Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 11

Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala

Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala

“Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 BAKORINTI 13:8.

1, 2. Soki mikakatano ebimi na libala, yango elakisi ete libala elongi te? Limbolá.

 LIBALA ezali likabo ya Yehova. Ekoki kobakisela moto esengo na bomoi. Atako bongo, libala na libala ekozala na mikakatano na yango. Na bantango mosusu, ekoki komonana lokola nde mikakatano yango ekosila te, mpe mwasi ná mobali bakoki komiyoka ete bazali lisusu kolingana te ndenge ezalaki liboso.

2 Tosengeli kokamwa te soki na bantango mosusu mikakatano ebimi na libala na biso. Kasi, yango elakisi te ete tolongi te na libala na biso. Ezali kutu na babalani mosusu oyo bazalaki na mikakatano ya makasi na libala na bango, kasi balongaki kobongisa boyokani na bango mpe libala na bango ebongaki. Ndenge nini?

ZALÁ NA BOYOKANI MALAMU NA NZAMBE MPE NA MOLONGANI NA YO

3, 4. Nini ekoki kosalema na libala?

3 Libala esangisaka bato mibale oyo bakeseni; mokomoko azalaka na makambo oyo ye alingaka mpe oyo aboyaka, azalaka na makanisi na ye, mpe ndenge na ye ya kosala makambo. Lisusu, ekoki kozala ete mwasi ná mobali bauti na bikólo to mimeseno oyo ekeseni. Esɛngaka ntango mpe milende mpo mwasi ná mobali báyebana malamu mpe báyekola komitya na esika ya moninga.

4 Nsima ya bambula, moto na moto akoki komipesa mingi na makambo na ye moko, mpe bolingo ya mwasi ná mobali ekoki kokita. Ekoki komonana lokola nde moto na moto azali kotambwisa bomoi na ye na ndenge na ye. Nini ekoki kosalisa bango bákóma lisusu na boyokani makasi?

Mpo tózala na libala ya malamu, tosengeli kolanda toli ya Biblia

5. (a) Nini ekoki kosalisa ndeko mobali to ndeko mwasi abatela boyokani ya malamu na molongani na ye? (b) Na kolanda Baebre 13:4, ndenge nini tosengeli kotalela libala?

5 Yehova apesi toli ya malamu oyo ekosalisa yo ná molongani na yo bókoba kozala na boyokani malamu na Nzambe mpe bino mibale. (Nzembo 25:4; Yisaya 48:17, 18) Alobi na biso: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.” (Baebre 13:4) Topesaka lokumu na eloko oyo tomoni ete ezali na valɛrɛ mpe na ntalo. Tobatelaka yango mpe tolɛngɛlaka yango. Yehova alingi tótalela libala ndenge wana.

LINGÁ YEHOVA MPO OZALA NA LIBALA YA MALAMU

6. Matai 19:4-6 emonisi ete Yehova atalelaka libala ndenge nini?

6 Yehova nde Mobandisi ya libala. Mwana na ye Yesu alobaki: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:4-6) Banda na ebandeli, Yehova alingaki ete libala eumela libela na libela. Alingaki bato ya libota bázala na bomoko, bázala na esengo, mpe básepela na bomoi elongo.

7. Nini ekosalisa mwasi ná mobali bábatela libala na bango?

7 Kasi, lelo bato oyo babalá bazali kokutana na makambo ebele oyo ezali komema mitungisi mpe mikakatano ndenge na ndenge. Na bantango mosusu, mikakatano ekoki kozala makasi tii mwasi ná mobali bakoki kokanisa ete bakokoka te, mpe nsukansuka okomona bakabwani. Kasi, koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka libala ekoki kosalisa biso.​—1 Yoane 5:3.

8, 9. (a) Ntango nini tosengeli kolanda toli ya Yehova na libala na biso? (b) Ndenge nini tokomonisa ete tozwaka libala na valɛrɛ?

8 Toli ya Yehova ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Ndenge tomonaki yango, Yehova apesi biso toli oyo: “Libala ekumisama.” (Baebre 13:4; Mosakoli 5:4) Soki tolandi toli ya Yehova ata na ntango oyo ezali mpasi, tokozwa kaka litomba.​—1 Batesaloniki 1:3; Baebre 6:10.

9 Mpo na komonisa ete tozwaka libala na valɛrɛ, tosengeli koboya kosala to koloba likambo oyo ekoki kobebisa yango. Kasi, tokoluka nde kokómisa makasi boyokani na biso ná molongani na biso. Ndenge nini tokoki kosala yango?

MALOBA MPE MISALA NA YO EMONISA ETE OKUMISAKA LIBALA NA YO

10, 11. (a) Mikakatano nini ya minene ezalaka na mabala mosusu? (b) Mpo na nini ndenge tolobaka na molongani na biso ezali na ntina mingi?

10 Moto akoki kopesa molongani na ye mpasi na ndenge mingi. Toyebi ete mokristo asengeli ata moke te kobɛta molongani na ye to kosala eloko moko oyo ekoyokisa ye mpasi na nzoto. Nzokande, tokoki kozokisa molongani na maloba na biso. Maloba ekoki kokóma bibundeli. Mwasi moko alobi boye: “Mobali na ngai abɛtaka ngai na maloba. Nazali na bilembo na nzoto te, kasi motema na ngai etondi na bampota mpo akatelaka ngai mangala, lokola: ‘Nabaye makambo na yo!’ mpe ‘Ozali ata na ntina moko te!’” Mobali moko alobaki ete maloba ya mwasi na ye ezalaki ntango nyonso kosambwisa ye mpe azalaki kobamba ye bankombo. Alobi boye: “Nakokoka te kozongela makambo ya mabe oyo alobaka na ngai. Yango wana nakokaka te kosolola na ye, mpe natikalaka na mosala tii butu. Kuna, nazalaka na kimya koleka na ndako.” Lelo oyo, bato bazali na momeseno ya kobimisa maloba ya kofinga mpe maloba ya mabe oyo ekoki kopesa mpasi mingi na motema.

11 Soki mwasi ná mobali bazali kolobelana maloba ya mabe, bakoki kozokisana na motema bampota oyo ekoumela mpo esila. Ezali polele ete Yehova alingi te ete mwasi ná mobali bálobanaka ndenge wana. Kasi, okoki kozokisa molongani na yo na motema kozanga kutu oyeba yango. Mbala mosusu okanisaka ete ozalaka na boboto epai ya molongani na yo, kasi ye moko alobaka nini? Soki olobaki likambo moko oyo ezokisaki molongani na yo, okondima kosala mbongwana?​—Bagalatia 5:15; tángá Baefese 4:31.

12. Nini ekoki kobebisa boyokani ya moto oyo abalá ná Yehova?

12 Ndenge oyo olobaka na molongani na yo, na miso ya bato to ntango oyo bozalaka bino mibale ezali na ntina na miso ya Yehova. (Tángá 1 Petro 3:7.) Yakobo 1:26 ekundweli biso ete: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.”

13. Ezaleli nini mosusu ekoki kozokisa molongani na biso na motema?

13 Ezali na makambo mosusu oyo bato oyo babalá basengeli kokeba na yango. Na ndakisa, molongani na yo akoyoka ndenge nini soki obandi kolekisa ntango mingi na moto mosusu? Atako mbala mosusu ozali kosala yango na makanisi ya mabe te, na ndakisa kobima na mosala ya kosakola to ozali kopesa ye lisalisi mpo na likambo moko, ekopesa molongani na yo mpasi te? Ndeko mwasi moko alobaki: “Komona ete mobali na ngai apesaka ntango mpe likebi mingi na ndeko mwasi mosusu ya lisangá epesaka ngai mpasi. Etindaka ngai namiyoka ete ndeko mwasi yango aleki ngai.”

14. (a) Liteya nini ya ntina tozwi na Ebandeli 2:24? (b) Motuna nini tosengeli komituna?

14 Biso bakristo tozali na mokumba epai ya baboti na biso mpe bandeko na biso ya lisangá. Kasi, soki tobali, mokumba na biso ya libosoliboso ekómi epai ya molongani na biso. Yehova alobaki ete mobali “asengeli kokangama na mwasi na ye.” (Ebandeli 2:24) Tosengeli kotya likebi mingi na mayoki ya molongani na biso. Omituna boye: ‘Napesaka molongani na ngai ntango, likebi, mpe bolingo oyo esengeli mpe eyokani na mposa na ye?’

15. Mpo na nini moto oyo abalá asengeli kokeba ete akangama te na moto oyo azali molongani na ye te?

15 Kokangama na moto oyo azali molongani na yo te, ekoki kotya mobulu na libala. Tokoki komesana mingi na moto yango mpe kobanda kolulana na moto yango. (Matai 5:28) Bamposa yango ekoki kokóma makasi mpe kotinda yo osala likambo moko oyo ekoki kobebisa lokumu ya libala na yo.

“MBETO YA LIBALA EZALA NA MBINDO TE”

16. Etinda nini Biblia epesi mpo na libala?

16 Nsima ya koloba ete “libala ekumisama,” Biblia elobi: “Mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebre 13:4) Awa, maloba “mbeto ya libala” elimboli kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali. (Masese 5:18) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya na likambo yango mpe tolingi kokómisa yango mbindo te?

17. (a) Ndenge nini bato mingi batalelaka ekobo? (b) Ndenge nini bakristo basengeli kotalela ekobo?

17 Lelo oyo, bato mosusu bamonaka ete ezali mabe te kozanga bosembo epai ya molongani. Tosengeli te kotika makanisi yango etambwisa biso. Yehova amonisi polele ete ayinaka pite mpe ekobo. (Tángá Baroma 12:9; Baebre 10:31; 12:29) Soki tosangisi nzoto na moto mosusu oyo azali molongani na biso te, tokokómisa libala na biso mbindo. Ekomonisa ete tozali na limemya te na mibeko ya Yehova, mpe tokobebisa boyokani na biso na ye. Na yango, tosengeli ata komeka kotya lokolo te na nzela oyo ekoki komema biso na ekobo. Yango elimboli mpe kolongola makanisi oyo ebongi te mpo na moto oyo azali molongani na biso te.​—Yobo 31:1.

18. (a) Mpo na nini ekobo ezalaki lokola kosambela banzambe ya lokuta? (b) Ndenge nini Yehova azalaki kotalela ekobo?

18 Na ntango ya Mibeko ya Moize, ekobo ezalaki lisumu moko monene, kaka lokola kosambela banzambe ya lokuta. Etumbu mpo na masumu yango mibale ezalaki liwa. (Balevi 20:2, 10) Na ndenge nini ekobo ezali lokola kosambela banzambe ya lokuta? Soki Moyisraele asambeli banzambe ya lokuta, awangani elaka na ye ya kozala sembo epai ya Yehova. Soki asali ekobo, awangani elaka na ye ya kozala sembo epai ya molongani na ye. (Kobima 19:5, 6; Kolimbola Mibeko 5:9; tángá Malaki 2:14.) Emonani polele ete na ntango ya kala, na miso ya Yehova, ekobo ezalaki lisumu monene mpenza.

19. Nini ekoki kosalisa biso tózala na ekateli ya kosala ekobo te?

19 Bongo lelo? Atako tozali lisusu na nse ya Mibeko ya Moize te, likanisi ya Yehova mpo na ekobo ebongwani te. Ndenge kaka tokolinga ata moke te kosambela nzambe ya lokuta, tosengeli ata moke te kozanga bosembo epai ya molongani na biso. (Nzembo 51:1, 4; Bakolose 3:5) Soki tosali bongo, ekomonana ete totyoli libala na biso mpe Nzambe na biso, Yehova.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 26.

OYO OKOKI KOSALA MPO LIBALA NA BINO EZALA MAKASI

20. Ndenge nini bwanya ekoki kosalisa na libala?

20 Okoki kosala nini mpo libala na yo ezala makasi? Biblia elobi: “Ndako ekotongama na bwanya, mpe ekopikama makasi na bososoli.” (Masese 24:3) Tokoki kokómisa ndako na biso esika ya malilimalili mpe ya kokimisa bato, to esika oyo bato bazali kosepela, komiyoka malamu mpe ete babatelami. Ezali mpe bongo mpo na libala. Moto ya bwanya asalaka nyonso mpo libala na ye ezala esika ya kobatelama, ya esengo, mpe esika oyo moto azali komiyoka malamu.

21. Ndenge nini boyebi ekoki kosala ete libala ezala makasi?

21 Mpo na ndako yango, Biblia ebakisi: “Na boyebi, bashambrɛ na yo ya kati ekotonda na biloko nyonso ya motuya oyo ezali na ntalo mingi mpe oyo esepelisaka.” (Masese 24:4) Makambo oyo oyekolaka na Biblia ekoki kobongisa mpenza libala na yo. (Baroma 12:2; Bafilipi 1:9) Soki ozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso elongo na molongani na yo, bólobela ndenge oyo bokoki kosalela makambo yango. Bólukaka ndenge oyo bokoki komoniselana bolingo mpe limemya, mpe ndenge ya komonisa boboto mpe kotyelana likebi. Sɛngá Yehova asalisa yo okolisa bizaleli oyo ekobongisa libala na bino mpe ekosala ete molongani na yo alinga yo.​—Masese 15:16, 17; 1 Petro 1:7.

Tyelá Yehova motema mpo atambwisa bino na losambo na kati ya libota

22. Mpo na nini tosengeli komonisela molongani na biso bolingo, limemya, mpe kopesa ye lokumu?

22 Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela molongani na biso makambo na bolingo, kopesaka ye limemya mpe lokumu. Na ndenge yango, libala na biso ekokóma na esengo mpenza mpe ekoumela. Oyo eleki ntina, tokosepelisa Yehova.​—Nzembo 147:11; Baroma 12:10.