Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 4

Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?

Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?

“Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko, bóbanga Nzambe, bópesa mokonzi lokumu.”​—1 PETRO 2:17.

1, 2. (a) Tosengeli kolanda litambwisi ya nani? (b) Tokozwa biyano ya mituna nini na mokapo oyo?

 NTANGO ozalaki mwana moke, ekoki kozala ete baboti na yo bazalaki kosɛnga yo osala makambo mosusu oyo ozalaki na mposa ya kosala te. Olingaki baboti na yo mpe oyebaki ete osengeli kotosa bango. Kasi, mbala mosusu ozalaki kolinga kotosa ntango nyonso te.

2 Toyebi ete Yehova, Tata na biso, alingaka biso. Akokisaka bamposa na biso mpe apesi biso nyonso oyo esengeli mpo tósepela na bomoi. Apesaka biso malako oyo tosengeli na yango mpo tózala malamu. Mbala mosusu, asalelaka bato mosusu mpo na kopesa biso malako. Tosengeli komemya bokonzi ya Yehova. (Masese 24:21) Kasi, mpo na nini na bantango mosusu ezalaka mpasi kotosa malako? Mpo na nini Yehova asɛngi biso tólanda malako? Mpe ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka bokonzi na ye?​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 9.

MPO NA NINI KOTOSA EZALAKA MPASI?

3, 4. Kozanga kokoka eutá wapi? Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te tóndima malako oyo euti epai ya basusu?

3 Biso bato tozalaka na makanisi ya kotomboka. Ekómá ndenge wana banda mobali ná mwasi ya liboso, Adama ná Eva, basalaki lisumu. Atako bazalaki bato ya kokoka, batombokelaki bokonzi ya Nzambe. Banda wana, bato nyonso babotamaka bato ya kozanga kokoka. Kozanga kokoka nde ntina ya liboso oyo mpo na yango ezalaka pɛtɛɛ te tótosa malako ya Yehova mpe ya bato mosusu. Ntina ya mibale ezali ete bato oyo Yehova asalelaka mpo na kopesa biso litambwisi bazali mpe bato ya kozanga kokoka.​—Ebandeli 2:15-17; 3:1-7; Nzembo 51:5; Baroma 5:12.

4 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka na makanisi ya lolendo. Moto ya lolendo alingaka te bato mosusu báyebisa ye oyo asengeli kosala. Na ndakisa, na Yisraele ya kala, Yehova aponaki Moize atambwisa ekólo mobimba. Kasi, mobali moko na nkombo Kora, oyo asalelaki mpe Yehova bambula ebele, akómaki na lolendo, na yango azangaki limemya epai ya Moize. Atako Moize azalaki kokamba ekólo ya Nzambe, azalaki moto ya lolendo te. Kutu, Biblia elobi ete azalaki na komikitisa koleka bato mingi ya ntango wana. Kasi, Kora aboyaki kolanda litambwisi oyo Moize azalaki kopesa. Kutu, abendaki ebele ya bato básangana na ye mpo na kotombokela Moize. Nini ekómelaki Kora ná bato oyo batombokaki? Nzambe abomaki bango. (Mitángo 12:3; 16:1-3, 31-35) Na Biblia, tokokuta bandakisa ebele oyo ezali koteya biso ete lolendo ezalaka mabe mpenza.—2 Ntango 26:16-21; talá Maloba na nsuka ya lisolo 10.

5. Ndenge nini bato mosusu basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe?

5 Mbala mosusu osilá koyoka maloba oyo: “Pesá moto bokonzi mpo oyeba ye.” Banda kala, bato mingi basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe. (Tángá Mosakoli 8:9.) Na ndakisa, Saulo azalaki moto malamu mpe ya komikitisa ntango Yehova aponaki ye azala mokonzi na Yisraele. Kasi, na nsima Saulo atikaki lolendo mpe zuwa ekola na motema na ye, mpe akómaki konyokola Davidi kaka mpamba. (1 Samwele 9:20, 21; 10:20-22; 18:7-11) Na nsima, Davidi akómaki mokonzi; azalaki moko ya bakonzi ya malamu mpenza ya Yisraele. Kasi, na nsima, ye mpe asalelaki bokonzi na ye na ndenge ya mabe. Asangisaki nzoto na Bate-sheba, mwasi ya mobali moko na nkombo Uria, mpe mpo na kobomba lisumu na ye, abomisaki Uria na etumba.​—2 Samwele 11:1-17.

MPO NA NINI OSENGELI KOMEMYA BOKONZI YA YEHOVA

6, 7. (a) Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tósala nini? (b) Nini ekosalisa yo otosaka ata ntango ezali pɛtɛɛ te kosala yango?

6 Totosaka malako ya Yehova mpo tolingaka ye. Lokola tolingaka Yehova koleka moto mosusu nyonso to eloko mosusu nyonso, tolingaka kosepelisa ye. (Tángá Masese 27:11; Marko 12:29, 30.) Banda ntango mobali ná mwasi ya liboso bazalaki kofanda na elanga ya Edene, Satana alingaka kotinda bato báboya bokonzi ya Yehova. Zabolo alingi okanisa ete Yehova azali te na lotomo ya koyebisa yo oyo osengeli kosala. Kasi toyebi ete yango ezali lokuta. Tondimaka maloba oyo: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”​—Emoniseli 4:11.

7 Ntango moto azali mwana moke, na ntembe te bateyaka ye ete asengeli kotosa baboti na ye ata soki azali na mposa ya kosala yango te. Ndenge moko mpe, na bantango mosusu, kotosa ezalaka pɛtɛɛ te mpo na biso basaleli ya Yehova. Kasi, lokola tolingaka Yehova mpe tomemyaka ye, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kotosa ye. Yesu apesaki biso ndakisa. Atosaki Yehova ata ntango ezalaki pɛtɛɛ te mpe ezalaki mpasi kosala yango. Yango wana alobaki na Tata na ye ete: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”​—Luka 22:42; talá Maloba na nsuka ya lisolo 11.

8. Tángá makambo mibale oyo Yehova asalelaka mpo na kotambwisa biso? (Talá mpe etanda “ Yokáká toli.”)

8 Lelo oyo, Yehova atambwisaka biso na ndenge ebele. Na ndakisa, apesá biso Biblia. Apesá biso mpe bankulutu na lisangá. Okomonisa ete omemyaka bokonzi ya Yehova soki ozali komemya bato oyo azali kosalela mpo na kotambwisa biso. Soki oboyi lisalisi na bango, ezali lokola nde oboyi Yehova. Ntango Bayisraele baboyaki Moize, Yehova amonaki yango likambo ya mabe mpenza. Amonaki ete Bayisraele baboyaki nde ye.​—Mitángo 14:26, 27; talá Maloba na nsuka ya lisolo 12.

9. Ndenge nini bolingo na yo epai ya bandeko ekotinda yo otosaka malako?

9 Ntango tozali komemya bokonzi, tozali komonisa ete tolingaka bandeko. Tózwa ndakisa. Soki makama esalemi, bato oyo bayei kosalisa basalaka na bomoko mpo na kobikisa bato. Mpo básala mosala malamu esengeli moko na bango atambwisa makambo mpe basusu bálanda malako oyo azali kopesa. Kasi, soki moto moko alandi yango te to asali kaka oyo ye alingi, nini ekosalema? Ata soki azalaki na makanisi ya mabe te, koboya koyoka ekoki kobimisela baninga mosusu mikakatano, ntango mosusu ata makama ya minene. Ndenge moko mpe, soki oboyi kolanda malako ya Yehova mpe ya baoyo apesá mwa bokonzi, okoki kopesa basusu mpasi. Na yango, soki otosi Yehova, okomonisa ete olingaka bandeko mpe ozali komemya ebongiseli ya Yehova.​—1 Bakorinti 12:14, 25, 26.

10, 11. Tokolobela nini sikoyo?

10 Makambo nyonso oyo Yehova asɛngaka biso tósala ezalaka mpo na bolamu na biso. Soki tozali komemya bokonzi na libota, na lisangá, mpe kotosa bakonzi ya Leta, ezali mpo na bolamu na biso nyonso.​—Kolimbola Mibeko 5:16; Baroma 13:4; Baefese 6:2, 3; Baebre 13:17.

11 Soki toyebi ntina oyo Yehova alingaka tómemya basusu, ekoki kosalisa biso tósala yango. Tólobela malamumalamu ndenge oyo tokoki komonisa limemya na makambo misato ya bomoi na biso.

KOTOSA BOKONZI NA LIBOTA

12. Ndenge nini mobali akoki komonisa ete atosaka bokonzi ya Yehova?

12 Yehova nde abandisá libota mpe apesá moto na moto mokumba na ye na kati ya libota. Soki moto mokomoko na kati ya libota azali kosala oyo Yehova asɛngi ye, libota ekotambola malamu mpe moto nyonso akozala na esengo. (1 Bakorinti 14:33) Yehova atyá mobali azala mokonzi ya libota. Yango elimboli ete Yehova alingi mobali abatela mwasi na ye mpe bana na ye malamu mpe atambwisa bango na bolingo. Na yango, mobali akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo azali kobatela libota na ye. Mobali oyo azali mokristo asengeli kozala na boboto mpe na bolingo, asengeli kosalela bato ya libota na ye makambo ndenge Yesu azalaki kosalela lisangá. Ntango mobali azali kosala bongo, akomonisa ete azali komemya Yehova.​—Baefese 5:23; talá Maloba na nsuka ya lisolo 13.

Na libota, tata oyo azali mokristo amekolaka Kristo

13. Ndenge nini mwasi akoki komonisa ete atosaka bokonzi?

13 Mwasi oyo azali mokristo azali mpe na mokumba ya lokumu mpe ya ntina mingi na libota. Asalisaka mobali na ye akokisa malamu mokumba na ye ya mokonzi ya libota. Apesaka ye mabɔkɔ na koteya bana. Mpo na koteya bana bázala na botosi, ye moko apesaka ndakisa na likambo yango. (Masese 1:8) Atosaka mobali na ye, mpe soki mobali azwi bikateli asalaka nyonso mpo elonga. Ata soki likanisi na ye ná oyo ya mobali eyokani te na likambo moko, amonisaka makanisi na ye na boboto mpe na limemya. Soki mwasi oyo azali mokristo azali na mobali oyo azali Motatoli te, likambo na ye ekeseni na mwasi oyo mobali na ye azali Motatoli. Kasi soki azali kosalela mobali na ye makambo na bolingo mpe na limemya, mokolo mosusu mobali yango akoki koluka koyeba Yehova mpe kosambela ye.​—Tángá 1 Petro 3:1.

14. Ndenge nini bana bakoki komonisa ete batosaka bokonzi?

14 Bana bazali na motuya mingi na miso ya Yehova, mpe esengeli baboti bábatela bango mpe bápesaka bango malako mingi. Soki bana bazali kotosa baboti na bango, baboti basepelaka. Oyo eleki ntina, soki bana bazali na botosi, bakomonisa ete bamemyaka Yehova mpe yango ekosepelisa ye. (Masese 10:1) Na mabota mingi, bana bazali kobɔkwama kaka na moboti moko. Yango ekoki kozala mpasi, ezala mpo na moboti to mpo na bana. Kasi, soki bana bazali na botosi mpe bazali kopesa mama to tata na bango mabɔkɔ, makambo ekozala malamu mingi na kati ya libota. Ezala ndenge nini, libota ya kokoka ezalaka te. Kasi, libota nyonso ekoki kozala na esengo soki moto mokomoko azali kotosa malako ya Yehova. Yango epesaka nkembo na Yehova, Mobandisi ya mabota nyonso.​—Baefese 3:14, 15.

KOTOSA BOKONZI NA LISANGÁ

15. Ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka bokonzi na lisangá?

15 Yehova azali kotambwisa biso na nzela ya lisangá ya bokristo, mpe apesi Yesu bokonzi nyonso likoló na yango. (Bakolose 1:18) Na ngala na ye, Yesu apesi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mokumba ya kobatela basaleli ya Nzambe awa na mabele. (Matai 24:45-47) Lelo oyo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango na ntango oyo ebongi mpo na kosalisa biso tóbatela kondima na biso makasi. Bankulutu, basaleli na misala, bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka masangá na mokili mobimba mpe bazwaka malako ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Bandeko yango nyonso bazali na mokumba ya kobatela biso. Bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpo na ndenge oyo bazali kokokisa mokumba na bango. Yango wana, soki tozali kotosa mibali yango, tozali nde kotosa Yehova.​—Tángá 1 Batesaloniki 5:12; Baebre 13:17; talá Maloba na nsuka ya lisolo 14.

16. Mpo na nini tokoki koloba ete bankulutu mpe basaleli na misala baponamaka na elimo santu?

16 Bankulutu mpe basaleli na misala basalisaka bandeko bázala sembo mpe lisangá ezala na bomoko. Ya solo, bazali bato ya kozanga kokoka lokola biso. Na yango, ndenge nini baponaka bandeko yango? Bandeko mibali yango basengeli kokokisa masɛngami oyo ezali na Biblia. (1 Timote 3:1-7, 12; Tito 1:5-9) Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kosalisa bato oyo bakomaki Biblia bálimbola masɛngami yango. Lisusu, bankulutu babondelaka Yehova apesa bango elimo santu ntango bazali kotalela nani asengeli kotyama lokola nkulutu to mosaleli na misala. Ezali polele ete Yesu ná Yehova nde bazali kotambwisa lisangá. (Misala 20:28) Bandeko oyo batyami mpo na kobatela mpe kosalisa lisangá bazali makabo oyo Nzambe apesi biso.​—Baefese 4:8.

17. Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga ndeko mwasi asala nini mpo na komonisa botosi?

17 Ekoki kokóma ete nkulutu to mosaleli na misala azali te mpo na kokokisa mokumba moko na lisangá. Na ntango yango, bandeko mibali oyo bazwá batisimo bakoki kosalisa, kasi soki bazali mpe te, ndeko mwasi akoki kosala likambo oyo esengelaki ndeko mobali oyo azwá batisimo nde asala. Na ntango wana, akozipa motó na ye, na litambala to na ekɔti. (1 Bakorinti 11:3-10) Na ndenge yango, akomonisa ete atosaka ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá, na libota mpe na lisangá.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 15.

KOTOSA BAKONZI YA LETA

18, 19. (a) Baroma 13:1-7 eteyi biso nini? (b) Ndenge nini tomonisaka botosi epai ya bakonzi ya Leta?

18 Lelo oyo, Yehova atiki bakonzi ya Leta bázala na mwa bokonzi, mpe tosengeli kotosa bango. Babongisaka makambo na mboka mpo makambo etambola malamu mpe basalisaka bato na makambo ndenge na ndenge. Bakristo batosaka etinda oyo ezali na Baroma 13:1-7. (Tángá.) Tomemyaka “bakonzi oyo bazali liboso” mpe totosaka mibeko ya mboka esika tofandi. Mibeko yango ekoki kotalela libota na biso, mosala, to biloko na biso. Na ndakisa, tofutaka mpako mpe toyebisaka bakonzi ya Leta makambo oyo basengeli koyeba. Kasi, tosengeli kosala nini soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tósala likambo oyo ebuki mibeko ya Nzambe? Ntoma Petro alobaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:28, 29.

19 Soki tolingi kosolola na mokonzi moko ya Leta, na ndakisa zuzi to polisi, tosengeli kosala yango na limemya. Bilenge bakristo basengeli kotosa balakisi na bango mpe bakonzi mosusu ya eteyelo. Na mosala, tosengeli kotosa patrɔ na biso, ata soki baninga mosusu ya mosala basalaka yango te. Soki tozali kosala bongo, tozali komekola ntoma Paulo; ye azalaki kotosa bakonzi ya Leta atako na bantango mosusu ezalaki pɛtɛɛ te kosala yango. (Misala 26:2, 25) Ata soki bakonzi mosusu basali biso makambo ya malamu te, tosengeli kaka kotosa bango.​—Tángá Baroma 12:17, 18; 1 Petro 3:15.

20, 21. Makambo nini ya malamu ekoki kosalema soki tomemyaka basusu?

20 Na mokili mobimba, bato bazali lisusu komonisa limemya mingi te epai ya basusu. Kasi biso basaleli ya Yehova tozalaka ndenge wana te. Tolingaka komonisa limemya epai ya moto nyonso. Tolandaka toli ya ntoma Petro ete: “Bókumisa bato ya lolenge nyonso.” (1 Petro 2:17) Soki tozali komemya bato mosusu, bakomona yango. Yesu alobaki: “Pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino . . . na likoló nkembo.”​—Matai 5:16.

21 Ntango tozali komonisa limemya na libota, na lisangá, mpe na makambo mosusu ya bomoi, ndakisa na biso ya malamu ekoki kotinda basusu bálinga koyekola makambo ya Yehova. Mpe soki tozali komemya basusu, tozali nde komemya Yehova. Yango epesaka Yehova esengo mpe emonisaka ete tolingaka ye.