Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Epai ya bino baoyo bolingaka Yehova Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia:

Yesu alobaki: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Kanisá ndenge omiyokaki mbala ya liboso oyo oyokaki mateya ya solo ya Biblia! Ezalaki esengo mpenza koyeba ete na mokili oyo etondi na lokuta, tokoki koyekola makambo ya solo.​—2 Timote 3:1.

Yehova Nzambe alingi tóyeba solo. Mpe lokola tolingaka bato, tosengeli koyebisa bango solo yango. Kasi, kosalela Nzambe esuki kaka wana te. Tosengeli kosala makasi mpo tózala na bomoi oyo ezali komonisa ete tozali bakristo, mpamba te totosaka mitinda ya Yehova na motema moko. Yesu ayebisaki likambo moko ya ntina mingi oyo tokoki kosala mpo na komonisa Nzambe ete tolingaka ye. Alobaki: “Soki botosi mitindo na ngai, bokotikala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe natosi mitindo ya Tata mpe natikali na kati ya bolingo na ye.”​—Yoane 15:10.

Yesu alingaka mpenza Tata na ye, mpe asalaka nyonso oyo Tata na ye asɛngi ye. Soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu na bomoi na biso, Yehova akolinga biso mpe tokozala mpenza na esengo. Ndenge Yesu alobaki yango: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”​—Yoane 13:17.

Tozali na elikya ete buku oyo ekosalisa yo oyeba ndenge ya kozala na bomoi oyo eyokani na mateya ya Biblia mpe okóma moninga ya Nzambe. Tozali kobondela Nzambe asalisa yo olinga ye lisusu mingi mpe otikala “na kati ya bolingo [na ye] . . . mpo na bomoi ya seko.”​—Yuda 21.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova