolingaka ye, botosi na biso mpe losambo na biso epai na ye. Tondimaka ata kokufa na esika tózanga botosi epai ya Yehova.​—Luka 4:8; 10:27; tángá Misala 5:29; Baroma 14:8.

BOYÁ “ELIMO YA MOKILI”

7, 8. “Elimo ya mokili” ezali nini, mpe esalaka ete bato bákóma ndenge nini?

7 Kokabwana na mokili ya Satana elimboli koboya ete “elimo ya mokili” etambwisa biso. Elimo yango ezali ndenge ya kokanisa to ya kosala makambo oyo euti epai ya Satana, mpe ezali kotambwisa bato oyo basalelaka Yehova te. Kasi bakristo baboyaka elimo yango. Ndenge ntoma Paulo alobaki yango, “tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe.”​—1 Bakorinti 2:12; Baefese 2:2, 3; talá Maloba na nsuka ya lisolo 17.

8 Elimo ya mokili esalaka ete bato bákóma mitema mabe, lolendo, mpe batomboki. Etindaka bango bákanisa ete kotosa Nzambe ezali na ntina te. Satana alingaka ete bato básala oyo balingi, kozanga kokanisa mbuma mabe oyo yango ekoki kobimisa. Alingaka bato bákanisa ete “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso” nde eleki ntina na bomoi. (1 Yoane 2:16; 1 Timote 6:9, 10) Zabolo azali kosala nyonso mpo na kokosa basaleli ya Yehova mpe kotinda bango bákóma kokanisa lokola ye.​—Yoane 8:44; Misala 13:10; 1 Yoane 3:8.

9. Ndenge nini elimo ya mokili ekoki kokɔtela yo?

9 Ndenge moko na mopɛpɛ, elimo ya mokili ezali bisika nyonso. Soki osali makasi te mpo na koboya yango, okobenda yango. (Tángá Masese 4:23.) Ekoki kokɔtela yo kozanga oyeba, na ndakisa okoki kobanda kolanda makanisi mpe bizaleli ya bato oyo basambelaka Yehova te. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Ekoki mpe kokɔtela yo na nzela ya makambo lokola pornografi, bapɛngwi, to masano oyo emonisaka elimo ya kowelana.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 18.

10. Ndenge nini okoki koboya elimo ya mokili?

10 Na yango, ndenge nini okoki koboya elimo ya mokili mpo etambwisa yo te? Osengeli kotikala penepene na Yehova mpe kotika bwanya na ye etambwisa yo. Osengeli mpe kobondelaka ntango nyonso mpo na kosɛnga elimo santu mpe kokoba komipesa na mosala ya Nzambe. Yehova nde moto aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba. Zalá na elikya ete akoki kosalisa yo oboya elimo ya mokili.​—1 Yoane 4:4.

SALÁ ETE MOLATO NA YO EKUMISAKA NZAMBE

11. Ndenge nini molato ya bato emonisaka elimo ya mokili?

11 Okomonisa mpe ete ozali moto ya mokili te na molato na yo mpe na ndenge na yo ya kobongisa nzoto. Na mokili, bato mingi balataka mpo na kobenda likebi ya basusu, kolamwisa makanisi ya pite epai ya basusu, komonisa botomboki na bango, to mpo na kolakisa ete bazali na mbongo mingi. Bato mosusu bakipaka te molato na bango to ndenge oyo bakomonana na miso ya bato. Ntango mosusu balataka kaka bongobongo to mpe babimaka salite. Tóndima ata moke te ete elimo ya ndenge wana ekɔtela biso.

Molato na ngai ekumisaka Yehova?

12, 13. Mitinda nini esengeli kosalisa yo oyeba elamba okolata?

12 Basaleli ya Yehova balingaka kolata malamu, bilamba ya pɛto, ya mindɔndɔ te mpe oyo ebongi mpo na likambo oyo bazali kosala. Tosengeli kolata na kolekisa ndelo te mpe tosengeli kozala na makanisi ya malamu, mpo na komonisa ete tokangami na Nzambe.​—1 Timote 2:9, 10; Yuda 21.

13 Molato na yo ekoki kotinda bato báfinga to bákumisa Yehova mpe basaleli na ye. Tolingaka kosala “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Bakorinti 10:31) Kolekisa ndelo te elimboli kotalela makanisi mpe mayoki ya basusu. Yango wana, ntango ozali kopona bilamba to ndenge ya kobongisa nzoto, kobosana te ndenge bato mosusu bakoki koyoka mpo na yango.​—1 Bakorinti 4:9; 2 Bakorinti 6:3, 4; 7:1.

14. Tosengeli kokanisa makambo nini ntango tozali kopona elamba oyo tokolata mpo na makambo ya lisangá?

14 Tolataka ndenge nini mpo na kokende na makita to kobima na mosala ya kosakola? Tolukaka kobenda likebi mingi na nzoto na biso? Bilamba na biso eyokisaka basusu nsɔni? Tomonaka ete molato na biso etali kaka biso moko, moto mosusu asengeli kokɔta na likambo yango te? (Bafilipi 4:5; 1 Petro 5:6) Ezali solo ete tolingaka kobima kitoko na miso ya bato, kasi eloko ekómisaka biso kitoko mingi ezali nde bizaleli ya bokristo. Yango nde bizaleli oyo Yehova amonaka ntango atalaka biso. Emonisaka ndenge oyo tozalaka mpenza na kati, “bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema . . . , oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”​—1 Petro 3:3, 4.

15. Mpo na nini Yehova ayebisi biso polele te elamba nini tosengeli kolata to kolata te?

15 Yehova apesi biso liste ya mibeko te oyo emonisi elamba nini tokolata to tokolata te. Kasi, apesi biso mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. (Baebre 5:14) Alingi ete bikateli na biso, ya mike to ya minene, emonisa ete tolingaka ye mpe tolingaka basusu. (Tángá Marko 12:30, 31.) Na mokili mobimba, basaleli ya Yehova balataka bilamba oyo ebongi, na kolanda mimeseno ya mboka na mboka mpe molato to monzɛlɛ oyo basepeli na yango. Molato yango ya ndenge na ndenge ezalaka kitoko mpe esepelisaka.

TALELÁ MBONGO NA NDENGE OYO EBONGI

16. Ndenge nini makanisi ya bato ya mokili na oyo etali mbongo ekeseni na makambo oyo Yesu ateyaki? Mituna nini okoki komituna?

16 Satana alingi bato bákanisa ete mbongo mpe biloko ya mokili nde ekopesa bango esengo, kasi basaleli ya Yehova bayebi ete ezali solo te. Tondimaka maloba ya Yesu ete: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Mbongo ekoki kopesa yo esengo ya solosolo te. Ekoki te kopesa yo baninga ya solosolo, kimya ya motema, to bomoi ya seko. Ya solo, tozalaka na mposa ya mwa biloko ya mokili, mpe tolingaka kosepela na bomoi. Kasi Yesu ateyaki biso ete tokozala na esengo soki tozali na boyokani malamu na Nzambe mpe soki losambo na biso nde eloko eleki ntina na bomoi na biso. (Matai 5:3; 6:22) Omituna boye: ‘Natalelaka mbongo ndenge bato ya mokili batalelaka yango? Mbongo nde eloko nalobelaka mingi mpe nakanisaka mingi?’​—Luka 6:45; 21:34-36; 2 Yoane 6.

17. Ndenge nini bomoi na biso ekoki kozala malamu soki toboyi kotalela mbongo ndenge mokili etalelaka yango?

17 Soki totye makanisi na mosala ya Yehova mpe toboyi kotalela mbongo ndenge bato ya mokili batalelaka yango, bomoi na biso ekozala na kimya. (Matai 11:29, 30) Tokosepela na oyo tozali na yango mpe tokozala na kimya ya motema mpe ya makanisi. (Matai 6:31, 32; Baroma 15:13) Tokomitungisa mingi te mpo na biloko ya mokili. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Tokoyoka esengo ya kopesa. (Misala 20:35) Lokola tokozala na makambo ebeleebele te, tokozala na ntango ya kolekisa na bato oyo tolingaka. Tokoki kutu kobanda kolala malamu.​—Mosakoli 5:12.

“MOLATO MOBIMBA YA ETUMBA”

18. Satana alukaka tósala nini?

18 Satana alukaka kobebisa boyokani na biso na Yehova; yango wana tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela yango. Tozali kobunda etumba “na mampinga ya bilimo mabe.” (Baefese 6:12) Satana ná bademo na ye balingi te tózala na esengo mpe tózwa bomoi ya seko. (1 Petro 5:8) Banguna yango ya nguya babundisaka biso, kasi, Yehova akosalisa biso tólonga etumba yango.

19. Baefese 6:14-18 elobi nini mpo na “molato” na biso?

19 Na ntango ya kala, soki basoda bazali na etumba, bazalaki kolata molato ya etumba mpo na komibatela. Ndenge moko mpe, tosengeli kolata ‘molato ya etumba’ oyo Yehova apesi biso. (Baefese 6:13) Ekobatela biso. Mpo na molato yango, Baefese 6:14-18 elobi: “Na yango, bótɛlɛma ngwi, wana loketo na bino ekangami na solo lokola mokaba, mpe bolati ebateli-ntolo ya boyengebene, mpe makolo na bino elati bisaleli ya nsango malamu ya kimya. Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo na yango, bokokoka koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe. Lisusu, bózwa ekɔti ya lobiko, mpe mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe, wana na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ bozali kokoba kobondela na libaku nyonso, na elimo.”

20. Tosengeli kosala nini mpo ‘molato mobimba ya etumba’ esalisa biso?

20 Soki soda abosani kolata eloko moko ya molato na ye ya etumba mpe eteni moko ya nzoto na ye ebatelami te, monguna akobɛta ye kaka wana. Soki tolingi ‘molato ya etumba’ ebatela biso, tosengeli kobosana ata eloko te. Tosengeli kolata yango ntango nyonso mpe kobatela yango malamu. Tokokoba kobunda tii mokili oyo ya Satana ekobebisama mpe Satana ná bademo na ye bakolongolama na mabele. (Emoniseli 12:17; 20:1-3) Yango wana, soki ozali kobunda na bamposa ya mabe to ozali na mwa bolɛmbu moko, kolɛmbisa mabɔkɔ te!​—1 Bakorinti 9:27.

21. Ndenge nini tokoki kolonga etumba?

21 Na ndenge na biso moko, tozali na makasi ya kolonga Zabolo te. Kasi, na lisalisi ya Yehova, tokokoka! Mpo na kotikala sembo, tosengeli kobondela Yehova, koyekola Liloba na ye, mpe kokende makita mpo na kozala elongo na bandeko na biso. (Baebre 10:24, 25) Makambo yango ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe mpe tózala ntango nyonso pene mpo na kokɔtela bindimeli na biso.

KƆTELÁ NTANGO NYONSO BINDIMELI NA YO

22, 23. (a) Okoki kosala nini mpo okɔtelaka ntango nyonso bindimeli na yo? (b) Tokolobela nini na mokapo elandi?

22 Osengeli ntango nyonso koyeba ndenge ya kokɔtela bindimeli na yo. (Yoane 15:19) Na makambo mosusu, Batatoli ya Yehova bazwaka ekateli oyo ekeseni na oyo ya bato mingi. Omituna boye: ‘Nayebaka mpenza ntina oyo Batatoli bazwaka ekateli yango? Nandimaka mpenza ete makambo oyo Biblia elobi mpe oyo moombo ya sembo mpe ya mayele alobaka ezalaka solo? Nasepelaka ndenge nazali Motatoli ya Yehova? (Nzembo 34:2; Matai 10:32, 33) Nakokoka koyebisa basusu makambo oyo nandimaka?’​—Matai 24:45; Yoane 17:17; tángá 1 Petro 3:15.

23 Na makambo mingi, ezalaka mpasi te koyeba oyo osengeli kosala mpo ozala mosika na mokili. Kasi na bantango mosusu, okoyeba polele te osala nini. Satana alukaka kokweisa biso na mitambo ya ndenge mingi. Moko ya mitambo na ye ezali kominanola. Ndenge nini okoki kopona kominanola ya malamu? Tokolobela yango na mokapo oyo elandi.