Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 15

Sepelá na mosala na yo

Sepelá na mosala na yo

“Moto nyonso . . . amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.”​—MOSAKOLI 3:13.

1-3. (a) Bato mingi bayokaka ndenge nini mpo na mosala na bango? (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

 NA MOKILI mobimba, bato basalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na bango moko mpe ya libota na bango. Bato mingi balingaka mosala na bango te, mpe basusu kutu babangaka kokende mosala mokolo na mokolo. Soki yo mpe oyokaka bongo, okoki kosala nini mpo osepelaka na mosala na yo? Ndenge nini osengeli kotalela mosala na yo?

2 Yehova alobi na biso: “Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:13) Yehova akelá biso na mposa mpe na esengo ya kosala mosala. Alingi tósepela na mosala oyo tosalaka.​—Tángá Mosakoli 2:24; 5:18.

3 Na yango, nini ekosalisa biso tósepela na mosala na biso? Misala nini bakristo basengeli koboya? Ndenge nini kozala na bokatikati kati na mosala na biso mpe losambo ya Yehova? Mpe mosala nini oyo eleki ntina tokoki kosala?

BASALI MINENE MIBALE

4, 5. Ndenge nini Yehova atalelaka mosala?

4 Yehova ye moko alingaka mosala. Ebandeli 1:1 elobi: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” Ntango Nzambe asilisaki kokela mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, alobaki ete ezalaki “malamu mingi.” (Ebandeli 1:31) Mozalisi na biso asepelaki na mosala oyo asalaki.​—1 Timote 1:11.

5 Yehova atiká kosala te. Yesu alobaki: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo.” (Yoane 5:17) Atako toyebi te makambo nyonso ya kokamwa oyo Yehova azali kosala, toyebi mwa ndambo na yango. Aponaka baoyo bakoyangela elongo na Mwana na ye Yesu Kristo na Bokonzi na ye. (2 Bakorinti 5:17) Longola yango, Yehova atambwisaka mpe abatelaka bato. Mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba esali ete bamilio ya bato báyeba Yehova mpe bázwa elikya ya kofanda libela na libela na paradiso awa na mabele.​—Yoane 6:44; Baroma 6:23.

6, 7. Yesu azalaki mosali ya ndenge nini?

6 Ndenge moko na Tata na ye, Yesu mpe alingaka mosala. Liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki “mosali ya mayele” ya Nzambe, asalisaki na kokela biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele. (Masese 8:22-31; Bakolose 1:15-17) Ntango ayaki awa na mabele, Yesu akobaki kosala mosala makasi. Ntango azalaki elenge, ayekolaki mosala ya mabaya, mbala mosusu azalaki kosala biloko lokola bakiti, bamesa, mpe azalaki kotonga bandako. Yesu ayebaki mosala yango malamu tii bato bakómaki kobenga ye “mosali ya mabaya.”​—Marko 6:3.

7 Kasi, mosala eleki ntina oyo Yesu asalaki awa na mabele ezalaki ya kosakola nsango malamu mpe koteya bato makambo ya Yehova. Mpo na kosilisa mosala yango, azalaki kaka na mbula misato na ndambo, mpe azalaki kosala makasi kobanda ntɔngɔntɔngɔ tii butu makasi. (Luka 21:37, 38; Yoane 3:2) Yesu atambolaki bakilomɛtrɛ ebele na nzela oyo etondi na putulu mpo na koyebisa bato ndenge na ndenge nsango malamu.​—Luka 8:1.

8, 9. Mpo na nini Yesu asepelaki na mosala na ye?

8 Mpo na Yesu, kosala mosala ya Nzambe ezalaki lokola biloko ya kolya. Mosala yango ezalaki kopesa ye makasi mpe nguya. Mikolo mosusu, Yesu azalaki kosala makasi mpe azalaki kozwa ata ntango ya kolya te. (Yoane 4:31-38) Asalelaki libaku nyonso mpo na kosalisa basusu báyeba Tata na ye. Yango wana, akokaki koloba na Yehova ete: “Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala.”​—Yoane 17:4.

9 Ezali polele ete Yehova ná Yesu basalaka mosala makasi mpe basepelaka na mosala na bango. Mposa na biso ezali ete ‘tókóma bamekoli ya Nzambe,’ mpe ‘tólanda matambe ya Yesu malamumalamu.’ (Baefese 5:1; 1 Petro 2:21) Yango wana, tosalaka nyonso mpo tózala makasi na mosala mpe tómipesa na likambo nyonso oyo tozali kosala.

NDENGE NINI TOSENGELI KOTALELA MOSALA?

10, 11. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi oyo ebongi mpo na mosala na biso?

10 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso moko mpe ya libota na biso. Tolingaka kotalela mosala na biso na ndenge oyo ebongi, kasi kosala bongo ekoki kozala mpasi. Na yango, tokoki kosala nini soki tosepelaka na mosala na biso te?

Kobatela makanisi ya malamu ekosalisa biso tósepela ata na mosala nini

11 Zalá na makanisi oyo ebongi. Mbala mosusu tozali te na likoki ya kobongola mosala oyo tosalaka, kasi tokoki kobongola makanisi na biso. Koyeba oyo Yehova azali kosɛnga biso ekoki kosalisa biso. Na ndakisa, Yehova alingi ete tata ya libota akokisa bamposa ya libota na ye na ndenge oyo akoki. Kutu, Biblia elobi ete moto oyo akokisaka bamposa ya libota na ye te “azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Soki ozali tata ya libota, na ntembe te osalaka mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Ata soki olingi mosala oyo osalaka to te, oyebi ete lokola osalisaka libota na yo, osepelisaka mpe Yehova.

12. Kozala makasi na mosala mpe sembo ezali na matomba nini?

12 Zalá makasi na mosala mpe zalá sembo. Yango ekoki kosalisa yo osepela na mosala na yo. (Masese 12:24; 22:29) Na ndakisa, patrɔ na yo akotyela yo motema. Bapatrɔ basepelaka na basali oyo bazalaka sembo, mpo bakoyiba mbongo te, biloko ya mosala te, to ngonga ya mosala. (Baefese 4:28) Oyo eleki ntina, Yehova akomona ete ozali makasi na mosala mpe ozali sembo. Okozala na “lisosoli ya sembo” mpo oyebi ete ozali kosepelisa Nzambe oyo olingaka.​—Baebre 13:18; Bakolose 3:22-24.

13. Kozala sembo na mosala ekoki mpe kobimisa litomba nini?

13 Yebá ete etamboli na yo na mosala ekoki kopesa Yehova nkembo. Yango mpe ezali ntina mosusu ya kosepela na mosala na biso. (Tito 2:9, 10) Ekoki kutu kosalema ete moninga na yo moko ya mosala andima koyekola Biblia mpo amoni ndakisa na yo ya malamu.​—Tángá Masese 27:11; 1 Petro 2:12.

MOSALA NINI NASENGELI KOPONA?

14-16. Mituna nini tosengeli komituna liboso tóndima mosala moko?

14 Biblia etángi te misala oyo mokristo asengeli kondima to oyo asengeli koboya. Kasi, ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na oyo etali mosala. (Masese 2:6) Ntango olingi kopona mosala, okoki komituna boye:

Luká mosala oyo eyokani na mibeko ya Yehova

15 Mosala yango ekosɛnga nasalaka likambo oyo Yehova alobi ete ezali mabe? Toyekolaki makambo oyo Yehova ayinaka, na ndakisa koyiba to kokosa. (Kobima 20:4; Misala 15:29; Baefese 4:28; Emoniseli 21:8) Yango wana, tozalaka ekɛngɛ mpe toboyaka mosala nyonso oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe.​—Tángá 1 Yoane 5:3.

16 Mosala oyo ezali kolendisa momeseno moko oyo Yehova apekisi? Na ndakisa, okosala nini soki basɛngi yo osala na esika oyo bayambaka bato na lopitalo moko oyo elongolaka basi zemi? Kosala na esika oyo bayambaka bato ezali mabe te. Kasi, oyebi ndenge Yehova atalelaka kolongola zemi. Na yango, ata soki yo moko okolongola basi zemi te, omoni te ete na miso ya Yehova yo mpe okozala na ngambo?​—Kobima 21:22-24.

17. Nini ekosalisa biso tózwa bikatali oyo ekosepelisa Nzambe?

17 Soki tozali kosalela mitinda ya Biblia, tokoki kokóma lolenge ya bato oyo Baebre 5:14 elobeli, “baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.” Omituna boye: ‘Soki nandimi mosala yango, ekobɛtisa basusu libaku te? Mosala yango ekosɛnga natikaka molongani na ngai ná bana mpo nasala mobembo na mboka mosusu? Bakomiyoka ndenge nini soki nasali bongo?’

‘LUKÁ KOYEBA MPENZA MAKAMBO OYO ELEKI NTINA’

18. Mpo na nini ekoki kozala mpasi kotya losambo na biso na esika ya liboso?

18 Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,’ ekoki kozala mpasi kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso. (2 Timote 3:1) Kozwa mosala mpe kobatela yango ekoki kozala mpasi mpenza. Tosengeli kokokisa bamposa ya libota na biso, kasi toyebi ete losambo na biso esengeli kozala na esika ya liboso. Tokoki te kotika ete biloko ya mosuni ekóma na ntina mingi na bomoi na biso. (1 Timote 6:9, 10) Na yango, ndenge nini tokoki ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina,’ mpe kaka na ntango yango kokokisa bamposa ya libota na biso?​—Bafilipi 1:10.

19. Ndenge nini kotyela Yehova motema esalisaka biso tózala na bokatikati na makambo ya mosala?

19 Tyelá Yehova motema mobimba. (Tángá Masese 3:5, 6.) Nzambe ayebi malamu oyo tosengeli na yango mpe atyelaka biso likebi mingi. (Nzembo 37:25; 1 Petro 5:7) Liloba na ye eyebisi biso: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’” (Baebre 13:5) Yehova alingi te ete tómitungisaka ntango nyonso mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso. Amonisá mbala na mbala ete akoki kokokisa bamposa ya basaleli na ye. (Matai 6:25-32) Ata soki makambo na biso ya mosala ezali ndenge nini, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala, kosakola nsango malamu, mpe koyangana na makita.​—Matai 24:14; Baebre 10:24, 25.

20. Nini ekosalisa biso tózala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ?

20 Batelá liso alima. (Tángá Matai 6:22, 23.) Kobatela liso alima elimboli kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo tótya makanisi na mosala ya Yehova. Toyebi ete ekozala bozoba soki totiki ete mbongo, bomoi ya bomɛngo, to baaparɛyi ya mikolo oyo ekóma na ntina mingi koleka boninga na biso na Nzambe. Na yango, nini ekoki kosalisa biso tótya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso? Tósala makasi tókɔtaka banyongo te. Soki ozali na banyongo sikoyo, luká ndenge ya kobanda kofuta yango to kosilisa yango. Soki tokebi te, biloko ya mosuni ekoki kolya biso ntango mpe makasi mingi, mpe tokoki kozanga ntango mpo na kobondela, koyekola, to kobima mosala ya kosakola. Na esika tókómisa bomoi na biso mindɔndɔ na biloko ya mosuni, malamu tóyekola kosepela na biloko ya ntina oyo tozali na yango, na ndakisa ‘bilei mpe eloko ya kozipa nzoto.’ (1 Timote 6:8) Mpe ata soki makambo na biso ezali ndenge nini, ezali malamu tómitalelaka mbala na mbala mpo tómona ndenge oyo tokoki komipesa lisusu mingi na mosala ya Yehova.

21. Mpo na nini tosengeli koyeba nini tokotya na esika ya liboso na bomoi na biso?

21 Yekolá kotya makambo oyo ebongi na esika ya liboso. Tosengeli kosalela malamu ntango, makasi, mpe biloko na biso ya mosuni. Soki tokebi te, makambo oyo ezali na ntina mingi te, lokola kotánga kelasi to koluka mbongo ekoki kolya ntango na biso. Yesu alobaki: “Bókoba koluka liboso bokonzi.” (Matai 6:33) Bikateli na biso, mimeseno na biso, makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, mpe mikano na biso emonisaka makambo nini ezali na esika ya liboso na kati ya motema na biso.

MOSALA OYO ELEKI NTINA

22, 23. (a) Mosala nini eleki ntina mpo na bakristo? (b) Nini ekosalisa biso tósepela na mosala na biso?

22 Mosala oyo eleki ntina ezali kosalela Yehova mpe kosakola nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20) Ndenge moko na Yesu, tolingaka komipesa na mosala yango, na kolanda makoki na biso. Bandeko mosusu bakendá kosakola na bisika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Bamosusu bazali koyekola monɔkɔ ya bapaya mpo bákoka koteya bato oyo balobaka monɔkɔ yango. Sololá na bandeko oyo basalá makambo yango. Bakoyebisa yo ndenge bakómaki na esengo mingi koleka mpe mapamboli oyo bazwaki.​—Tángá Masese 10:22.

Kosalela Yehova nde mosala oyo eleki ntina mpo na biso

23 Lelo oyo, mingi kati na biso tolekisaka bangonga ebele na mosala moko to mpe na misala ebele kaka mpo tókokisa bamposa ya ntina ya libota na biso. Yehova ayebi yango, mpe asepelaka na milende nyonso oyo osalaka mpo na kobatela libota na yo. Biso nyonso tókoba kolanda ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu: tózala makasi na mosala, ata soki mosala yango ezali ndenge nini. Mpe kobosana te ete mosala na biso oyo eleki ntina ezali kosalela Yehova mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yango nde ekopesa biso esengo ya solosolo.