Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

Banani bazalaka na nzoto ya elimo?

Banani bazalaka na nzoto ya elimo?

1. Na ndenge nini mangomba ya bonkɔkɔ ezali lokola ngomba?

BATO balobaka ete bindimeli ya mangomba ya bonkɔkɔ ya Afrika ezali lokola ngomba. Nsongɛ na yango ezali Nzambe, ye oyo aleki nguya nyonso ya elimo. Mipanzi ya ngomba yango ezali banzambe mosusu ya mikemike to bilimo oyo bizali basaleli ya Nzambe. Mpe pembeni na bango ezalaka bankɔkɔ oyo babosanaka te bato ya mabota na bango oyo bazali awa na mabele mpe balukaka kosalisa bango. Nse ya ngomba yango ezali nguya mikemike ya elimo: nkisi, koloba makambo oyo ebombani, mpe bondɔki.

2. Ndenge nini lisese moko ya Afrika emonisi ete bindimeli ya bonkɔkɔ ezali na nguya makasi mpenza likoló na mangomba?

2 Bindimeli yango ya bonkɔkɔ ekɔtelá mpenza mangomba mosusu ya Afrika. Kutu lisese moko ya Afrika elobaka boye: “Kozala na Lingomba (ya boklisto to ya Bamizilma) epekisi biso te ete tósambela banzambe ya bankɔkɔ na biso.”

3. Epai wapi tokoki koyekola solo oyo etali bato oyo bazalaka na nzoto ya elimo?

3 Bindimeli ya bonkɔkɔ na Afrika ezali mpenza ya solo? Biblia ezali koyebisa biso solo oyo etali bato oyo bazalaka na nzoto ya elimo.

Yehova, Nzambe ya solo

4. Likambo nini mangomba ya minene na Afrika endimaka?

4 Mangomba misato ya minene na Afrika endimaka ete Nzambe azali mpe aleki bato nyonso mpe biloko nyonso na nguya. Biblia emonisi ete azali “Nzambe ya banzambe mpe Nkolo ya bankolo, Nzambe monene mpe makasi mpe na nsɔmɔ.” (Deteronome 10:17) Bamizilma mpe bandimaka Nzambe moko oyo aleki likoló na makambo nyonso. Profɛsɛrɛ Geoffrey Parrinder alobaki boye mpo na mangomba ya bonkɔkɔ na Afrika: “Bato mingi ya Afrika bandimaka Nzambe moko oyo aleki bato nyonso mpe biloko nyonso na nguya, tata ya banzambe mpe ya bato, mozalisi ya molɔ́ngɔ́.”

5. Bankombo nini bato basalelaka mpo na kobenga Nzambe?

5 Kasi, atako bato mingi bandimaka Nzambe, ebele ya bato bayebaka Nzambe malamumalamu te. Mpo na koyeba moto, esengeli libosoliboso koyeba nkombo na ye. Mpo na likambo etali nkombo ya Nzambe, boyokani ezali te kati na mangomba. Na mangomba ya boklisto, mbala mingi babengaka ye kaka Nzambe; titre oyo elimboli “Moto ya Nguya.” Epai ya Bamizilma, azali Allah. Na mangomba ya bonkɔkɔ, monɔkɔ na monɔkɔ ezali na nkombo oyo basalelaka mpo na kolobela Oyo Aleki na Makambo Nyonso. Na mokanda na ye (Concepts of God in Africa), John S. Mbiti atángi bankombo mpe batitre koleka 500 oyo basalelaka na Afrika mpo na kolobela Nzambe. Na ndakisa, na monɔkɔ ya Yoruba (na Nigeria), babengaka Nzambe Olodumare; na monɔkɔ ya Kikuyu (na Kenya), babengaka ye Ngai; mpe epai ya Bazulu (na Afrika ya Sudi), babengaka ye Unkulunkulu.

6, 7. Nkombo ya Nzambe ezali nini, mpe ndenge nini toyebi yango?

6 Nzambe ye moko alobi nini mpo na nkombo na ye? Ntango Nzambe atindaki Mose abimisa Bayisalaele na Ezipito, Mose atunaki boye: “Soki ngai nakokóma epai na bato ya Yisalaele mpe nakolobela bango ete, Nzambe ya batata na bino atindi ngai epai na bino, mpe soki bakotuna ete, Nkombo na ye nani? Nalobela bango nini?”​—Exode 3:13.

7 Nzambe azongisaki ete: “Lobelá bato ya Yisalaele boye ete, [Yehova] Nzambe ya batata na bino, . . . atindi ngai epai na bino. Oyo ezali nkombo na ngai lobiko na lobiko, mpe nakanisama bongo kino libota na libota.” (Exode 3:15) Tozali kokuta nkombo Yehova mbala koleka 7 000 na kati ya Biblia, atako babongoli mosusu ya Biblia bazali kosalela batitre lokola “Nzambe” to “Nkolo,” na esika ya nkombo yango.

8. Yehova azali ndenge nini, mpe tosengeli kosala nini soki tolingi ete andima biso?

8 Yehova azali mpenza ndenge nini? Azali elimo, azali mozwi-na-nguya-nyonso mpe azali na nkembo mingi mpenza. Aleki biloko nyonso mpe bato nyonso, moto moko te akokani na ye. (Deteronome 6:4; Yisaya 44:6) Yehova ayebisaki Mose ete: “Ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe [oyo asɛngaka básambela kaka ngai moko].” Na maloba mosusu, tokoki koloba ete mpo Yehova andima biso, tosengeli kosambela kaka ye moko. Alingi te ete tósambela eloko to moto mosusu.​—Exode 20:3-5.

Yesu Klisto, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe

9. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu akokani na Yehova te?

9 Lelo oyo, bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na Yesu. Bato mingi na mangomba ya boklisto bandimaka ete Yesu azali na kati ya Bosato “Bosantu.” Kasi, Biblia eteyaka te ete Nzambe azali moto moko na Bapersona misato. Mpe eteyaka te ete Yesu akokani na Yehova. Yesu ye moko alobaki boye: “Tata aleki ngai.”​—Yoane 14:28.

10. Yesu azalaki wapi liboso aya awa na mabele?

10 Biblia ezali koteya ete liboso Yesu azala na bomoi awa na mabele lokola moto, azalaki ekelamu ya elimo mpe ya nguya mingi kuna na likoló. Ndenge Yehova azalisaki Adama na Eva awa na mabele, azalisaki mpe bikelamu mosusu ya elimo na likoló. Yesu azalaki ekelamu ya liboso ya elimo oyo Yehova azalisaki.​—Yoane 17:5; Bakolose 1:15.

11. Ndenge nini Yesu abotamaki lokola moto?

11 Eleki sikoyo mbula soki 2 000, Yehova akɔtisaki bomoi ya ekelamu wana ya elimo na libumu ya mwana mwasi moko na nkombo Malia, oyo ayebaki naino mobali te. Anzelu Gabriele alobaki na ye boye: “Mpe talá okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu. Mpe akoyangela lokola mokonzi . . . , mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.”​—Luka 1:31, 33. *

12. Wapi ntina moko oyo Yesu ayaki awa na mabele?

12 Yango wana Yesu abotamaki, akolaki, mpe ateyaki bato mokano ya Yehova. Alobaki boye na guvɛrnɛrɛ moko Moloma: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na [ntina] yango nde nayaki na mokili, mpo napesa litatoli na ntina etali solo.” (Yoane 18:37) Soki totaleli makambo oyo Yesu ateyaki, tokoki koyekola solo na ntina etali mokano ya Nzambe. Tokoki koyekola ndenge ya kosepelisa Nzambe.

13. Wapi ntina ya mibale oyo Yesu ayaki awa na mabele?

13 Ntina ya mibale oyo Yesu ayaki na mokili ezalaki ya kopesa bomoi na ye ya moto lokola lisiko mpo na bato. (Matai 20:28) Asalaki yango mpo tósikwama na lisumu oyo tozwaki na nkɔkɔ na biso Adama. Na nsima, yango ekopesa biso likoki ya kozala na bomoi ya seko. Ntoma Yoane akomaki boye: “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

14. (a) Nini ekómelaki Yesu nsima ya liwa na ye lokola moto? (b) Yesu azali nani lelo oyo na likoló?

14 Nsima ya liwa na ye lokola moto, Yesu asekwisamaki mpo na kokende na likoló mpe kuna, azongelaki lisusu bomoi na ye lokola ekelamu ya elimo mpe ya nguya. (Misala 2:32, 33) Na nsima, Yehova apesaki ye “nguya na nkembo na bokonzi . . . ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye.” (Danyele 7:13, 14) Yesu atyami Mokonzi ya nguya mpe azali Mokonzi na guvɛrnema ya Yehova na likoló. Mosika te akomonisa nguya na ye na mabele mobimba.

Baanzelu, baministre ya Nzambe

15. Baanzelu bazalisamaki ntango nini mpe epai wapi?

15 Ezali kaka Yehova te na Yesu nde bazali na nzoto ya elimo. Yehova azalisaki bikelamu mosusu ya elimo, baanzelu. Gabriele oyo asololaki na Malia azali moko ya baanzelu yango. Baanzelu bazalaki liboso bato te awa na mabele, liboso ya kokende na likoló. Bazalisamaki na likoló bambula ebele liboso ete bato bázalisama awa na mabele. (Yobo 38:4-7) Baanzelu bazali bamilio na bamilio.​—Danyele 7:10.

Baanzelu ya sembo baboyaka bato básambela bango

16. Mpo na nini bato basengeli te kosambela baanzelu?

16 Baanzelu ya sembo balingaka te ete tósambela bango. Mbala mibale, ntoma Yoane alingaki kosambela baanzelu, kasi bapamelaki ye na maloba oyo: “Kebá! Kosala bongo te! . . . Sambelá Nzambe.”​—Emoniseli 19:10; 22:8, 9.

17. Nini emonisi ete baanzelu bazali na nguya ya kobatela basaleli ya Nzambe, mpe mpo na nini yango ezali kobɔndisa biso?

17 Baanzelu babimelaka lisusu basaleli ya Nzambe awa na mabele te, ndenge basalaki yango ntango babimisaki bantoma ya Yesu na bolɔkɔ. (Misala 5:18, 19) Atako bongo, soki tozali kosambela Yehova na ndenge oyo Biblia, Liloba na ye, esɛngi, tokoki kondima mpenza ete bikelamu ya Nzambe oyo bamonanaka te, baanzelu ya nguya, bakobatela biso. Biblia elobi boye: “Anzelu ya Yehova afandaka pembenipembeni ya bato oyo babangaka ye; mpe abikisaka bango.” (Nzembo 34:7; 91:11) Mpo na nini yango esengeli kobɔndisa biso? Mpamba te ezali na bikelamu mosusu ya elimo oyo bazali banguna mabe mpenza mpe balingaka kobebisa biso!

Satana, monguna ya Nzambe

18. (a) Mpo na nini anzelu moko atombokelaki Nzambe? (b) Anzelu wana motomboki azwaki bankombo nini?

18 Ezali baanzelu nyonso te nde bazali sembo epai ya Nzambe. Baanzelu mosusu batombokelaki ye. Bamikómisaki bango moko banguna ya Nzambe mpe banguna ya bato awa na mabele. Ndenge nini likambo yango esalamaki? Baanzelu nyonso oyo Yehova azalisaki bazalaki sembo mpe malamu. Kasi, moko kati na bana yango ya elimo mpe ya kokoka alingaki ete bato básambelaka ye, mpe asalaki nyonso mpo akokisa mposa na ye wana ya mabe. Ekelamu yango ya elimo azwaki nkombo Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli [ya Nzambe].” Babengaka ye mpe Zabolo, oyo elimboli “Motɔngi,” mpamba te akoselaka Yehova makambo.

19. Mpo na nini mpe ndenge nini Satana atungisaki Yobo?

19 Satana atungisaka bato ete bálanda ye mpe bátombokela Nzambe. Talá likambo oyo asalaki Yobo, mosaleli ya sembo ya Nzambe. Yobo azalaki na bozwi mingi mpenza. Azalaki na bampate 7 000, bakamela 3 000, bangɔmbɛ ya mibali na ya basi 1 000 mpe bampunda basi 500. Azalaki mpe na bana zomi mpe basali mingi. Liboso, Satana abomaki bibwɛlɛ ya Yobo mpe basali na ye. Na nsima, abimisaki ‘mopɛpɛ makasi’ oyo ekweisaki ndako moko mpe yango ebomaki bana nyonso ya Yobo. Mpe lisusu, Satana anyokolaki Yobo na “babibɔ ya mabe banda na matambe na makolo tii na likoló na motó na ye.”​—Yobo 1:3-19; 2:7.

20. (a) Ndenge nini Yobo azwaki mbano mpo na bosembo na ye? (b) Atako Yobo atikalaki sembo epai ya Nzambe, Satana asaleli ebele ya bato mosusu nini?

20 Atako akutanaki na komekama oyo ya mpasi mingi, Yobo atikalaki sembo epai ya Nzambe. Yango wana Yehova abikisaki ye mpe “abakiselaki mpe Yobo kino mbala na mibale na yango ezalaki na ye liboso.” (Yobo 42:10) Satana alongaki te kobebisa bosembo ya Yobo, kasi alongi na ndenge apɛngwisi bato mingi ete bátika Nzambe. Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”​—1 Yoane 5:19.

21. (a) Ndenge nini Satana amonisaki mposa na ye ete bato básambelaka ye? (b) Mpo na nini Yesu aboyaki kosambela Satana?

21 Satana alingi ete tósambelaka ye. Yango emonanaki polele ntango amekaki Yesu esili koleka sikoyo mbula soki 2 000. Biblia elobi ete: “Zabolo amemaki [Yesu] lisusu na ngomba moko ya molai mpenza koleka, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango, mpe alobaki na ye ete: ‘Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.’” Yesu aboyaki mpe alobaki ete: “Longwá awa, Satana! Mpo ete ekomamá ete ‘Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Matai 4:8-10) Yesu ayebaki mobeko ya Yehova malamumalamu mpe asalaki te oyo Satana alingaki.

Bademo, bilimo mabe

22. Bademo basalá bato makambo nini?

22 Baanzelu mosusu balandaki Satana mpe batombokelaki Nzambe. Baanzelu yango ya mabe to bademo bazali banguna ya bato awa na mabele. Bazali na motema mabe mpe na bizaleli ya mbindo. Na ntango ya kala, bakómisaki bato mosusu bababa mpe babomaki miso ya bato mosusu. (Matai 9:32, 33; 12:22) Bapesaki bato mosusu maladi to bakómisaki bango bato ya ligboma. (Matai 17:15, 18; Malako 5:2-5) Bazalaki konyokola ata bana.​—Luka 9:42.

23. (a) Bilimo mabe balukaka bato básalela bango nini? (b) Satana na bademo bakosi bato ete básala nini?

23 Ndenge moko na Satana, bilimo mabe wana bazalaka mpe na mposa ete bato básambelaka bango. Na esika ete báboya losambo oyo bato bazali kopesa bango mpe bándima ete esengeli kosambela kaka Yehova, bango bazali kaka na mposa makasi ete básambela bango, bazali koluka yango, mpe bazali kolendisa yango. Na nzela ya mayele mabe, lokuta, mpe kobangisa, Satana na bademo babendi bato mingi ete básambela bango. Kutu, bato mingi bayebaka te ete basambelaka Satana na bademo na ye. Bato mingi bakokamwa soki bayoki ete lingomba na bango ekumisaka Satana. Atako bongo, Biblia ezali kopesa likebisi oyo: “Biloko oyo bato ya bikólo mosusu bapesaka mbeka bapesaka yango mbeka epai ya bademo, kasi epai ya Nzambe te.”​—1 Bakolinti 10:20.

24. Tángá moko na makambo oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato.

24 Moko na makambo oyo Satana na bademo na ye bazali kosalela mpo na kokosa bato básambela bango ezali kopalanganisa makambo ya lokuta na ntina etali bato oyo bakufá. Tótala oyo Biblia ezali koteya biso mpo na yango.

^ par. 11 Koran, na Surate 19 (Maria), ezali kolobela kobotama ya Yesu na ndenge ya kokamwa. Elobi boye: “Totindi epai ya [Maria] elimo na Biso lokola mobali oyo akoli mpenza. Mpe ntango amoni ye alobi ete: ‘Tiká ete ye Oyo azali na motema mawa abikisa ngai na mabɔkɔ na yo! Soki obangaka Nkolo, tiká ngai mpe kende na yo.’ Ye azongisi ete: ‘Nazali momemi-nsango ya Nkolo na yo, mpe nayei kopesa yo mwana mosantu.’ Maria azongisi ete: ‘Ndenge nini nakoki kobota mwana, mpo nayebi naino mobali te mpe mobali moko te asimbá ngai?’ Ayanolaki ete: ‘Yango ezali mokano ya Nkolo na yo. Ezali na likambo moko te ya mpasi mpo na ye. Nkolo alobi boye: “Asengeli kozala elembo mpo na bato, mpe lipamboli euti epai na Biso. Yango ezali maloba na Biso.”’”