Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 7

Banani basambelaka na lingomba ya solo?

Banani basambelaka na lingomba ya solo?

1. Tosengeli kosala nini mpo na kosepelisa Nzambe?

SOKI tolingi kozala na boyokani malamu mpenza na Nzambe, tosengeli komikɔtisa ata moke te na mangomba ya lokuta. Tosengeli kosambela na lingomba ya solo. Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kosala bongo na mokili mobimba.

2. Okoki kokuta Batatoli ya Yehova wapi, mpe mosala na bango ezali nini?

2 Ndenge Biblia esakolaki yango, basambeli ya solo bazali “ebele ya bato” oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Na mikili 235, bamilio ya Batatoli ya Yehova bazali komipesa mpenza mpo na kosalisa bato báyekola nzela ya bolingo ya Yehova mpe báyeba makambo oyo azali kosɛnga bato.

Ndenge ya koyeba basambeli ya solo

3. Batatoli basambelaka nani, mpe losambo nini baboyaka?

3 Batatoli bandimaka ete ebongi kosambela kaka Yehova ye moko. Baboyaka kosambela bikeko mpe bililingi ya losambo. (1 Yoane 5:21) Basambelaka te bato oyo bakufá, yango wana balalaka na matánga (lilaka) te to basalaka te milulu mosusu oyo ekumisaka makambo oyo mangomba ya lokuta bandimaka mpe “mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1) Nzokande, balendisaka mpenza bato oyo bakufeli ndeko mpe balimbolaka elaka oyo Nzambe apesi ete bato oyo bakufá bakosekwa na paladiso awa na mabele.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

4. Bato ya Nzambe bakanisaka nini mpo na nkisi?

4 Batatoli basalelaka nkisi te, to bondɔki, to bonganga-nkisi mpe te, mpamba te bayebi ete makambo yango euti na Zabolo. Batyaka motema na bango na nkisi te ete ekobatela bango, kasi elikya na bango ezali epai ya Yehova.​—Masese 18:10.

5. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova “bazali bato ya mokili te”?

5 Yesu alobaki ete bayekoli na ye “bazali bato ya mokili te.” (Yoane 17:16) Yesu ye moko aboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki na ntango na ye. (Yoane 6:15) Ndenge moko mpe, Batatoli bamikɔtisaka te na makambo ya politiki, ya bolingo ya ekólo mpe ya kokabola bazwi na babola to kokabola bato mpo na mposo na bango. Kasi bafutaka mpenza mpako mpe batosaka mibeko ya mboka esika bazali.​—Yoane 15:19; Baloma 13:1, 7.

6. Mitinda nini basaleli ya Nzambe balandaka na makambo ya libala mpe koboma libala?

6 Lokola batosaka mibeko ya Leta, Batatoli bakomisaka mabala na bango na buku ya Leta. (Tito 3:1) Batosaka mibeko ya Nzambe, yango wana epai na bango, mobali abalaka kaka mwasi moko. (1 Timote 3:2) Mpe lisusu, lokola batosaka mitinda ya Biblia na bomoi na bango, mabala ya basaleli ya Nzambe ekufaka mpambampamba te.

7. Ndenge nini Batatoli bamonisaka bolingo kati na bango?

7 Batatoli bazali na bolingo kati na bango. Bolingo yango mpe bolingo oyo balingaka Nzambe esangisi bango na kati ya bondeko ya solosolo, atako bauti na mabota mpe na bikólo mingi. Ntango likama ebimi na mboka moko to ntango basusu bakeleli, Batatoli basalaka noki mpo na kosalisa bandeko na bango. Bomoi ya Batatoli emonisaka ete bazali na bolingo.​—Yoane 13:35.

Batatoli ya Yehova bazali libota moko ya bandeko na mokili mobimba

8. Wapi misala ya mabe oyo bato ya Nzambe basalaka te?

8 Bato ya Yehova basalaka makasi mpo na kozala na bomoi ya sembo mpe oyo elongobani. Bayibaka te, bakosaka te, basalaka bondumba to pite te, balangwaka masanga te mpe babubaka te na mombongo na bango. Mibali babɛtaka basi na bango te. Liboso bákóma Batatoli, bato mosusu bazalaki kosala makambo yango, kasi na lisalisi ya Yehova, batiká yango. ‘Basukolami pɛɛ’ na miso ya Nzambe.​—1 Bakolinti 6:9-11.

Basalaka mokano ya Nzambe

9. Mokanda moko elobi nini mpo na mangomba ya Afrika oyo esangisaka boklisto na makambo ya bonkɔkɔ?

9 Mangomba mingi elobaka ete bazali na mateya ya solo. Mbala mosusu mpo na yango, bamonisaka misala ya kokamwa oyo basalaka. Na ndakisa, mokanda moko elobi boye mpo na mangomba ya Afrika oyo esangisaka boklisto na makambo ya bonkɔkɔ: “[Mangomba ya sika ya boklisto] ebɔtɔli mpenza mosala ya bonganga-nkisi to ya zebola . . . Bazali koloba ete bayebisaka makambo euti na Nzambe mpe basalaka makamwisi. Basakoli na bango bayebisaka bimonaneli mpe balimbolaka bandɔtɔ. Basalelaka mai mosantu, mafuta mosantu, mputulu ya mɔtɔ, babuji mpe mpaka ya malasi mpo na kobikisa bato to mpo na kobatela bango na maladi.”

10, 11. Mpo na nini makambo oyo bazali kobenga lelo ete makamwisi emonisaka te ete lingomba endimami na Nzambe?

10 Bato ya mangomba yango balobaka ete makamwisi na bango ezali komonisa ete Nzambe apambolaka lingomba na bango. Kasi ezali te makambo oyo babengaka ete makamwisi nde emonisi ete Yehova andimi lingomba moko. Satana apesaka basambeli ya lokuta nguya na ye mpo básala ‘misala ya nguya.’ (2 Batesaloniki 2:9) Epai mosusu, Biblia esakolaki ete makabo ya bikamwiseli oyo euti na Nzambe lokola koyebisa makambo oyo ekoya, koloba na minɔkɔ mosusu, kozala na boyebi ya kokamwa, nyonso wana “ekolongolama.”​—1 Bakolinti 13:8.

11 Yesu akebisaki boye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Mingi bakoloba na ngai na mokolo yango, ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te, mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te, mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande na bango nakoyambola boye: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.”​—Matai 7:21-23.

12. Banani bakokɔta na Bokonzi ya likoló?

12 Bongo banani bakokɔta na Bokonzi ya likoló? Ezali baoyo basalaka mokano ya Yehova.

Basakoli ya Bokonzi ya Nzambe

13. Mosala nini Nzambe apesi bato na ye lelo oyo, mpe banani bazali kosala yango?

13 Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na bato na ye lelo oyo? Yesu alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Yango nde mosala oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na molende mpenza.

14. Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe banani bakoyangela na Bokonzi yango?

14 Na “mabele mobimba oyo efandami,” Batatoli ya Yehova bazali kosakola ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabele mobimba na bosembo. Bateyaka ete Yehova aponi Klisto Yesu lokola Mokonzi na Bokonzi yango, mpe bato 144 000 oyo bauti awa na mabele bakoyangela elongo na ye.​—Danyele 7:14, 18; Emoniseli 14:1, 4.

15. Bokonzi yango ekolongola nini?

15 Batatoli basalelaka Biblia mpo na komonisa bato ete Bokonzi ya Nzambe ekoboma ebongiseli nyonso ya Satana. Mangomba ya lokuta mpe mateya na yango oyo eyokisaka Nzambe nsɔni mpe ekumisaka Zabolo ekolimwa mpo na libela! (Emoniseli 18:8) Ezala mpe biyangeli ya bato oyo ezali kotɛmɛla Nzambe, nyonso wana ekozala lisusu te!​—Danyele 2:44.

16. Banani bakozala bato ya Klisto Yesu, mpe epai wapi bakofanda?

16 Batatoli ya Yehova bazali mpe koyebisa bato ete Klisto Yesu akomema mapamboli mpenza mpo na bato nyonso oyo bakokisaka makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Bato yango bakozala bato na ye awa na mabele. Biblia epesi elaka oyo: “Akobikisa mobola oyo azali koganga básalisa ye, mpe moto ya mawa, mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te. Akoyokela oyo ya moke mpe mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.”​—Nzembo 72:12, 13.

17. Banani basakolaka Bokonzi ya Nzambe?

17 Ezali na lingomba mosusu te oyo esalaka mokano ya Nzambe ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Kaka Batatoli ya Yehova nde bazali koyebisa bato Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba.