Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 17

Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe

Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe

“Wana bozali komitonga likoló ya kondima na bino oyo eleki bosantu, . . . bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.”​—YUDA 20, 21.

1, 2. Tokoki kosala nini mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

 BISO nyonso tolingaka kozala nzoto makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Yango wana, tolyaka bilei ya malamu, tosalaka ngalasisi mbala na mbala, mpe tobatelaka nzoto na biso. Atako esɛngaka kosala milende, tosepelaka na matomba oyo ebimisaka, yango wana tokobaka kosala bongo. Kasi tosengeli mpe kozala makasi mpe malamu na elimo.

2 Atako tobandi koyekola koyeba Yehova, tosengeli kokoba kokómisa makasi boyokani na biso na ye. Ntango Yuda alendisaki bakristo ete ‘bátikala na kati ya bolingo ya Nzambe,’ alimbolaki ndenge oyo bakokaki kosala yango. Ayebisaki bango: ‘Bómitonga likoló ya kondima na bino oyo eleki bosantu.’ (Yuda 20, 21) Na yango, ndenge nini tokoki kokóma na kondima makasi?

KOBÁ KOTONGA KONDIMA NA YO

3-5. (a) Satana alingi otalela mibeko ya Yehova ndenge nini? (b) Okanisaka nini mpo na mibeko mpe mitinda ya Yehova?

3 Ezali na ntina ondima mpenza ete nzela ya Yehova nde eleki malamu. Satana alingi okanisa ete mibeko ya Nzambe eleki makasi mpo na kotosa yango, mpe ete okozala na esengo koleka soki yo moko ozali kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Banda na elanga ya Edene, Satana alukaka kotinda bato bákanisa bongo. (Ebandeli 3:1-6) Mpe lelo oyo, alukaka lisusu kosala yango mingi koleka.

4 Satana alobaka solo? Mibeko ya Yehova eleki makasi? Te. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali kotambola na mwa zamba moko kitoko. Na esika moko, omoni lopango moko ya bibende. Mbala mosusu omituni: ‘Mpo na nini batye lopango ya bibende awa?’ Kasi kaka na ntango yango, oyoki nkɔsi ezali koganga kuna na kati. Ndenge nini okotalela sikoyo lopango yango? Okosepela mpo ezali kobatela yo mpo nkɔsi elya yo te! Mitinda ya Yehova ezali lokola lopango wana, mpe Zabolo azali lokola nkɔsi. Liloba ya Nzambe ekebisi biso boye: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”​—1 Petro 5:8.

5 Yehova alingi tózala na bomoi ya malamu mpenza. Alingi te Satana akosa biso. Yango wana apesi biso mibeko mpe mitinda mpo na kobatela biso mpe kopesa biso esengo. (Baefese 6:11) Yakobo akomaki ete: “Moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango . . . akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.”​—Yakobo 1:25.

6. Nini ekoki kosalisa biso tóndima ete nzela ya Yehova eleki malamu?

6 Ntango totiki Yehova atambwisa biso, bomoi na biso ekómaka malamu mpe boninga na biso na ye ekómaka makasi. Na ndakisa, tozwaka matomba ntango tondimi kobondela ye ntango nyonso, ndenge asɛngi biso. (Matai 6:5-8; 1 Batesaloniki 5:17) Tozalaka na esengo ntango totosaka etinda na ye ya koyangana elongo mpo na kosambela ye mpe kolendisana mpe ntango tozali komipesa na mosala ya kosakola mpe ya koteya bato. (Matai 28:19, 20; Bagalatia 6:2; Baebre 10:24, 25) Soki tozali kokanisa ndenge makambo yango esalisaka biso mpo tókoba kozala na kondima makasi, tokondima mpenza ete nzela ya Yehova eleki malamu.

7, 8. Nini ekosalisa biso tómitungisa te mpo na komekama oyo tokoki kokutana na yango?

7 Mbala mosusu tomitungisaka ete tokokutana na komekama oyo tokokoka kolonga yango te. Soki osilá komitungisa ndenge wana, kanisá maloba oyo ya Yehova: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”​—Yisaya 48:17, 18.

8 Ntango tozali kotosa Yehova, kimya na biso ekozala lokola ebale oyo ekaukaka te mpe boyengebene na biso ekozala lokola mbonge ya mbu oyo emibwakaka ntango nyonso na libongo. Ata soki tokutani na likambo nini, tokoki kotikala sembo. Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga,” to akwea.​—Nzembo 55:22.

‘SALÁ MAKASI OKÓMA MOTO OYO AKƆMƐLI’

9, 10. Kozala moto oyo akɔmɛli na elimo elimboli nini?

9 Wana boyokani na yo na Yehova ezali kokóma makasi, ‘okokóma moto oyo akɔmɛli.’ (Baebre 6:1) Yango elingi koloba nini?

10 Kopusana na mbula elimboli te kokóma moto oyo akɔmɛli na elimo. Mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli, tosengeli kokómisa Yehova moninga na biso ya motema mpe kosala makasi tótalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango. (Yoane 4:23) Ntoma Paulo akomaki ete: “Baoyo bazali kolanda bamposa ya nzoto batyaka makanisi na bango na makambo ya nzoto, kasi baoyo bazali kolanda elimo [batyaka makanisi na bango] na makambo ya elimo.” (Baroma 8:5) Moto oyo akɔmɛli na elimo atyaka makanisi na ye na bisengo to biloko ya mosuni te. Kasi atyaka makanisi na ye na mosala ya Yehova mpe azwaka bikateli ya bwanya na bomoi na ye. (Masese 27:11; tángá Yakobo 1:2, 3.) Amitikaka te ete bato mosusu bápusa ye na kosala mabe. Moto oyo akɔmɛli na elimo ayebaka oyo ezali malamu mpe azalaka na ekateli ya kosala yango.

11, 12. (a) Ntoma Paulo alobaki nini mpo na ‘makoki ya kososola’ oyo mokristo azali na yango? (b) Na ndenge nini kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo ekokani na kokóma mopoti-mbangu?

11 Esɛngaka kosala milende mpo na kokóma moto oyo akɔmɛli na elimo. Ntoma Paulo akomaki: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli, baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebre 5:14) Liloba “emesaná” ekoki kotinda biso tókanisa ngalasisi oyo mopoti-mbangu asalaka.

12 Soki tomoni ndenge mopoti-mbangu azali kokima, toyebaka ete ezwaki ye ntango mpe esɛngaki amesana na ngalasisi mpo akolisa makoki na ye. Abotamaki mopoti-mbangu te. Ntango mwana abotami, ayebaka te ndenge ya kosalela mabɔkɔ mpe makolo na ye. Kasi na nsima, ayekolaka ndenge ya kosimba biloko mpe kotambola. Soki asali ngalasisi mpe amesani, akoki kokóma mopoti-mbangu. Ndenge moko mpe, esɛngaka ntango mpe komesana na bomoi ya bokristo mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli.

13. Nini ekosalisa biso tóyekola kokanisa lokola Yehova?

13 Na buku oyo, toyekoli ndenge oyo tokoki kokanisa lokola Yehova mpe kotalela makambo ndenge ye atalelaka yango. Toyekoli koyeba mpe kolinga mibeko ya Yehova. Ntango tolingi kozwa bikateli, tosengeli komituna boye: ‘Mibeko to mitinda nini ya Biblia eyokani na likambo oyo? Ndenge nini nakoki kosalela yango? Yehova akolinga nasala nini?’​—Tángá Masese 3:5, 6; Yakobo 1:5.

14. Tosengeli kosala nini mpo na kotonga kondima na biso?

14 Mosala ya kotonga kondima na biso esilaka te. Ndenge kaka kolya bilei ya malamu esalisaka biso tótonga nzoto, koyekola makambo ya Yehova esalisaka biso tókómisa kondima na biso makasi. Ntango tobandaki koyekola Biblia, toyekolaki mateya ya ebandeli oyo etali Yehova mpe banzela na ye. Kasi, na nsima, esɛngaka tókanga ntina ya makambo mozindo. Yango nde ntoma Paulo alobelaki ntango akomaki ete “bilei ya makasi ezali mpo na bato oyo bakɔmɛli.” Ntango tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, tokómaka na bwanya. Biblia emonisi ete bwanya ezali na ntina mingi.​—Masese 4:5-7; 1 Petro 2:2.

15. Mpo na nini kolinga Yehova mpe bandeko na biso ezali na ntina mingi?

15 Moto mosusu akoki kozala makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ, kasi ayebi ete mpo akoba kozala bongo, asengeli kokoba kobatela nzoto na ye. Ndenge moko mpe, moto oyo akɔmɛli na elimo ayebaka ete asengeli kosala milende mpo boyokani na ye na Yehova ekoba kozala makasi. Ntoma Paulo apesi biso toli oyo: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakorinti 13:5) Kasi, kozala kaka na kondima makasi ekoki te. Tosengeli kokoba kokolisa bolingo na biso epai ya Yehova mpe bandeko na biso. Ntoma Paulo alobaki: “Soki nazali . . . na boyebi nyonso, mpe soki nazali na kondima monene oyo ekoki ata kolongola bangomba mpe kotya yango epai mosusu, kasi nazali na bolingo te, nazali mpamba.”​—1 Bakorinti 13:1-3.

TYÁ MAKANISI NA YO NA ELIKYA

16. Satana alingi tókanisaka nini?

16 Satana alingaka tókanisa ete tokoki ata moke te kosepelisa Yehova. Alingaka tólɛmba nzoto mpe tókanisa ete ndenge ya kosilisa mikakatano na biso ezali te. Alingaka te tótyelaka bandeko na biso bakristo motema, mpe alingaka te tózala na esengo. (Baefese 2:2) Satana ayebi ete soki tokómi na makanisi ya mabe, yango ekoki kozala likama mpo na biso moko mpe ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Kasi, Yehova apesi biso eloko moko oyo ekoki kosalisa biso tólongola makanisi ya mabe. Eloko yango ezali elikya.

17. Mpo na nini kozala na elikya ezali na ntina mingi?

17 Na 1 Batesaloniki 5:8, Biblia ekokanisi elikya na biso na ekɔti oyo ebatelaka motó ya soda na etumba, ebengi ekɔti yango “elikya ya lobiko.” Kozala na elikya na bilaka ya Yehova ekoki kobatela makanisi na biso mpe kosalisa biso tólongola makanisi ya mabe.

18, 19. Ndenge nini elikya epesaki Yesu makasi?

18 Elikya epesaki Yesu makasi. Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu akutanaki na mikakatano oyo elandanaki. Moninga na ye moko atɛkaki ye. Moninga na ye mosusu awanganaki ye. Basusu basundolaki ye mpe bakimaki ye. Bato ya ekólo na ye moko batɛmɛlaki ye, mpe batyaki mbamba ete bányokola ye tii akokufa. Nini esalisaki Yesu ayikela makambo wana ya mpasi mpiko? “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko, atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.”​—Baebre 12:2.

19 Yesu ayebaki ete soki atikali sembo, akopesa Tata na ye nkembo mpe akomonisa ete Satana azali moto ya lokuta. Elikya yango ezalaki kopesa ye esengo mingi. Ayebaki mpe ete mosika te akozonga na likoló mpo na kozala elongo na Tata na ye. Elikya yango esalisaki ye ayika mpiko. Ndenge moko na Yesu, tosengeli kotya makanisi na elikya na biso. Ekosalisa biso tóyika mpiko ata na likambo nini oyo tokutani na yango.

20. Nini ekoki kosalisa yo ozala na makanisi ya malamu?

20 Yehova amonaka kondima mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko. (Yisaya 30:18; tángá Malaki 3:10.) Alaki ete “akopesa yo oyo motema na yo ezali kosɛnga.” (Nzembo 37:4) Yango wana, kobá kotya makanisi na elikya na yo. Satana alingi tóbungisa elikya mpe tómona ete bilaka ya Yehova ekokokisama te. Kasi, kotika te ete makanisi ya mabe ekɔtela yo. Soki omoni ete obandi kobungisa elikya na yo, bondelá Yehova asalisa yo. Kanisá maloba oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.”

21, 22. (a) Mokano ya Yehova mpo na mabele ezali nini? (b) Ozwi ekateli ya kosala nini?

21 Zwáká ntango mbala na mbala mpo na kokanisa bisengo oyo tokozala na yango na mikolo ezali koya. Mosika te, moto nyonso na mabele akosambela Yehova. (Emoniseli 7:9, 14) Kanisá bomoi na mokili ya sika. Ekozala malamu koleka nyonso oyo tokoki kokanisa! Satana, bademo na ye, mpe mabe nyonso ekolongwa. Okobɛla lisusu te, mpe okokufa te. Okobanda kolamuka mokolo na mokolo na nzoto makasi mpe na esengo ya kozala na bomoi. Bato bakosala elongo mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso. Bato nyonso bakozala na bilei ya malamu mpe esika ya kofanda na kimya. Bato bakozala na mobulu te to na nkanza, kasi bakomoniselana boboto. Nsukansuka, bato nyonso na mabele bakosepela kozala na “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Baroma 8:21.

22 Yehova alingi okómisa ye Moninga na yo ya motema. Yango wana, salá nyonso oyo okoki mpo otosaka Yehova mpe ozalaka penepene na ye mokolo na mokolo. Tiká ete biso nyonso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe libela na libela!​—Yuda 21.