Nzela ya bomoi ya seko​—Osili komona yango?

Mangomba ezali kaka mibale: oyo ememaka na bomoi mpe oyo ememaka na liwa. Mwa buku oyo ezali mpo na kosalisa yo omona nzela ya bomoi ya seko.

Maloba ya ebandeli

Bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ekoya ezali na mabɔkɔ ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yango wana ezali mpenza na ntina mingi ete ye andima losambo na biso!

ETENI 1

Mangomba nyonso eteyaka solo?

Mangomba nyonso ezali koloba ete ezali mpenza na malako ya malamu mpo na kosambela Nzambe, makanisi na bango ekeseni. Makanisi yango nyonso etongami likoló ya solo?

ETENI 2

Ndenge nini okoki koyekola solo na ntina etali Nzambe?

Ezali na makanisi oyo bato nyonso bakoki kondima na oyo etali lingomba ya solo?

ETENI 3

Banani bazalaka na nzoto ya elimo?

Bindimeli yango ya bonkɔkɔ ekɔtelá mpenza mangomba mosusu. Kasi, bindimeli yango ezali mpenza ya solo? Biblia epesi eyano.

ETENI 4

Bankɔkɔ na biso bazali wapi?

Bato mingi bakanisaka ete liwa ezali nsuka ya bomoi ya moto te, kasi ezali nde nzela mpo na koleka na bomoi ya lolenge mosusu. Biblia elobi nini?

ETENI 5

Solo na likambo etali nkisi, bondɔki, mpe bonganga-nkisi

Bilimo mabe bazali na nguya mpe bakoki kosala biso mabe, kasi tosengeli mpe te komona ete bazali na nguya mingi koleka.

ETENI 6

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

Bato mosusu bakanisaka ete mangomba nyonso esepelisaka Nzambe. Yango nde makambo Biblia eteyaka mpenza?

ETENI 7

Banani basambelaka na lingomba ya solo?

Biblia ekoki kosalisa yo oyeba bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe.

ETENI 8

Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo

Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai.” Ndenge nini okoki komonisa ngámbo oyo ozali?

ETENI 9

Lingomba ya solo ekopesa yo mapamboli libela na libela!

Soki osambeli Yehova, akopambola yo sikoyo mpe na mikolo ekoya.