Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 16

Tɛmɛlá Zabolo

Tɛmɛlá Zabolo

“Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”​—YAKOBO 4:7.

1, 2. Makambo nini tosengeli koyeba mpo na Satana ná bademo na ye?

 BOMOI na mokili ya sika oyo Yehova alaki ekozala malamu mpenza. Nsukansuka, tokozala na bomoi oyo Nzambe akanaki mpo na biso banda na ebandeli. Kasi mpo na sikoyo, tozali kofanda na mokili oyo Satana ná bademo na ye bazali koyangela. (2 Bakorinti 4:4) Ata soki tomonaka bango te, bazali mpe bazali na nguya mingi.

2 Na mokapo oyo, tokolobela ndenge ya kotikala penepene na Yehova mpo Satana azwa biso te. Yehova alaki ete akosalisa biso. Kasi, tosengeli koyeba mayele oyo Satana ná bademo na ye basalelaka mpo na kokosa mpe kobundisa biso.

AZALI “LOKOLA NKƆSI OYO EZALI KOGANGA”

3. Zabolo alukaka nini?

3 Satana alobaka ete bato basambelaka Yehova kaka mpo na koluka bolamu na bango, mpe ete bakotika kosalela ye soki makambo eyei ndongo. (Tángá Yobo 2:4, 5.) Ntango moto amonisi ete alingi koyeba makambo ya Yehova, Satana ná bademo na ye bamonaka yango mpe balukaka kopekisa ye. Bayokaka nkanda ntango moto amipesi na Yehova mpe azwi batisimo. Biblia elobi ete Zabolo azali lokola “nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Petro 5:8) Satana alukaka kobebisa boyokani na biso na Yehova.​—Nzembo 7:1, 2; 2 Timote 3:12.

Satana ayokaka nkanda ntango tomipesi na Yehova

4, 5. (a) Likambo nini Satana akokoka kosala te? (b) ‘Kotɛmɛla Zabolo’ elimboli nini?

4 Kasi, tosengeli te kobanga Satana ná bademo na ye. Yehova atyá ndelo na makambo oyo bakoki kosala. Yehova alaki ete “ebele mpenza” ya bakristo ya solo bakobika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:9, 14) Zabolo akoki ata moke te kopekisa likambo yango, mpo Yehova azali kobatela basaleli na Ye.

5 Soki totikali penepene na Yehova, Satana akokoka te kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Liloba ya Nzambe epesi biso elaka ete: “Yehova azali elongo na bino ntango nyonso oyo bozali na ye.” (2 Ntango 15:2; Tángá 1 Bakorinti 10:13.) Mibali mpe basi ebele ya sembo na ntango ya kala, na ndakisa Abele, Enoka, Noa, Sara, mpe Moize batɛmɛlaki Zabolo mpo batikalaki penepene na Yehova. (Baebre 11:4-40) Biso mpe tokoki kosala bongo. Liloba ya Nzambe eyebisi biso: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”​—Yakobo 4:7.

“TOZALI KOBUNDA ETUMBA”

6. Ndenge nini Satana abundisaka biso?

6 Satana ayebi ete Yehova atyelá ye bandelo, kasi alukaka kaka kosala mwa eloko mpo na kolɛmbisa boyokani na biso na Nzambe. Lelo oyo, Zabolo abundisaka biso na ndenge mingi mpe asalelaka mayele oyo asalelá banda kala. Tólobela mayele yango mosusu.

7. Mpo na nini Satana abundisaka basaleli ya Yehova?

7 Ntoma Yoane akomaki boye: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Satana azali koyangela mokili na ye ya mabe, mpe alukaka lisusu koyangela basaleli ya Yehova. (Mika 4:1; Yoane 15:19; Emoniseli 12:12, 17) Zabolo ayebi ete azali lisusu na ntango mingi te; yango wana azali kotya mokomoko na biso mbamba makasi mpo tózanga bosembo epai ya Nzambe. Na bantango mosusu, Zabolo abundisaka biso polele, kasi na bantango mosusu asalelaka mayele ya nsense.

8. Mokristo mokomoko asengeli koyeba likambo nini?

8 Baefese 6:12 elobi: “Tozali kobunda etumba . . . na mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” Mokristo mokomoko azali kobunda etumba na Zabolo mpe bademo. Tosengeli koyeba ete moto nyonso oyo amipesá na Yehova azali kobunda etumba yango. Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Efese, alendisaki bango mbala misato ete ‘bátɛlɛma ngwi.’​—Baefese 6:11, 13, 14.

9. Satana na bademo na ye balukaka nini?

9 Satana ná bademo balukaka kokosa biso na ndenge mingi. Soki tolongi kokima motambo moko ya Satana, yango elimboli te ete tokoki te kokwea na mitambo na ye mosusu. Zabolo alukaka esika bolɛmbu na biso ezali mpo ayeba motambo nini ekoki kokanga biso. Kasi, Biblia esalisaka biso tóyeba mitambo ya Zabolo, mpe tokoki kokima yango. (2 Bakorinti 2:11; talá Maloba na nsuka ya lisolo 31.) Moko na mitambo yango ezali misala ya bademo.

ZALÁ MOSIKA NA BADEMO

10. (a) Misala ya bademo ezali nini? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka yango?

10 Na misala ya bademo, tokoki mpe kotánga makambo oyo eleki mayele ya bato, oyo etyaka moto na boyokani na bademo, na ndakisa, kosakola makambo oyo ebombaná, kolɔka, to koluka kosolola na bato oyo bakufá. Biblia elobi ete misala ya bademo ezali makambo oyo “eyinamá” mpe ete etambolaka nzela moko te na losambo ya Yehova. (Kolimbola Mibeko 18:10-12; Emoniseli 21:8) Bakristo basengeli koboya lolenge nyonso ya misala ya bademo.​—Baroma 12:9.

11. Koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bato ekoki komema biso wapi?

11 Satana ayebi ete soki tolukaka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bato, ekozala mpasi te akɔtisa biso na misala ya bademo. Likambo nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bademo ebebisaka boyokani na biso na Yehova.

SATANA ALUKAKA KOKOSA BISO

12. Satana alukaka kokɔtisa nini na makanisi na biso?

12 Satana alukaka kokɔtisa mobulungano na mitó ya bato. Akɔtisaka ntembe mokemoke, tii bato bakokóma kokanisa ete “malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.” (Yisaya 5:20) Zabolo atindaka bato bákanisa ete toli ya Biblia esalisaka te mpe ete bakozala na esengo koleka soki baboyi kotosa mibeko ya Nzambe.

13. Ndenge nini Satana alukaka kokɔtisa bantembe?

13 Kokɔtisa ntembe na makanisi ya moto ezali moko ya mayele ya Satana oyo elongaka mpenza. Asalelaka mayele yango banda kala. Na elanga ya Edene, amekaki kokɔtisa ntembe na makanisi ya Eva ntango atunaki ye: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” (Ebandeli 3:1) Na nsima, na ntango ya Yobo, Satana atunaki Yehova na miso ya baanzelu ete: “Yobo abangi Nzambe nde mpamba?” (Yobo 1:9) Nsima ya batisimo ya Yesu, Satana atyelaki ye ntembe mpe alobaki na ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.”​—Matai 4:3.

14. Satana asalaka nini mpo bato báyeba mpenza te ete misala ya bademo ezali likama?

14 Lelo oyo mpe, Satana alukaka kokɔtisa ntembe na mitó na biso. Alukaka kotinda bato bámituna soki misala ya bademo ezali mpenza mabe na ndenge asalaka ete misala yango mosusu emonana lokola ezali malamu. Kutu, ata bakristo mosusu bazali komona lisusu makama na yango te. (2 Bakorinti 11:3) Na yango, tokoki kosala nini mpo tómibatela? Ndenge nini tokoki koyeba soki Satana azali kokosa biso to te? Tólobela ndenge mibale oyo tokoki kokosama: na likambo etali kominanola mpe lisalisi ya monganga.

SATANA ASALELAKA BAMPOSA NA BISO YA BOMOTO MPO NA KOBUNDISA BISO

15. Ndenge nini moto akoki kokɔta na boyokani na bademo na nzela ya kominanola?

15 Lelo oyo, bafilme, bavideo, mpe baemisyo ya TV, masano ya video, mpe basite Internet mingi elakisaka bademo, maji, mpe makambo oyo eleki mayele ya bato. Bato mingi bamonaka ete makambo yango ezali kaka masɛki mpamba mpe bamonaka te ete ezali likama kokɔtisa bademo na bomoi na bango. Moto mosusu akoki mpe komikɔtisa na misala ya bademo na nzela ya makambo lokola horoscope, kolimbola banzela oyo ezalaka na lobɔkɔ ya moto, kotánga bakarte oyo esakolaka makambo ekoya, mpe boule de cristal. Zabolo asalaka ete moto amona likama te mpe makambo yango emonana lokola makambo ya kokamwa, oyo ezali kobenda likebi mpe kosɛkisa. Moto mosusu akoki kutu kokanisa ete kosala eloko oyo ezali kolakisa misala ya bademo to makambo oyo eleki mayele ya bato ezali mabe te soki ye moko azali mpenza te na boyokani na bademo. Mpo na nini kokanisa bongo ezali likama?​—1 Bakorinti 10:12.

16. Mpo na nini tosengeli koboya kominanola oyo ezali na makambo ya molili?

16 Satana ná bademo na ye bayebaka te makambo oyo ezali na kati ya motema na biso. Kasi, bakoki koyeba makambo oyo tolingaka mpe oyo tokanisaka soki batali makambo oyo toponaka, na ndakisa kominanola, mpo na biso moko mpe mpo na libota na biso. Soki toponaka bafilme, miziki, to babuku oyo elobelaka misala ya bilimo mabe, maji, makambo ya bademo, bondɔki, ba vampires, to makambo mosusu ya ndenge wana, Satana ná bademo bakoyeba ete tolukaka koyeba makambo na bango. Bakoluka sikoyo kokɔtisa biso mpenza na misala ya bademo.​—Tángá Bagalatia 6:7.

17. Ndenge nini Satana akoki kosalela mposa na biso ya kolinga kozala nzoto kolɔngɔnɔ?

17 Satana akoki mpe kosalela mposa na biso ya kolinga kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpo na kokɔtisa biso na misala ya bademo. Lelo oyo, bato mosusu babɛlaka mingi. Ekoki kozala ete moto alukaki lisalisi ndenge na ndenge ya monganga, kasi maladi esili te. (Marko 5:25, 26) Akoki komona ete akómi na nsuka mpe kondima komeka ata lisalisi nini. Kasi, biso bakristo tosengeli kokeba mpo lisalisi ya monganga oyo tokopona ezala na “misala ya maji” te.​—Yisaya 1:13.

Tyelá Yehova motema ntango ozali kobɛla

18. Lisalisi nini ya monganga mokristo asengeli koboya?

18 Na Yisraele ya kala, bato mosusu bazalaki kosala “misala ya maji.” Yehova alobaki na bango: “Ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino, nazali kozipa miso na ngai liboso na bino. Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te.” (Yisaya 1:15) Kanisá naino: Yehova aboyaki koyoka ata mabondeli na bango. Tokolinga kosala ata eloko moko te oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova, mpe oyo ekoki kotinda ye aboya kosalisa biso, mingimingi ntango tozali maladi. (Nzembo 41:3) Na yango, tosengeli koluka koyeba soki lisalisi ya monganga oyo tozali kokana kozwa ezali na boyokani ata moke te na misala ya bademo to na makambo oyo eleki mayele ya bato. (Matai 6:13) Soki tomoni ete lisalisi yango ezali polele te, tosengeli koboya yango.​—Talá Maloba na nsuka ya lisolo 32.

MASOLO OYO ETALI BADEMO

19. Ndenge nini Zabolo abangisaka bato?

19 Bato mosusu bakanisaka ete Zabolo ná bademo bazalaka mpenza te; kasi basusu bandimaka ete bazalaka mpenza mpo na makambo oyo bango moko bamoná. Bato mingi babangaka bilimo mabe mpe bazali baombo ya bikelakela. Bato mosusu babɛtaka masolo ya makambo ya nsɔmɔ oyo bademo basalaka bato mpo na kobangisa basusu. Mbala mingi, bato basepelaka na masolo yango mpe balingaka koyebisa yango basusu. Masolo yango esalaka ete bato bábanga Zabolo.

20. Na ndenge nini tokoki kopalanganisa lokuta ya Satana?

20 Kanisá likambo oyo: Satana alingaka ete bato bábanga ye. (2 Batesaloniki 2:9, 10) Azali mobuki-lokuta oyo ayebi ndenge ya kosakana na makanisi ya baoyo babendamaka na misala ya bademo mpe atindaka bango bándima makambo oyo ezali solo mpenza te. Bato yango babɛtaka masolo ya makambo oyo bakanisi ete bamonaki to bayokaki. Ntango bato bazali kobɛta masolo yango mingi, masolo yango ezali koyebana mingi mpe komonana lokola ete ezali makambo ya solo. Tolingi kotinda bato bábanga Satana te; yango wana tóbɛtaka masolo ya ndenge wana te.​—Yoane 8:44; 2 Timote 2:16.

21. Na esika tóbɛta masolo oyo etali bademo, tokoki kolobela nini?

21 Soki mosaleli moko ya Yehova azalaki na boyokani na bademo, asengeli te kobɛtela basusu masolo yango ya kala mpo na kosala masɛki. Ezali na ntina te biso basaleli ya Yehova tóbanga makambo oyo Zabolo to bademo na ye bakoki kosala. Kasi, tosengeli kotya makanisi epai ya Yesu mpe na nguya oyo Yehova apesi ye. (Baebre 12:2) Yesu azalaki te kobɛtela bayekoli na ye masolo oyo etali bademo mpo na kosala masɛki. Atyaki makanisi na ye na nsango ya Bokonzi mpe “makambo minene ya Nzambe.”​—Misala 2:11; Luka 8:1; Baroma 1:11, 12.

22. Ozali na ekateli ya kosala nini?

22 Tóbosana te ete Satana azali na mokano ya kobebisa boyokani na biso na Yehova. Alukaka kosalela mayele ndenge na ndenge mpo akokisa mokano yango. Kasi, toyebi mayele mabe ya Satana mpe tozali na ekateli ya koboya makambo nyonso oyo ezali na boyokani na bademo. ‘Tokotikela Zabolo esika te’ mpo alɛmbisa ekateli na biso. (Tángá Baefese 4:27.) Ya solo, soki totɛmɛli Zabolo, tokokwea te na mitambo na ye mpe Yehova akobatela biso.​—Baefese 6:11.