Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 14

Zalá sembo na makambo nyonso

Zalá sembo na makambo nyonso

“Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—BAEBRE 13:18.

1, 2. Yehova ayokaka ndenge nini ntango tosalaka makasi mpo tózala sembo?

 MOKOLO moko, mwana moko ya moke autaki kelasi. Na nzela, amonaki pɔtɔmɔni oyo ezalaki na mbongo ebele na kati. Asalaki nini? Akokaki kobomba yango. Kasi, akendaki kozongisa yango epai ya nkolo na yango. Ntango mama ya mwana yango ayokaki likambo oyo mwana na ye asalaki, asepelaki mingi.

2 Baboti mingi basepelaka ntango bana na bango bamonisi ete bazali sembo. Yehova, Tata na biso ya likoló, azali “Nzambe ya solo,” mpe asepelaka ntango tomonisi ete tozali sembo. (Nzembo 31:5) Tolingaka kosepelisa ye mpe “kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Tótalela makambo minei oyo ekoki kozala mpasi komonisa bosembo. Na nsima, tokomona mwa matomba oyo tokoki kozwa soki tolongi mokakatano yango.

ZALÁ SEMBO EPAI NA YO MOKO

3-5. (a) Ndenge nini tokoki komikosa? (b) Nini ekosalisa biso tózala sembo epai na biso moko?

3 Mpo tózala sembo epai ya bato mosusu, tosengeli liboso kozala sembo epai na biso moko. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na siɛklɛ ya liboso, bandeko ya lisangá ya Laodikia bazalaki komikosa na kokanisa ete basepelisaka Nzambe, nzokande ezalaki bongo te. (Emoniseli 3:17) Biso mpe tokoki komikosa ete tozalaka ndenge moko boye, nzokande ezali bongo te.

4 Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.” (Yakobo 1:26) Tokomikosa soki tomonaka ete lokola tosalaka mwa makambo ya malamu, Nzambe akokipe te soki tobimisaka maloba mabe, totyolaka basusu to tobukaka lokuta. Nini ekoki kosalisa biso tótika komikosa?

5 Ntango totalaka talatala, tomonaka ndenge tokoki komonana libándá. Ntango totángi Biblia, tokoki komona ndenge oyo tozali mpenza na kati. Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo tosalaka malamu mpe bolɛmbu na biso. Tokomona ndenge oyo tokoki kobongisa makanisi na biso, etamboli na biso, mpe maloba na biso. (Tángá Yakobo 1:23-25.) Kasi, soki tolobi ete tozali na mbeba te, tokobongisa mpe te makambo oyo esengeli. Yango wana, tosengeli kosalela Biblia mpo na komitalela na bosembo. (Bileli 3:40; Hagai 1:5) Libondeli mpe esalisaka biso tómona ndenge oyo tozali mpenza. Tokoki kosɛnga Yehova atalatala biso mpe asalisa biso tómona bambeba na biso mpo tóbongisa yango. (Nzembo 139:23, 24) Tobosanaka te ete “moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”​—Masese 3:32.

ZALÁ SEMBO NA LIBOTA

6. Mpo na nini mwasi to mobali asengeli kozala sembo epai ya molongani na ye?

6 Kozala sembo ezali na ntina mingi na kati ya libota. Ntango mwasi ná mobali bazali sembo, mokomoko na bango akozala na likambo ya kobanga te mpe bakotyelana motema. Kozala sembo te epai ya molongani ekoki komonana na makambo mingi. Na ndakisa, moto oyo abalá akoki kokóma kolulana na moto oyo azali molongani na ye te, kotala pornografi, to kolingana na moto mosusu na kobombana. Yoká oyo mokomi ya nzembo alobaki: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.” (Nzembo 26:4) Soki ozali sembo te epai ya molongani na yo, ata na makanisi, okobebisa libala na yo.

Boyáká mbala moko eloko nyonso oyo ekoki kobebisa libala na yo

7, 8. Ndenge nini okoki kosalela Biblia mpo na koteya bana ete kozala sembo ezali na ntina?

7 Bana mpe basengeli koyeba ete kozala sembo ezali na ntina. Baboti bakoki kosalela Biblia mpo na koteya bango yango. Biblia elobeli bandakisa ya bato oyo bazalaki sembo te: Akana akómaki moyibi; Gehazi akosaki mpo azwa mbongo; mpe Yudasi ayibaki mbongo mpe na nsima atɛkaki Yesu na mbongo 30 ya ebende.​—Yosua 6:17-19; 7:11-25; 2 Bakonzi 5:14-16, 20-27; Matai 26:14, 15; Yoane 12:6.

8 Biblia elobeli mpe bandakisa ya bato oyo bazalaki sembo: Yakobo atindaki bana na ye bázongisa mbongo oyo bamonaki na basaki na bango; Yefeta ná mwana na ye ya mwasi bakokisaki elaka oyo Yefeta apesaki Nzambe; mpe Yesu atikalaki sembo ata na ntango ya mpasi. (Ebandeli 43:12; Basambisi 11:30-40; Yoane 18:3-11) Bandakisa yango ekoki kosalisa bana bámona ete kozala sembo ezali na ntina mingi.

9. Litomba nini bana bakozwa soki baboti na bango bazali sembo?

9 Baboti, bokoki kozwa liteya na mokapo oyo ya Biblia: “Yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto osakolaka ete: ‘Koyiba te,’ oyibaka?” (Baroma 2:21) Ntango baboti balobi likambo moko kasi basali ndenge mosusu, bana bamonaka. Soki oyebisaka bana na yo ete basengeli kozala sembo kasi yo moko ozali sembo te, bana bakobulungana. Soki bana bamoni ete baboti na bango babukaka lokuta, ata na makambo ya mikemike, bango mpe bakobanda kosala bongo. (Tángá Luka 16:10.) Kasi, ntango bana bazali komona ete baboti na bango balobaka solo, ekosalisa bango mpe bázala baboti ya sembo ntango bango mpe bakobota bana.​—Masese 22:6; Baefese 6:4.

ZALÁ SEMBO NA LISANGÁ

10. Na masolo na biso, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali sembo epai ya bandeko mosusu?

10 Tosengeli mpe kozala sembo epai ya bandeko na biso ya lisangá. Ezalaka mpasi te ete na masolo na biso ya mokolo na mokolo tókóma kotɔnga basusu, to kutu kokosela bango makambo. Soki tolobi likambo moko kasi toyebi te soki ezali mpenza solo, tokoki kopanza nsango ya lokuta. Eleki malamu ‘tópekisa mbɛbu na biso.’ (Masese 10:19) Kasi, kozala sembo elimboli te ete tosengeli koloba likambo nyonso oyo tokanisi, nyonso oyo toyebi, to toyoki. Ata soki toyebi ete likambo oyo tokoloba ezali solo, mbala mosusu ezali likambo ya bato, to ekozala ntina te to malamu te tóloba yango. (1 Batesaloniki 4:11) Mpo na komilongisa ntango bakateli moto mangala, bato mosusu balobaka: “Nakosi te ezali nde bongo.” Kasi, lokola tozali basaleli ya Yehova, mposa na biso ezali ete maloba na biso ezalaka ntango nyonso kitoko mpe na boboto.​—Tángá Bakolose 4:6.

11, 12. (a) Ndenge nini kobomba lisumu oyo tosali ekoki kobebisa lisusu makambo? (b) Mituna nini tokoki komituna? (c) Ndenge nini tokoki kozala sembo na ebongiseli ya Yehova?

11 Yehova apesi bankulutu mokumba ya kosalisa lisangá. Bankulutu bakosalisa biso malamu soki tozali sembo. Mpo na nini? Tózwa ndakisa: Soki ozali kobɛla mpe okei epai ya monganga, okobomba makambo mosusu oyo etali maladi na yo? Soki osali bongo, monganga akosalisa yo malamu te. Ndenge moko mpe, soki osali libunga ya monene, osengeli te kobomba yango. Osengeli kokende epai ya bankulutu mpe kosolola na bango na bosembo nyonso. (Nzembo 12:2; Misala 5:1-11) Tózwa ndakisa mosusu: Okosala nini soki oyebi ete moninga na yo asalaki libunga moko monene? (Balevi 5:1) Okoloba nde: “Lokola azali moninga na ngai, nakobomba likambo yango”? To okomikundwela ete bankulutu bakoki kosalisa ye mpo azongisa boyokani na ye na Yehova mpe akómisa yango makasi?​—Baebre 13:17; Yakobo 5:14, 15.

12 Tosengeli mpe kozala sembo na ebongiseli ya Yehova ntango tozali kokoma balapolo, na ndakisa lapolo ya mosala ya kosakola. Tokozala mpe sembo ntango tozali kotondisa formilɛrɛ mpo na kokóma mobongisi-nzela to formilɛrɛ mosusu na lisangá.​—Tángá Masese 6:16-19.

13. Ndenge nini tokoki kozala sembo na makambo ya mombongo elongo na bandeko ya lisangá?

13 Bakristo basengeli te kosangisa mombongo ná losambo esika moko. Na ndakisa, tosengeli te kosala mombongo ntango tozali na Ndako ya Bokonzi to na mosala ya kosakola. Tolukaka mpe te kolyela bandeko na makambo ya mombongo. Soki tozwi bandeko na mosala, tosengeli kofutaka bango na mokolo oyo esengeli, kopesa mbongo oyo toyokanaki, mpe kobakisela bango matabisi oyo mibeko esɛngi. Ekoki kozala mbongo mpo na assurance médicale to mbongo ya konje. (1 Timote 5:18; Yakobo 5:1-4) Mpe soki osalaka epai ya ndeko moko, koluka te ete alɛngɛlaka yo mpo ozali ndeko na ye. (Baefese 6:5-8) Kokisá ngonga ya mosala ndenge boyokanaki mpe salá mosala ndenge esengeli.​—2 Batesaloniki 3:10.

14. Bakristo basengeli kosala nini liboso básangisa mombongo?

14 Bongo soki osangisi mombongo na ndeko moko to adefisi yo mbongo? Na makambo ya ndenge wana, toli moko ya ntina mingi ezali na Biblia: Bókoma makambo nyonso polele! Ntango mosakoli Yirimia asombaki mabele na esika moko, akomaki boyokani oyo basalaki na mikanda mibale, asɛngaki batatoli bátya sinyatire na mokanda moko, mpe babombaki mikanda yango mpo básalela yango na nsima, soki esengeli. (Yirimia 32:9-12; talá mpe Ebandeli 23:16-20.) Bato mosusu bamonaka ete kokoma ndenge wana ezali lokola toboyi kotyela ndeko motema. Kasi, mpo na koloba solo, kokoma makambo ekoki kopekisa kozanga boyokani, mindɔndɔ, mpe matata. Ata na makambo ya mombongo, kobosana te ete kimya ya lisangá ezali na ntina mingi koleka mbongo nyonso tokoki kozwa.​—1 Bakorinti 6:1-8; talá Maloba na nsuka ya lisolo 30.

ZALÁ SEMBO NA MAKAMBO MOSUSU YA BOMOI

15. Yehova ayokaka ndenge nini soki tozali sembo te na makambo ya mombongo?

15 Tosengeli kozala sembo epai ya bato nyonso, ata baoyo bazali Batatoli ya Yehova te. Yehova alingaka mpenza tózala sembo. “Emekeli-kilo ya bokosi ezali eloko oyo Yehova ayiná, kasi libanga ya mobimba mpo na komeka kilo esepelisaka ye.” (Masese 11:1; 20:10, 23) Na ntango ya kala, bazalaki kosalela emekeli-kilo mpo na kotɛka biloko. Kasi, bato mosusu ya mombongo bazalaki kobuba bakiliya na bango na ndenge bazalaki kopesa bango biloko moke koleka oyo bayokanaki to bazalaki kofutisa bango mbongo mingi koleka. Ndenge moko mpe, bato mingi lelo bazali sembo te na makambo ya mombongo. Mpe ndenge kaka Yehova ayinaki likambo yango na ntango ya kala, ayinaka yango mpe lelo.

16, 17. Makambo nini oyo esalemaka mingi tosengeli koboya mpo tómonisa ete tozali sembo?

16 Biso nyonso tokoki kokutana na makambo oyo ekomeka bosembo na biso: na ndakisa ntango tozali kotondisa bapapye mpo na kosɛnga mosala, ntango tozali kotondisa bapapye ya Leta, to ntango tozali kosala ekzamɛ na kelasi. Bato mingi bakanisaka ete kokosa, kolekisa ndelo to kopesa biyano ya lokuta ezali mabe te. Likambo yango ekamwisaka biso te. Biblia esakolaki ete na mikolo ya nsuka, bato bakozala “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo balingaka makambo ya malamu te.”​—2 Timote 3:1-5.

17 Ntango mosusu tokoki komona ete bato oyo bazali sembo te nde bazali malamu na mokili oyo. (Nzembo 73:1-8) Bakoki kolongola mokristo moko na mosala, bakoki kobuba ye, to kosala ye makambo ya mabe na mosala kaka mpo azali sembo. Kasi kozala sembo ezali mosala ya mpunda te. Mpo na nini?

MATOMBA YA KOZALA SEMBO

18. Mpo na nini ezali malamu mpenza koyebana lokola moto ya sembo?

18 Lelo oyo, koyebana ete tozali bato ya sembo, oyo babongi kotyelama motema ezali lokumu monene mpe bato mingi te bazalaka na yango. Mokomoko na biso azali na libaku ya kokóma moto oyo abongi kotyelama motema. (Mika 7:2) Ya solo, bato mosusu bakoki kotyola yo mpo ozali sembo mpe kobenga yo zoba. Kasi, bato mosusu bakosepela mpo ozali sembo mpe bakotyela yo motema. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bayebani ete bazalaka sembo. Bapatrɔ mosusu balingaka kozwa Batatoli ya Yehova na mosala mpo bayebi ete bakozala sembo. Mpe soki balongoli bato na mosala mpo bazalaki sembo te, mbala mingi Batatoli babatelaka mosala na bango.

Bato bakoki kopesa Yehova nkembo soki tozali makasi na mosala

19. Ndenge nini bosembo na yo ekoki kobongisa boyokani na yo na Yehova?

19 Kozala sembo na makambo nyonso ekosalisa yo obatela lisosoli ya malamu mpe ozala na kimya ya motema. Tokoki kozala lokola ntoma Paulo, oyo akomaki: “Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo.” (Baebre 13:18) Likambo eleki ntina, Yehova, Tata na biso ya bolingo, akomona milende oyo osalaka mpo na kozala sembo na makambo nyonso mpe akosepela na yango.​—Tángá Nzembo 15:1, 2; Masese 22:1.