Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 6

Ndenge ya kopona kominanola

Ndenge ya kopona kominanola

“Bósala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”​—1 BAKORINTI 10:31.

1, 2. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango tozali kopona kominanola?

 KANISÁ ete ntango kaka olingi olya mbuma oyo babengi pɔme omoni ete eteni na yango moko epɔlá. Okosala nini? Okolya yango kaka bongo? Okobwaka yango nyonso? To okolongola esika oyo epɔlá mpo olya eteni ya malamu oyo etikali?

2 Na makambo mosusu, kominanola ezali lokola mbuma wana. Kominanola mosusu ekoki kozala malamu, kasi mingi na yango epɔlá na makambo ya mbindo, mobulu to misala ya bademo. Na yango, ntango ozali kopona kominanola, olobaka nini? Olobaka nde ete “etali ngai moko, nakopona nyonso oyo nalingi”? To olobaka “kominanola nyonso ezali mabe”? To oponaka kominanola ya malamu mpe oboyaka oyo ya mabe?

3. Tosengeli kokanisa likambo nini ntango tozali kopona kominanola?

3 Biso nyonso tozalaka na mposa ya kominanola mpe tolingaka kopona kominanola oyo ezali malamu. Na yango, tosengeli komituna boye: ndenge nini kominanola na biso ekoki kobebisa losambo oyo topesaka Yehova?

“BÓSALA MAKAMBO NYONSO MPO NA NKEMBO YA NZAMBE”

4. Tángá etinda moko ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tópona kominanola?

4 Ntango moto amipesi na Yehova, alakaka ete akosalela ye bomoi mobimba. (Tángá Mosakoli 5:4.) Tolakaki ye ete tokosala “makambo nyonso mpo na nkembo na ye.” (1 Bakorinti 10:31) Yango elimboli ete tozali bato ya Nzambe ata ntango tozali kominanola to kozwa mopɛpɛ, kasi te kaka ntango tozali na makita to na mosala ya kosakola.

5. Losambo ya ndenge nini tosengeli kopesa Yehova?

5 Likambo nyonso oyo tokoki kosala na bomoi ezali na boyokani na losambo na biso epai ya Yehova. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango alobaki: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.” (Baroma 12:1) Yesu alobaki: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Marko 12:30) Tosengeli ntango nyonso kolinga kopesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu. Na ntango ya kala na Yisraele, bambeka ya nyama oyo bato bazalaki kopesa Yehova esengelaki kozala nzoto malamu. Soki mbeka yango ezali na mbeba, Nzambe azalaki kondima yango te. (Balevi 22:18-20) Ndenge moko mpe, makambo mosusu ekoki kosala ete Yehova andima losambo na biso te. Na ndenge nini?

6, 7. Ndenge nini kominanola ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova?

6 Yehova ayebisi biso: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (1 Petro 1:14-16; 2 Petro 3:11) Yehova akondima losambo na biso kaka soki ezali mosantu, to pɛto. (Kolimbola Mibeko 15:21) Losambo na biso ekoki kozala pɛto te soki tosalaka makambo oyo Yehova ayini, na ndakisa makambo ya mbindo, makambo ya mobulu, to makambo oyo ezali na boyokani na bademo. (Baroma 6:12-14; 8:13) Kasi, Yehova akosepela mpe te soki tondimaka kominanola na makambo yango. Makambo yango ekoki kosala ete losambo na biso ekóma mbindo mpe Yehova andima yango te, mpe ekoki mpenza kobebisa boyokani na biso na ye.

7 Na yango, ndenge nini tokoki kopona kominanola ya malamu? Mitinda nini ekosalisa biso tóyeba kominanola oyo ebongi mpe oyo ebongi te?

YINÁ OYO EZALI MABE

8, 9. Kominanola ya ndenge nini tosengeli koboya? Mpo na nini?

8 Lelo oyo, kominanola ezali ndenge na ndenge. Mosusu ezali oyo bakristo bakoki kondima, kasi mingi ezali malamu te. Ya liboso, tólobela kominanola oyo tosengeli koboya.

9 Bafilme mingi, basite ya Internet, baemisyo ya TV, masano ya video, mpe banzembo etondi na makambo ya mbindo, ya mobulu, mpe misala ya bademo. Balakisaka makambo ya mbindo lokola nde ezali mabe te, kutu esɛkisaka. Kasi, bakristo basalaka makasi báboya kominanola nyonso oyo ebukaka mibeko ya Yehova. (Misala 15:28, 29; 1 Bakorinti 6:9, 10) Soki toboyi kominanola ya ndenge wana, tokomonisa Yehova ete toyinaka oyo ezali mabe.​—Nzembo 34:14; Baroma 12:9.

10. Tokoki kosuka ndenge nini soki tozali kopona kominanola ya mabe?

10 Kasi, bato mosusu bamonaka ete makambo ya mobulu, ya mbindo, to ya bademo ezali na yango mabe te. Balobaka ete: ‘Likama na yango ezali nini? Natalaka kaka, nakosala makambo yango ata mokolo moko te.’ Soki okanisaka bongo, ozali komikosa. Biblia elobi: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yirimia 17:9) Soki ozali kominanola na makambo oyo Yehova andimaka te, ndenge nini okoki koloba ete oyinaka makambo yango? Soki makambo yango ezali kosepelisa biso, tokobanda komona yango lisusu mabe te. Na nsima, lisosoli na biso ekobeba mpe ekobanda kokebisa biso lisusu te soki tolingi kosala likambo ya mabe.​—Nzembo 119:70; 1 Timote 4:1, 2.

11. Ndenge nini Bagalatia 6:7 ekoki kosalisa biso ntango tozali kopona kominanola?

11 Liloba ya Nzambe elobi na biso: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Ezali likambo ya solo: soki ondimi kominanola na makambo ya mabe, nsukansuka okobanda kosala makambo yango. Na ndakisa, bato mosusu bazalaki kotala makambo ya mbindo mpe nsukansuka basalaki pite. Kasi, Yehova asalisaka biso mpo tópona kominanola ya malamu.

SALELÁ MITINDA YA BIBLIA MPO OZWA BIKATELI YA MALAMU

12. Nini ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na oyo etali kominanola?

12 Kominanola mosusu eyebani malamu ete ezali mabe na miso ya Yehova, mpe toyebi ete tosengeli koboya yango. Bongo soki ezali koyebana malamu te? Yehova apesi biso te liste ya mibeko ya makambo oyo tokoki to tokoki te kotala, koyoka, to kotánga. Kasi, alingi tósalela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia. (Tángá Bagalatia 6:5.) Yehova apesi biso mitinda, elingi koloba makambo ya solo oyo eteyaka biso ndenge na ye ya kotalela makambo. Mitinda yango esalisaka biso tóteya lisosoli na biso. Esalisaka biso tóyeba soki “mokano ya Yehova ezali nini” mpo tópona kosala makambo oyo ekosepelisa ye.​—Baefese 5:17.

Mitinda ya Biblia esalisaka biso tópona kominanola

13. Mpo na nini bakristo bazwaka bikateli ya ndenge moko te na oyo etali kominanola? Kasi mokristo nyonso asengeli kosala nini?

13 Mbala mingi, likambo oyo mokristo moko aponi mpo na kominanola ekoki kokesana na oyo mokristo mosusu aponi. Mpo na nini? Moto na moto azali na makambo oyo alingaka. Lisusu, likambo oyo moto moko akoki kondima, moto mosusu akondima yango te. Atako bongo, mpo na kozwa bikateli ya malamu, mokristo nyonso asengeli kolanda mitinda ya Biblia. (Bafilipi 1:9) Yango ekosalisa biso tópona kominanola oyo endimami na Nzambe.​—Nzembo 119:11, 129; 1 Petro 2:16.

14. (a) Likambo nini ya ntina esengeli kotalela mpo na ndenge oyo tosalelaka ntango na biso? (b) Toli nini ntoma Paulo apesaki bakristo?

14 Likambo mosusu ya kotalela ezali ntango boni tokolekisa na kominanola. Yango ekoki komonisa esika oyo totyaka kominanola na bomoi na biso. Lokola tozali bakristo, mosala ya Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na biso. (Tángá Matai 6:33.) Kasi, soki tokebi te, kominanola ekoki kozwa ntango na biso mingi. Ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi.” (Baefese 5:15, 16) Na yango, tosengeli kokata ntango boni tokolekisa na kominanola mpe kosala nyonso mpo mosala ya Nzambe ezala na esika ya liboso na bomoi na biso.​—Bafilipi 1:10.

15. Ndenge nini tokoki komibatela na kominanola oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova?

15 Tomoni ete tosengeli koboya kominanola oyo toyebi ete ezali mabe na miso ya Yehova. Kasi, tokosala nini soki tozali koyeba te soki kominanola moko ezali mabe? Tosengeli kaka kokeba? Kanisá naino. Soki ozali kotambola na ngomba, okokende mpenza pene na esika oyo likama ezali? Te. Soki olingaka bomoi, okokende te na esika oyo ekozala likama mpo na yo. Ezali mpe bongo mpo na kominanola. Liloba ya Nzambe elobi: “Longolá lokolo na yo na makambo oyo ezali mabe.” (Masese 4:25-27) Yango wana, tosengeli koboya kominanola oyo toyebi ete ezali mabe, kasi tosengeli mpe kokeba na kominanola nyonso oyo tozali komona lokola ezali mabe mpo na biso to ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova.

KOYEBA MAKANISI YA YEHOVA

16. (a) Wapi mwa makambo oyo Yehova ayinaka? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete toyinaka makambo oyo Yehova ayinaka?

16 Mokomi ya nzembo akomaki: “Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe.” (Nzembo 97:10) Biblia eteyaka biso ndenge oyo Yehova akanisaka mpe atalelaka makambo. Omituna ndenge makambo oyo oyekoli ekoki kosalisa yo okóma na makanisi oyo eyokani na makanisi ya Yehova. Na ndakisa, toyekoli ete Yehova ayinaka “lolemo ya lokuta mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te, motema oyo ekanaka kosala makambo oyo eyokisaka mpasi, makolo oyo ewelaka kopota mpo na kosala mabe.” (Masese 6:16-19) Toyekoli ete tosengeli koboya “pite, . . . losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, . . . zuwa, nkanda makasimakasi, . . . likunya, kolangwa masanga, bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Bagalatia 5:19-21) Omoni ndenge mitinda yango ya Biblia ekoki kosalisa yo ntango olingi kopona kominanola? Ezali malamu tólanda mibeko ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na biso, ezala ntango tozali elongo na bato mosusu to tozali biso moko. (2 Bakorinti 3:18) Kutu, makambo oyo toponaka ntango tozali biso moko nde emonisaka mpenza soki tozali bato ya ndenge nini.​—Nzembo 11:4; 16:8.

17. Soki olingi opona kominanola, mituna nini osengeli komituna?

17 Yango wana, ntango ozali kopona kominanola, omituna boye: ‘Kominanola oyo nalingi kopona ekosala nini na boyokani na ngai na Yehova? Ekosala nini na lisosoli na ngai?’ Tólobela mitinda mosusu oyo ekoki kosalisa yo ntango ozali kopona kominanola.

18, 19. (a) Toli nini ntoma Paulo apesaki bakristo? (b) Mitinda nini ekosalisa yo mpo na kopona kominanola?

18 Ntango toponi kominanola, tozali nde kopona makambo oyo tolingi kotondisa na makanisi na biso. Ntoma Paulo akomaki: “Makambo nyonso ya solo, makambo nyonso ya lokumu, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kokumisama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.” (Bafilipi 4:8) Soki totondisi makanisi na biso na makambo yango ya malamu, tokoki koloba: “Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova.”​—Nzembo 19:14.

19 Omituna boye: ‘Nazali kotondisa makanisi na ngai na makambo nini? Nsima ya kotala filme to teyatre moko boye, nakómaka na makanisi ya malamu mpe ya kolendisa? Motema na ngai ezalaka kimya, mpe lisosoli na ngai etungisaka ngai te? (Baefese 5:5; 1 Timote 1:5, 19) Nayokaka nsɔni mpo na kobondela Yehova? To namiyokaka mabe? Kominanola yango etindaki ngai nakanisa makambo ya mobulu to ya mbindo? (Matai 12:33; Marko 7:20-23) Na kotalela kominanola oyo naponi, nazali “kolanda makambo ya ntango oyo”?’ (Baroma 12:2) Soki opesi biyano na bosembo na mituna yango, ekoki kosalisa yo omona oyo osengeli kosala mpo obatela boyokani malamu na Yehova. Tosengeli kobondela lokola mokomi ya nzembo ete: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.” *​—Nzembo 119:37.

TALELÁ LISOSOLI YA BASUSU

20, 21. Mpo na nini osengeli kotalela lisosoli ya basusu ntango ozali kopona kominanola?

20 Etinda mosusu ya ntina ya kotalela ezali oyo: “Makambo nyonso epesami nzela; kasi makambo nyonso te nde etongaka. Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:23, 24) Elingi koloba te ete lokola tozali na bonsomi ya kosala likambo moko nde tosengeli kaka kosala yango. Tosengeli kokanisa malamu ndenge bandeko na biso bakotalela makambo oyo toponi.

21 Lisosoli ya bato nyonso esalaka ndenge moko te. Na ndakisa, lisosoli na yo ekoki kopesa yo nzela otala filme moko boye na TV. Kasi, na nsima oyoki ete filme yango etungisi lisosoli ya ndeko mobali to ndeko mwasi moko. Okosala nini? Ata soki ozali na bonsomi ya kotala yango, okoki kozwa ekateli ya kotala yango te. Mpo na nini? Mpo olingi te “kosalela bandeko na [yo] lisumu” to kutu “kosalela Kristo lisumu.” (1 Bakorinti 8:12) Tosengeli te kosala likambo oyo ekobɛtisa ndeko na biso mokristo libaku.​—Baroma 14:1; 15:1; 1 Bakorinti 10:32.

22. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali makambo makasimakasi te ntango bakristo mosusu baponi kominanola oyo bamoni ete ebongi mpo na bango?

22 Okosala nini sikoyo soki lisosoli na yo epekisi yo otala, otánga, to osala eloko oyo moto mosusu andimi kosala yango? Lokola olingaka mpe omemyaka ndeko na yo, ezali malamu te otya ye mbamba mpo apona kaka oyo yo oponi. Moto oyo azali kotambwisa motuka ayebaka ete bato mosusu bakoki kotambwisa mbangu koleka ye to malɛmbɛ, kasi atako bongo bazali kaka basofɛlɛ ya malamu. Ndenge moko mpe, mbala mosusu yo ná ndeko mosusu bolandaka mitinda ya Biblia, kasi makanisi na bino ekeseni mwa moke na oyo etali kominanola oyo mokristo akoki kondima.​—Mosakoli 7:16; Bafilipi 4:5.

23. Nini ekosalisa yo opona kominanola ya malamu?

23 Na mokuse, nini ekosalisa biso tópona kominanola ya malamu? Soki toyokeli lisosoli na biso oyo eteyami malamu na mitinda ya Biblia mpe tozali mpenza kokanisa bandeko na biso, tokopona kominanola ya malamu. Na ndenge yango, tokozala na esengo mpo tozali kosala “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”

^ Mitinda mosusu oyo ekoki kosalisa biso mpo na kopona kominanola ezali na Masese 3:31; 13:20; Baefese 5:3, 4; mpe Bakolose 3:5, 8, 20.