Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 7

Nzambe azwaka bomoi na motuya​—Bongo yo?

Nzambe azwaka bomoi na motuya​—Bongo yo?

“Liziba ya bomoi ezali epai na yo.”​—NZEMBO 36:9.

1, 2. Likabo nini ya motuya Yehova apesá biso?

 YEHOVA apesá mokomoko na biso likabo ya bomoi. Ezali likabo moko monene. (Ebandeli 1:27) Alingi tózala na bomoi ya malamu mpenza. Yango wana apesi biso mitinda oyo eteyaka biso ndenge ya kozwa bikateli ya malamu. Tosengeli kosalela mitinda yango mpo tóyeba ‘kokesenisa mabe ná malamu.’ (Baebre 5:14) Soki tosali bongo, tozali kotika Yehova ateya biso ndenge ya kokanisa malamu. Ntango tozali kotosa mitinda ya Nzambe mpe tozali komona ndenge ezali kobongisa bomoi na biso, tomonaka ete ezali mpenza na motuya.

2 Tokoki kokutana na makambo ndenge na ndenge na bomoi. Makambo mingi oyo ekómelaka biso, Biblia epesi mibeko ya polele te mpo na yango. Na ndakisa, ekoki kosɛnga tózwa bikateli mpo na lisalisi ya monganga oyo esɛngi kosalela makila. Ndenge nini okoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova? Biblia ezali na mitinda oyo eteyaka biso ndenge Yehova atalelaka bomoi mpe makila. Soki okangi ntina ya mitinda yango, ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu mpe obatela lisosoli ya malamu. (Masese 2:6-11) Tótalela sikoyo mwa mitinda yango.

NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA BOMOI MPE MAKILA?

3, 4. (a) Ndenge nini Nzambe amonisaki ndenge oyo atalelaka makila? (b) Makila emonisaka nini?

3 Biblia eteyaka biso ete makila ezali eloko moko mosantu mpo emonisaka bomoi. Mpe bomoi ezali eloko ya motuya mingi na miso ya Yehova. Ntango Kaina abomaki ndeko na ye, Yehova alobaki na ye ete: “Makila ya ndeko na yo ezali kobelela ngai uta na mabele.” (Ebandeli 4:10) Makila ya Abele ezalaki komonisa bomoi na ye; ntango Kaina abomaki Abele, asukisaki to akataki bomoi na ye.

4 Nsima ya Mpela ya ntango ya Noa, Nzambe ayebisaki bato ete bakoki kolya mosuni. Kasi, ayebisaki bango polele ete: “Bosengeli kolya mosuni ná molimo [to bomoi] na yango te, elingi koloba makila na yango.” (Ebandeli 9:4) Etinda yango etali bakitani nyonso ya Noa, ata mpe biso. Ezali polele ete mpo na Yehova, makila emonisaka bomoi. Biso mpe tosengeli kotalela makila ndenge wana.​—Nzembo 36:9.

5, 6. Ndenge nini Mibeko ya Moize emonisaki ndenge oyo Yehova atalelaka bomoi mpe makila?

5 Na Mibeko oyo Yehova apesaki Moize, alobaki: “Moto nyonso . . . oyo alei lolenge nyonso ya makila, nakotɛmɛla mpenza [moto] oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye. Mpo [bomoi] ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila.”​—Balevi 17:10, 11.

6 Mibeko ya Moize elobaki ete ntango moto abomi nyama mpo na kolya, asengeli kosopa makila na yango na mabele. Yango ezalaki komonisa ete bomoi ya nyama yango ezongi epai ya Mozalisi na yango, Yehova. (Kolimbola Mibeko 12:16; Ezekiele 18:4) Kasi Yehova alobaki te ete esengelaki kobimisa makila nyonso ya nyama tii na litangá ya nsuka. Soki basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kobimisa makila ya nyama, bakokaki kolya mosuni na yango na lisosoli ya malamu. Komonisa limemya mpo na makila ya nyama ezalaki komonisa ete bazalaki mpe na limemya mpo na Yehova, Mopesi-bomoi. Mibeko esɛngaki mpe Bayisraele bápesaka mbeka ya banyama mpo na kozipa masumu.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 19 mpe 20.

7. Ndenge nini Davidi amonisaki ete amemyaka makila?

7 Tokoki mpe komona motuya ya makila na kotalela likambo moko oyo Davidi asalaki ntango azalaki kobundisa Bafilistia. Ntango basoda ya Davidi bamonaki ete ayokaki mposa makasi ya mai, bakɔtaki esika oyo banguna bazalaki mpe batyaki bomoi na bango na likama mpo na kozwela ye mai. Kasi, ntango bamemelaki ye mai yango, Davidi aboyaki komɛla yango mpe “asopaki yango mpo na Yehova.” Davidi alobaki: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, Ee Yehova, ete ngai nasala boye! Nakomɛla nde makila ya mibali oyo bakei kotya milimo [to bomoi] na bango na likama?” Davidi ayebaki ete bomoi mpe makila ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.​—2 Samwele 23:15-17.

8, 9. Ndenge nini bakristo lelo basengeli kotalela makila?

8 Banda ntango lisangá ya bokristo ebandaki, esɛngamaki lisusu te ete basaleli ya Nzambe bápesa bambeka ya banyama. Kasi, basengelaki kaka kotalela makila na ndenge oyo ebongi. “Koboya . . . makila” ezali moko ya mwa makambo ya Mibeko oyo Yehova asɛngaki bakristo bátosaka. Ezalaki na ntina kaka ndenge moko na koboya pite to losambo ya bikeko.​—Misala 15:28, 29.

Ndenge nini nakoki kolimbola ekateli na ngai na oyo etali kosalela biloko ya mikemike oyo eutaka na biloko minene oyo esalaka makila?

9 Ezali mpe bongo lelo oyo. Biso bakristo toyebi ete Yehova nde Mopesi-bomoi mpe lisusu bomoi nyonso ezali ya ye. Toyebi mpe ete makila ezali eloko moko mosantu mpe ete emonisaka bomoi. Yango wana, totalelaka mitinda ya Biblia ntango tolingi kozwa ata ekateli nini mpo na lisalisi ya monganga oyo ekosɛnga kosalela makila.

KOSALELA MAKILA LOKOLA NKISI YA KOSALISA NZOTO

10, 11. (a) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kotya makila na nzoto to mokomoko ya biloko minei oyo esalaka makila? (b) Bikateli nini mokristo mokomoko asengeli kozwa?

10 Batatoli ya Yehova bayebi ete “koboya . . . makila” esuki kaka te na koboya kolya to komɛla yango. Elakisi ete basengeli te kotya makila na nzoto, ata na nzela nini. Yango elimboli koboya ete bátya biso makila na nzoto, koboya kopesa moto mosusu makila na biso, to kobomba makila na biso na esika mosusu mpo na kozongisa yango lisusu na nzoto. Etali mpe kotya na nzoto biloko minei oyo esalaka makila: globules rouges, globules blancs, plaquettes mpe plasma.

11 Na kati ya biloko wana minei oyo esalaka makila, minganga babendaka biloko mosusu ya mikemike, oyo ebengami fractions sanguines. Mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli soki akondima biloko yango ya mikemike to te. Ezali mpe bongo mpo na mayele ya monganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko. Mokristo mokomoko asengeli kozwa ekateli mpo na ndenge oyo bakosalela makila na ye na ntango ya lipaso, mpo na ekzamɛ ya monganga, to mpo na kosalisa ye na nkisi mosusu.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 21.

12. (a) Mpo na nini bikateli oyo tozwaka na kolanda lisosoli na biso ezalaka na ntina na miso ya Yehova? (b) Ndenge nini okoki kozwa ekateli na oyo etali lisalisi ya monganga?

12 Bikateli oyo tozwaka na kolanda lisosoli na biso moko ezalaka mpenza na ntina na miso ya Yehova? Ɛɛ, ezalaka na ntina. Yehova alingaka koyeba makanisi mpe bamposa ya motema na biso. (Tángá Masese 17:3; 24:12.) Lokola ezali bongo, ntango ozali kozwa ekateli oyo etali lisalisi ya monganga, osengeli kobondela Yehova atambwisa yo, mpe kosala bolukiluki mpo na likambo yango. Na nsima, yokelá lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa ekateli. Osengeli te kotuna basusu soki bango balingaki kosala nini soki bázalaka na esika na yo, moto mpe te asengeli koluka koyebisa yo ekateli oyo osengeli kozwa. Mokristo mokomoko “akomema mokumba na ye moko.”​—Bagalatia 6:5; Baroma 14:12.

MIBEKO YA YEHOVA EMONISAKA ETE ALINGAKA BISO

13. Mibeko mpe mitinda oyo Yehova apesi biso mpo na makila ezali komonisa nini mpo na ye?

13 Likambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso tósala ezalaka mpo na bolamu na biso mpe emonisaka ete alingaka biso. (Nzembo 19:7-11) Kasi, totosaka Yehova te kaka mpo mitinda na ye ezali mpo na bolamu na biso. Totosaka ye mpo tolingaka ye. Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tóboya ete bátya biso makila. (Misala 15:20) Ebatelaka mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Lelo oyo, bato mingi bayebi makama ya kotya moto makila na nzoto, mpe minganga mingi bandimi ete kosala bato lipaso kozanga kotya makila eleki malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato ya maladi. Ezali polele ete banzela ya Yehova ezali ya bwanya mpe emonisaka bolingo.​—Tángá Yisaya 55:9; Yoane 14:21, 23.

14, 15. (a) Mibeko nini Yehova apesaki bato na ye mpo na kobatela bango? (b) Ndenge nini okoki kosalela makanisi to mitinda oyo ezalaki na mibeko yango?

14 Mibeko oyo Nzambe apesaka bato na ye ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na bango. Yehova apesaki Bayisraele ya kala mibeko mpo na kobatela bango na makama ya minene. Na ndakisa, mobeko moko elobaki ete nkolo-ndako asengelaki kotonga mwa efelo zingazinga ya nsamba ya ndako na ye mpo moto akwea na nse te. (Kolimbola Mibeko 22:8) Mobeko mosusu etalelaki banyama. Soki moto azali na ngɔmbɛ moko oyo ezalaki kosala mobulu, moto yango azalaki na mokumba ya kobatela ngɔmbɛ na ye mpo ezokisa mpe eboma moto te. (Kobima 21:28, 29) Moyisraele oyo azalaki kotosa mibeko wana te azalaki na ngambo soki moto akufi.

15 Mibeko wana ezali komonisa ete bomoi ezali eloko moko ya motuya mingi na miso ya Yehova. Koyeba yango esengeli kotinda biso tósala nini? Mpo na komonisa ete tomemyaka bomoi, tosengeli kobatela ndako na biso mpe motuka na biso, kokeba na ndenge na biso ya kotambwisa motuka mpe makambo oyo toponaka mpo na kominanola. Bato mosusu, mingimingi bilenge, bakanisaka ete eloko moko te ya mabe ekoki kokómela bango, yango wana batyaka bomoi na bango na likama mpe bakebaka na makama te. Kasi, Yehova alingi biso tósalaka bongo te. Alingi tómonaka ete bomoi ezali na ntina, ezala bomoi na biso moko to bomoi ya basusu.​—Mosakoli 11:9, 10.

16. Ndenge nini Yehova atalelaka kolongola zemi?

16 Bomoi ya moto nyonso ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. Ata mwana oyo azali naino na libumu azali na motuya na miso na ye. Na ntango ya Mibeko ya Moize, soki moto atuti mwasi ya zemi na nko te, mpe mwasi yango to mwana oyo azali na libumu akufi, Yehova azalaki komona ete moto yango azali mobomi. Yango elimbolaki ete ata soki asalaki yango na nko te, lokola moto akufaki, bomoi yango esengelaki kofutama. (Tángá Kobima 21:22, 23.) Na miso ya Nzambe, mwana oyo azali na libumu azali moto mobimba. Lokola ezali bongo, okanisi ete atalelaka kolongola zemi ndenge nini? Okanisi ete Nzambe ayokaka ndenge nini ntango amonaka bato bazali kolongola bamilio ya bazemi mbula na mbula?

17. Nini ekoki kobɔndisa mwasi oyo alongolá zemi liboso ayeba Yehova?

17 Bongo soki mwasi alongolá zemi liboso ayeba ndenge Yehova atalelaka likambo yango? Mwasi yango akoki kotya motema ete Yehova akoki kosalela mbeka ya Yesu mpo na kolimbisa ye. (Luka 5:32; Baefese 1:7) Mwasi oyo asalá libunga ya ndenge wana kala asengeli te kokoba komiyoka lokola amemá ngambo soki abongoli mpenza motema. “Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu . . . Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.”​—Nzembo 103:8-14.

TIKÁ KOYINA BASUSU NA MOTEMA NA YO

18. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tólongola makanisi ya koyina basusu?

18 Komemya likabo ya bomoi ebandaka na kati mpenza ya motema na biso. Etali makanisi oyo tozalaka na yango mpo na basusu. Ntoma Yoane akomaki: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi.” (1 Yoane 3:15) Kozanga ete tóyeba yango, tokoki kobanda koyina moto oyo tosepelaka na ye te. Koyina ekoki kotinda biso tózanga limemya epai ya basusu, tókosela bango makambo, to kutu tóluka ete bákufa ata kokufa. Yehova ayebi makanisi oyo tozalaka na yango mpo na basusu. (Balevi 19:16; Kolimbola Mibeko 19:18-21; Matai 5:22) Soki oyoki ete obandi koyina moto, osengeli kosala makasi obengana makanisi yango.​—Yakobo 1:14, 15; 4:1-3.

19. Ndenge oyo Yehova atalelaka mobulu esengeli kotinda biso tósala nini?

19 Ezali na ndenge mosusu oyo tokoki komonisa ete tozwaka bomoi na motuya. Nzembo 11:5 elobi ete Yehova ‘ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’ Soki oponaka kominanola oyo ezali na makambo ya mobulu, ekoki komonisa ete olingaka mobulu. Mpo na nini kokɔtisa maloba, makanisi, mpe bililingi ya makambo ya mobulu na motó na yo? Osengeli nde kotondisa motó na yo na makambo ya pɛto mpe ya kimya.​—Tángá Bafilipi 4:8, 9.

KOPESA MABƆKƆ TE NA BIBONGISELI OYO EMEMYAKA BOMOI TE

20-22. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka mokili ya Satana? (b) Ndenge nini basaleli ya Yehova bakoki komonisa ete “bazali bato ya mokili te”?

20 Mokili ya Satana ememyaka bomoi te, mpe Yehova amonaka ete ezali na ngambo ya makila, ezali lokola mobomi. Banda kala, bibongiseli ya politiki ebomisá bamilio ya bato, ata mpe basaleli ebele ya Yehova. Biblia emonisi bibongiseli, to baguvɛrnema yango lokola banyama mabe ya nsɔmɔ. (Danyele 8:3, 4, 20-22; Emoniseli 13:1, 2, 7, 8) Lelo oyo, mombongo ya mandoki ezali kofuta mpenza. Bato bazali kozwa mbongo ebele mpo bazali kotɛka mandoki oyo ebomaka bato ebele. Ya solo mpenza, “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”​—1 Yoane 5:19.

21 Kasi bakristo ya solo bazali “bato ya mokili te.” Basaleli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te mpe bakendaka bitumba te. Ndenge kaka bakoki koboma te, bapesaka mpe mabɔkɔ te na bibongiseli oyo ebomaka bato. (Yoane 15:19; 17:16) Bakristo basalaka mobulu te soki bazali konyokola bango. Yesu ateyaki ete tosengeli kolinga ata banguna na biso.​—Matai 5:44; Baroma 12:17-21.

22 Mangomba mpe ebomisá bato ebele mpenza. Mpo na Babilone Monene, oyo ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta, Biblia elobi: “Makila ya basakoli mpe ya basantu mpe ya baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki epai na ye.” Omoni ntina oyo Yehova alobi ete: “Bóbima kati na ye, bato na ngai”? Bato oyo basambelaka Yehova bazali na kati ya mangomba ya lokuta te.​—Emoniseli 17:6; 18:2, 4, 24.

23. ‘Kobima’ na Babilone Monene elimboli nini?

23 Mpo na ‘kobima’ na Babilone Monene, esengeli komonisa polele ete ozali lisusu te na kati ya lingomba moko ya lokuta. Na ndakisa, osengeli kosɛnga ete bálongola mpenza nkombo na yo na liste ya bandimi ya lingomba ya lokuta. Kasi esuki wana te. Osengeli mpe koyina mpe kotika makambo nyonso oyo bato ya mangomba ya lokuta basalaka. Mangomba ya lokuta endimaka mpe etindaka bato básala pite, makambo ya politiki, mpe bázala lokoso. (Tángá Nzembo 97:10; Emoniseli 18:7, 9, 11-17) Makambo yango ebomisá bato ebele mpenza.

24, 25. Ndenge nini koyeba Yehova ekoki kopesa biso kimya mpe lisosoli ya malamu?

24 Liboso ete tóyeba Yehova, mokomoko na biso azalaki kopesa mokili ya Satana mabɔkɔ na lolenge moko boye. Kasi, sikoyo tobongwani. Tondimi lisiko mpe tomipesi na Nzambe. Tozali kosepela na “bileko ya kopema” oyo euti “epai ya Yehova ye moko.” Tozali na kimya mpe na lisosoli ya malamu, mpo toyebi ete Nzambe azali kosepela na biso.​—Misala 3:19; Yisaya 1:18.

25 Ata soki liboso ozalaki na kati ya ebongiseli oyo ememyaka bomoi te, Yehova akoki kosalela mbeka ya lisiko mpo na kolimbisa yo. Tosepelaka mpenza na likabo ya bomoi oyo Yehova apesi biso. Tomonisaka yango soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa basusu báyeba Yehova, bátika mokili ya Satana, mpe bákóma baninga ya Nzambe.​—2 Bakorinti 6:1, 2.

YEBISÁ BASUSU MAKAMBO YA BOKONZI YA NZAMBE

26-28. (a) Mosala nini ya ntina mingi Yehova apesaki Ezekiele? (b) Yehova asɛngi biso tósala nini lelo oyo?

26 Na Yisraele ya kala, Yehova ayebisaki mosakoli Ezekiele ayebisa bato ete mosika te Yerusaleme ekobebisama mpe ateya bango oyo basengelaki kosala mpo bábika. Soki Ezekiele akebisaki bato te, Yehova alingaki komona ete azali na ngambo ya makila ya bato yango. (Ezekiele 33:7-9) Ezekiele amonisaki ete azwaka bomoi na motuya na ndenge asalaki nyonso mpo na kopanza nsango ya ntina mingi.

27 Yehova apesi biso mpe mokumba ya kokebisa bato ete mosika te mokili ya Satana ekobebisama, tósalisa bango báyeba Yehova mpo bábika mpe bákɔta na mokili ya sika. (Yisaya 61:2; Matai 24:14) Tolingaka kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyebisa basusu nsango yango. Tolingaka koloba lokola ntoma Paulo ete: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso, mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba ya Nzambe.”​—Misala 20:26, 27.

28 Ezali na makambo mosusu oyo esɛngi ete tózala pɛto. Tokolobela yango na mokapo elandi.