Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 2

Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe

Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe

“Bózala na lisosoli ya malamu.”​—1 PETRO 3:16.

1, 2. Na esika oyo oyebi te, mpo na nini osengeli kozala na moto to eloko oyo ekolakisa yo nzela? Eloko nini Yehova apesá biso mpo na kosalisa biso?

 KANISÁ ete ozali kokatisa mokili moko monene oyo ekauká. Mipɛpɛ ya makasi ezali kotombola mpe kobalola zɛlo epai na epai; na yango okoki kobunga nzela. Kasi nini ekoki kosalisa yo oyeba nzela? Osengeli kozala na moto to eloko moko oyo ekolakisa yo nzela. Ekoki kozala boussole, moi ná minzoto, karte moko, to mpe GPS; ekoki mpe kozala ata moto oyo ayebi mokili yango malamu. Kozala na moto to eloko moko oyo ekolakisa yo nzela ezali na ntina mingi, mpo koyeba esika ozali kokende ekoki kobikisa yo.

2 Biso nyonso tokutanaka na makambo ebele, mpe na bantango mosusu tosilaka mayele. Kasi, mpo na kosalisa biso, Yehova apesá mokomoko na biso lisosoli. (Yakobo 1:17) Na mokapo oyo, tokoyeba soki lisosoli ezali nini mpe ndenge nini esalaka. Na nsima, tokoyekola ndenge tokoki koteya lisosoli na biso, ntina oyo tosengeli kotalela lisosoli ya basusu, mpe ndenge oyo lisosoli ya pɛto ekoki kosala ete tózala na bomoi ya malamu.

LISOSOLI EZALI NINI MPE NDENGE NINI ESALAKA?

3. Lisosoli ezali nini?

3 Lisosoli ezali likabo oyo Yehova apesá biso. Ezali lokola mongongo moko oyo ezalaka kati na biso, oyo eyebisaka biso soki likambo moko ezali malamu to mabe. Liloba ya Grɛki oyo Biblia esaleli mpo na kolobela “lisosoli” elimboli “komiyeba.” Soki lisosoli na biso ezali kosala malamu, ekosalisa biso tómiyeba ndenge tozalaka mpenza. Ekoki kosalisa biso tóyeba soki tozalaka mpenza na makanisi mpe bamposa ya malamu. Ekoki kotinda biso tósala malamu mpe tókima mabe. Ekoki kosala ete tósepela mpo tozwaki ekateli ya malamu, to tómitungisa mpo tozwaki ekateli ya mabe.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 5.

4, 5. (a) Nini esalemaki ntango Adama ná Eva bayokelaki lisosoli na bango te? (b) Bandakisa nini ya Biblia emonisi ndenge lisosoli esalaka?

4 Mokomoko na biso akoki kopona soki akoyokela lisosoli na ye to te. Adama ná Eva baboyaki koyokela lisosoli na bango, yango wana basalaki lisumu. Na nsima, batungisamaki, kasi bazalaki lisusu na likambo ya kosala te mpo basilaki kobuka mobeko ya Nzambe. (Ebandeli 3:7, 8) Atako bazalaki na lisosoli ya kokoka mpe bayebaki ete ezali mabe kobuka mobeko ya Nzambe, baboyaki koyokela lisosoli na bango.

5 Nzokande, bato ebele ya kozanga kokoka bayokelaki lisosoli na bango. Tózwa ndakisa ya Yobo. Lokola azwaki bikateli ya malamu, akokaki koloba ete: “Motema na ngai ekotungisa ngai ata moke te mikolo na ngai nyonso.” (Yobo 27:6) Ntango Yobo asaleli maloba “motema na ngai,” azalaki kolobela nde lisosoli na ye, oyo ezalaki lokola mongongo ya kati oyo ezalaki koyebisa ye ete likambo moko ezali malamu to mabe. Nzokande, na bantango mosusu Davidi ayokelaki lisosoli na ye te mpe azangaki botosi epai ya Yehova. Na nsima, amitungisaki mingi mpe motema na ye “ekómaki kobɛta.” (1 Samwele 24:5) Ezalaki lisosoli na ye nde ezalaki koyebisa ye ete asali mabe. Yango eteyaki ye ntina ya koyokela lisosoli na ye, mpe esalisaki ye aboya kosala lisusu mabe oyo asalaki liboso.

6. Nini emonisi ete moto nyonso azalaka na lisosoli?

6 Mbala mingi, ata bato oyo bayebi Yehova te bayebaka ete likambo boye ezali malamu to mabe. Biblia elobi: “Na makanisi na bango moko, [lisosoli na bango] ezali kofunda bango mpe kolongisa bango.” (Baroma 2:14, 15) Na ndakisa, bato mingi bayebi ete koboma to koyiba ezali mabe. Ata soki mbala mosusu bayebaka yango te, lisosoli na bango nde etindaka bango básala bongo; mpo yango ezali lokola mongongo ya kati oyo Yehova atyá mpo eyebisa moto ete likambo boye ezali malamu to mabe. Balandaka mpe mitinda ya Nzambe, elingi koloba mateya na ye oyo esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu.

7. Mpo na nini lisosoli na biso ekoki mpe kokosa biso?

7 Kasi, na bantango mosusu lisosoli ekoki kokosa biso. Na ndakisa, ekoki kobeba mpo na makanisi mpe bamposa na biso ya kozanga kokoka mpe ekoki komema biso na nzela ya mabe. Moto moko te akoki kozala na lisosoli ya malamu kaka boye. (Ebandeli 39:1, 2, 7-12) Tosengeli koteya lisosoli na biso. Mpo na kosalisa biso, Yehova apesi biso elimo santu mpe mitinda ya Biblia. (Baroma 9:1) Tótala ndenge tokoki koteya lisosoli na biso.

NDENGE OYO TOKOKI KOTEYA LISOSOLI NA BISO

8. (a) Na ndenge nini motema na biso ekoki kobongola lisosoli na biso? (b) Motuna nini tosengeli komituna liboso ya kosala likambo?

8 Bato mosusu bakanisaka ete koyokela lisosoli elimboli kaka kolanda oyo motema elingi. Bakanisaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi soki motema na bango emoni yango mabe te. Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, motema ekoki kokosa biso. Makanisi ya motema na biso ekoki kobongola lisosoli na biso. Biblia elobi: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yirimia 17:9) Na yango, tokoki kokanisa ete likambo moko ezali malamu, nzokande ezali mabe. Na ndakisa, liboso ntoma Paulo akóma mokristo, anyokolaki basaleli ya Nzambe mpe akanisaki ete azali kosala likambo ya malamu. Na makanisi na ye, azalaki na lisosoli ya malamu. Kasi, na nsima alobaki: “Moto oyo azali kotalela ngai ezali Yehova.” (1 Bakorinti 4:4; Misala 23:1; 2 Timote 1:3) Ntango ntoma Paulo ayebaki ete Yehova azalaki kosepela te na makambo oyo azalaki kosala, amonaki ete asengeli kobongwana. Yango wana, liboso ya kosala likambo, tosengeli komituna boye: ‘Yehova alingi nasala nini?’

9. Kobanga Nzambe elakisi nini?

9 Soki olingi moto, okolinga te kosala likambo oyo ekopesa ye mpasi. Ndenge moko mpe, lokola tolingaka Yehova, tolingaka kosala ata likambo moko te oyo ekopesa ye mpasi. Tosengeli kozala na nsɔmɔ ya kosala makambo oyo Yehova ayinaka. Ndakisa ya Nehemia emonisi yango. Aboyaki kosalela lokumu na ye ya guvɛrnɛrɛ mpo na kokóma na bozwi. Mpo na nini? Alobaki ete ezalaki “mpo na kobanga Nzambe.” (Nehemia 5:15) Nehemia aboyaki kosala makambo oyo ekopesa Yehova mpasi na motema. Ndenge moko na Nehemia, biso mpe tosengeli kobanga kosala makambo oyo epesaka Yehova mpasi. Mpo tóyeba makambo oyo esepelisaka Yehova, tosengeli kotángaka Biblia.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 6.

10, 11. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu mpo na masanga?

10 Na ndakisa, ekoki kosɛnga mokristo apona soki akomɛla masanga to te. Mitinda nini ya Biblia ekosalisa ye azwa ekateli ya malamu? Mwa ndambo yango oyo: Biblia epekisi komɛla masanga te. Kutu, elobi ete vinyo ezali likabo Nzambe apesá bato. (Nzembo 104:14, 15) Nzokande, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bámipesa te na “komɛla mingi.” (Luka 21:34) Ntoma Paulo mpe ayebisaki bakristo bákeba na ‘bafɛti ya lokoso mpe milangwa.’ (Baroma 13:13) Alobaki ete balangwi-masanga “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakorinti 6:9, 10.

11 Na yango, mokristo asengeli komituna boye: ‘Masanga ezali na ntina mingi mpo na ngai? Mpo namiyoka malamu, esengeli kaka namɛla? Namɛlaka masanga mpo epesa ngai mpiko? Nayebaka esika nakosuka, mpe mbala boni namɛlaka? * Nakoki kolekisa ntango ya malamu elongo na baninga ata soki masanga ezali te?’ Tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso tózwa bikateli ya malamu. (Tángá Nzembo 139:23, 24.) Soki tozali kosala bongo, tozali koteya lisosoli na biso elandaka mitinda ya Biblia. Kasi ndenge tokomona yango, esuki wana te.

KOTALELA LISOSOLI YA BASUSU

12, 13. Mpo na nini lisosoli ya moto moko ekoki kokesana na lisosoli ya moto mosusu? Okoki kosala nini mpo na yango?

12 Lisosoli ya bato nyonso esalaka ndenge moko te. Lisosoli na yo ekoki kondima osala likambo moko, nzokande lisosoli ya moto mosusu ekoki koboya yango. Na ndakisa, okoki kopona komɛla masanga, nzokande moto mosusu akoki koboya komɛla masanga. Mpo na nini makanisi ya bato mibale ekoki kokesana ndenge wana?

Lisosoli oyo eteyami malamu ekoki kosalisa yo oyeba soki osengeli komɛla masanga to te

13 Mbala mingi, lisosoli ya moto mpo na likambo moko boye ekoki kosala na kolanda esika akolá, ndenge libota na ye ezalaki kotalela likambo yango, makambo oyo akutaná na yango na bomoi, mpe bongo na bongo. Na oyo etali masanga, moto mosusu oyo azalaki kolekisa ndelo na komɛla masanga, akoki komona malamu atika masanga libela. (1 Bakonzi 8:38, 39) Soki opesi moto masanga kasi aboyi, okosala nini? Okosilikela ye? Okotya ye mbamba amɛla kaka? Okolinga ayebisa yo kaka ntina oyo aboyi? Okosala bongo te mpo na kotosa lisosoli na ye.

14, 15. Likambo nini ebimaki na ntango ya ntoma Paulo? Toli nini ya malamu ntoma Paulo apesaki?

14 Na ntango ya ntoma Paulo, likambo moko ebimaki, oyo emonisaki ete lisosoli ya bato nyonso esalaka ndenge moko te. Misuni mosusu oyo bazalaki kotɛka na zando, ezalaki oyo bapesaki yango liboso mbeka na banzambe ya bikeko na losambo ya lokuta. (1 Bakorinti 10:25) Ntoma Paulo azalaki komona mabe te soki moto asombi mpe alei mosuni yango. Mpo na ye, biloko nyonso ya kolya eutaka epai ya Yehova. Kasi, bandeko mosusu oyo liboso bazalaki kosambela bikeko bazalaki kotalela likambo yango ndenge mosusu. Bazalaki komona ete ezali mabe kolya mosuni ya ndenge wana. Ntoma Paulo alobaki nde ete: ‘Etali bango, lisosoli na ngai etungisami te, nazali na lotomo ya kolya nyonso oyo nalingi’?

15 Ntoma Paulo alobaki bongo te. Lokola alingaki bandeko na ye mingi, andimaki kotika makambo mosusu oyo azalaki na lotomo ya kosala. Alobaki ete “tómisepelisa biso moko te.” Mpe abakisaki: “Kristo kutu amisepelisaki te.” (Baroma 15:1, 3) Ndenge moko na Yesu, ntoma Paulo azalaki koluka liboso bolamu ya basusu.​—Tángá 1 Bakorinti 8:13; 10:23, 24, 31-33.

16. Mpo na nini tosengeli te kosambisa bandeko na biso soki lisosoli na bango etiki bango básala likambo moko boye?

16 Kasi, okosala nini soki lisosoli ya moto moko etindi ye asala likambo oyo omoni ete ezali mabe? Osengeli kokeba ete oloba mabe te mpo na ye mpe oluka te komonisa ye ete likanisi na yo nde ezali malamu, oyo ya ye ezali mabe. (Tángá Baroma 14:10.) Yehova apesá biso lisosoli mpo tómisambisa, kasi te mpo tósambisa bato mosusu. (Matai 7:1) Tótika ata mokolo moko te ete makambo oyo biso tolingi etya bokabwani na kati ya lisangá. Tosengeli nde koloba to kosala makambo oyo ekosala ete bolingo mpe bomoko ekoba kozala na lisangá.​—Baroma 14:19.

MATOMBA YA KOZALA NA LISOSOLI

17. Lisosoli ya bato mosusu ekómaka ndenge nini?

17 Ntoma Petro akomaki: “Bózala na lisosoli ya malamu.” (1 Petro 3:16) Likambo ya mawa, soki bato bazali koboya kolanda mitinda ya Yehova, nsukansuka lisosoli na bango etikaka kokebisa bango. Ntoma Paulo alobaki ete lisosoli ya ndenge wana ‘etyami elembo lokola na ebende ya mɔtɔ makasi.’ (1 Timote 4:2) Osilá kozika makasi mpenza? Soki oziki makasi, loposo ekómaka makasi, mpe okoyoka lisusu eloko te esika yango. Soki moto azali kokoba kosala mabe, lisosoli na ye ekómaka makasi, mpe nsukansuka etikaka kosala.

Lisosoli ya malamu ekoki kotambwisa yo malamu mpe kopesa yo esengo mpe kimya ya motema

18, 19. (a) Komitungisa to koyoka nsɔni ekoki kosalisa biso na nini? (b) Okoki kosala nini soki omitungisaka kaka mpo na masumu na yo ya kala atako osilá kobongola motema?

18 Ntango moto azali komitungisa, mbala mosusu lisosoli na ye ezali koyebisa ye ete asalaki mabe. Yango ekoki kosalisa ye aluka koyeba likambo nini asalaki mpe atika kosala yango. Soki osali libunga, osengeli kozwa liteya mpo ozongela lisusu yango te. Na ndakisa, Mokonzi Davidi asalaki lisumu, kasi lisosoli na ye etindaki ye abongola motema. Ayinaki likambo oyo asalaki mpe azwaki ekateli ete mbala ya nsima, akotosa Yehova. Makambo oyo Davidi akutanaki na yango na bomoi etindaki ye aloba ete Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’​—Nzembo 51:1-19; 86:5; Talá Maloba na nsuka ya lisolo 7.

19 Kasi moto mosusu akoki kokoba komitungisa mpo na lisumu oyo asalá, ata soki abongolá motema banda kala. Komitungisa yango ekoki kosala mpasi mpe kotinda moto amimona ete azali na ntina te. Soki na bantango mosusu omiyokaka ndenge wana, yebá ete okoki te kobongola makambo oyo esalemá kala. Ata soki na ntango yango oyebaki ete ozali kosala mabe to oyebaki yango te, Yehova asilá kolimbisa yo mpe abomá masumu yango. Azali komona ete ozali pɛto mpe yebá ete sikoyo ozali kosala oyo ezali malamu. Mbala mosusu motema na yo ezali kaka kotungisa yo, kasi Biblia elobi: “Nzambe azali monene koleka mitema na biso.” (Tángá 1 Yoane 3:19, 20.) Yango elingi koloba ete kolimbisa mpe bolingo na ye ezali na nguya koleka mitungisi to nsɔni nyonso oyo okoki kozala na yango. Ndimá ete Yehova alimbisá yo. Soki ondimi ete Yehova alimbisá yo, lisosoli na yo ekozala na kimya mpe okoki kosalela Nzambe na esengo.​—1 Bakorinti 6:11; Baebre 10:22.

20, 21. (a) Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa yo na nini? (b) Bonsomi nini Yehova apesá biso? Ndenge nini tosengeli kosalela yango?

20 Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa yo oteya lisosoli na yo mpo ekoka kokebisa yo mpe kobatela yo na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi. Ekosalisa yo mpe osalela mitinda ya Biblia na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na yo. Ya solo, mokanda oyo epesi te liste ya mibeko oyo tokotosa na likambo mokomoko ya bomoi. Tosengeli kotosa “mobeko ya Kristo,” oyo esimbami na mitinda ya Nzambe. (Bagalatia 6:2) Ata soki mobeko ya polele ezali te mpo na likambo moko boye, tomonaka te ete yango nde epesi biso nzela ya kosala mabe. (2 Bakorinti 4:1, 2; Baebre 4:13; 1 Petro 2:16) Kasi, tosalelaka bonsomi na biso ya kopona mpo na komonisa ete tolingaka Yehova.

21 Ntango ozali komanyola mitinda ya Biblia mpe kosalela yango, ozali koyekola kosalela ‘makoki na yo ya kososola’ mpe kokanisa ndenge Yehova akanisaka. (Baebre 5:14) Na ndenge yango, okokóma na lisosoli oyo eteyami, oyo ekotambwisa yo malamu mpe ekosalisa yo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

^ Minganga mingi balobi ete ezalaka mpasi mingi mpo na bato oyo bakómá baombo ya masanga báyeba ndelo na bango. Minganga balobi ete eleki malamu bátika komɛla.