Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 4

Bankɔkɔ na biso bazali wapi?

Bankɔkɔ na biso bazali wapi?

1, 2. Bato mingi bakanisaka nini mpo na bato oyo bakufá?

BAMILIO ya bato na Afrika bakanisaka ete liwa ezali nsuka ya bomoi ya moto te, kasi ezali nde nzela mpo na koleka na bomoi ya lolenge mosusu. Bato mingi bakanisaka ete bankɔkɔ na bango oyo bakufá balongwá na mokili oyo esika bazalaki komonana mpe bakendá na mokili mosusu esika bakoki komonana te, balongwá na mokili ya bato, bakendá na mokili ya bilimo.

2 Bato bakanisaka ete bankɔkɔ wana to bilimo yango ya bankɔkɔ ebatelaka mabota na bango awa na mabele mpe esalisaka bango bázwa biloko mingi. Mpo na bango, bilimo ya bankɔkɔ ezali baninga na bango ya nguya mingi oyo bakoki kosala ete bilanga na bango ebota malamu, bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakoki kobatela bango na mabe. Balobaka ete soki oboyi kotyela bango likebi to soki osilikisi bango, bakoki komonisa yo mpasi na maladi, na bobola to mpe na mpasi mosusu ya makasi.

3. Ndenge nini bato mosusu basambelaka bankɔkɔ?

3 Bato oyo bazali naino na bomoi basalaka makambo mosusu mpe milulu mpo na kokumisa bilimo ya bankɔkɔ mpe kobatela boyokani malamu na bango. Makambo yango emonanaka mingimingi na mimeseno oyo ezalaka na ntango ya kolela mpe kokunda moto, na ndakisa kolala libándá na ebembe to kosala lilaka to matánga. Losambo ya bonkɔkɔ emonanaka mpe na ndenge mosusu. Na ndakisa, liboso ya komɛla masanga, bato mosusu basopelaka bankɔkɔ mwa ndambo na mabele. Mpe nsima ya kolamba biloko ya kolya, batikaka mwa ndambo na nzungu mpo ntango bankɔkɔ bakoya, bákuta eloko ya kolya.

4. Bato mingi bakanisaka nini mpo na molimo?

4 Bato mosusu bandimaka ete tozalaka na molimo oyo ekufaka te mpe ebimaka ntango nzoto ekufi. Soki moto azali sembo, molimo na ye ekokende na lola, to na paladiso, kasi soki azalaki moto mabe, molimo na ye ekokende na lifelo. Mbala mingi, bato basangisaka likanisi oyo na bindimeli ya bonkɔkɔ na bango. Na ndakisa, bazulunalo, televizyo, radio mpe mbonda to lokole oyo epesaka nsango ya liwa ya moto mpe ya misa ya bawa elobaka mbala mosusu ete moto yango “akatisi” to “akei na mboka ya bankɔkɔ.” Bindimeli nyonso wana euti na likanisi oyo bato bazalaka na yango ete molimo, to elimo ebimaka na nzoto ntango moto akufi. Biblia elobi nini mpo na yango?

Molimo mpe elimo

5, 6. Biblia emonisi ete molimo ezali nini?

5 Biblia ezali komonisa ete molimo ezali te eloko moko oyo ezalaka na kati ya moto, kasi ezali nde moto ye moko. Na ndakisa, ntango Nzambe akelaki Adama, “moto akómaki molimo ya bomoi.” (Genese 2:7) Adama azwaki molimo te, kasi azalaki molimo, elingi koloba moto na mobimba na ye.

6 Yango wana totángaka ete milimo ebotamaka. (Genese 46:18) Ekoki kolya to koboya kolya. (Levitike 7:20; Nzembo 35:13) Ekoki kolela mpe kobanga. (Yilimia 13:17; Yona 2:7) Bakoki kokanga molimo na makasi, bakoki kolanda yango mpe kokanga yango na minyɔlɔlɔ. (Deteronome 24:7; Nzembo 7:5; 105:18) Na bavɛrsɛ oyo, Babiblia mosusu ebongoli liloba yango ya Liebele na “molimo,” kasi na Babiblia mosusu, basaleli maloba “ekelamu” to “moto.” Maloba wana nyonso elimboli kaka eloko moko.

7. Bavɛrsɛ nini ya Biblia emonisi ete molimo ekufaka?

7 Lokola molimo ezali moto, ntango moto akufi, molimo ekufi. Ezekiele 18:4 elobi boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” Lisusu, Misala 3:23 elobi boye: “Molimo nyonso oyo ekoyoka Mosakoli wana te ekobebisama nyɛɛ uta na kati ya bato ya ekólo.” Na bongo, molimo ezali te eloko moko oyo ebimaka na nzoto ya moto ntango akufi.

8. Elimo ya moto ezali nini?

8 Elimo ekeseni na molimo. Elimo ezali nguya ya bomoi oyo ezali na kati ya moto mpe esalisaka ye na kosala makambo oyo ye asalaka na bomoi na ye. Elimo ezali lokola kura. Kura ekoki kopelisa vantilatɛrɛ to frigo, kasi yango moko ekoki te kopesa mopɛpɛ to koyeisa biloko mpiɔ. Ndenge moko mpe, elimo esalisaka biso tómona, tóyoka mpe tókanisa. Kasi elimo yango moko ekoki kosala makambo nyonso wana te, soki miso, na matoi to bɔɔngɔ ezali te. Yango wana Biblia elobi boye mpo na moto: “Soki [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabele lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”​—Nzembo 146:4.

9. Likambo nini molimo na elimo esalaka te?

9 Boye na kotalela Biblia, ezala molimo to elimo, ata moko te kati na yango elongwaka na nzoto ya moto ntango akufi mpo na kokende kozala na bomoi lokola bikelamo ya elimo.

Ezalela ya bato oyo bakufá

10. Biblia elobi nini mpo na ezalela ya bato oyo bakufá?

10 Bongo tokoloba nini mpo na ezalela ya bato oyo bakufá? Lokola Yehova nde azalisaki bato, ayebi mpe ndenge tokómaka ntango tokufi. Liloba na ye eteyaka ete moto oyo akufi azali na bomoi te, akoki koyoka te, komona te, koloba te, to kokanisa ata moke te. Biblia elobi boye:

  • “[Bato oyo bakufá] bayebi likambo te.”​—Mosakoli 9:5.

  • “Bolingo na bango mpe koyina bango mpe zuwa na bango esili kobeba.”​—Mosakoli 9:6.

  • “Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokenda yo.”​—Mos. 9:10.

11. Nsima ya kosala lisumu, Yehova ayebisaki Adama nini?

11 Kanisá oyo Biblia elobi mpo na Adama, nkɔkɔ na biso ya liboso. Yehova akelaki Adama “na mputulu ya mokili.” (Genese 2:7) Soki Adama atosaka mobeko ya Yehova, alingaki kozala na bomoi seko mpe na esengo awa na mabele. Nzokande, Adama abukaki mobeko ya Yehova mpe azwaki etumbu ya liwa. Ntango Adama akufaki, akendaki wapi? Nzambe alobaki na ye boye: ‘Okozonga na mabele, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali mputulu, mpe okozonga na mputulu.’​—Genese 3:19.

12. Nini ekómelaki Adama ntango akufaki?

12 Adama azalaki wapi liboso Yehova azalisa ye na mputulu? Azalaki esika moko te. Azalaki te. Yango wana, ntango Yehova ayebisaki Adama ete ‘akozonga na mputulu,’ alingaki koloba ete Adama akozala lisusu na bomoi te, akozala lokola mputulu. Adama akatisaki mpo na kokende na mokili ya elimo te. ‘Akendaki’ mpe na mboka ya bankɔkɔ te. Akendaki na lola to na lifelo te. Azongaki ndenge azalaki ntango azalaki naino na bomoi te; azalaki lisusu te.

13. Nini ekómelaka bato na banyama ntango bakufaka?

13 Ezalaka mpe bongo mpo na bato nyonso? Ɛɛ, ezali bongo. Biblia elobi boye: “[Bato na banyama] bakendaka esika moko. Bango nyonso bauti na mputulu, mpe bango nyonso bazali kozonga na mputulu.”​—Mosakoli 3:19, 20.

14. Tozali na elikya nini mpo na bato oyo bakufá?

14 Biblia epesi elaka ete, na paladiso awa na mabele, Nzambe akozongisa bato oyo bakufá na bomoi. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Kasi ekozala na mikolo ekoya. Lelo oyo, balali naino na nkunda. (Yoane 11:11-14) Tosengeli te kobanga bango to kosambela bango, mpamba te bakoki te kosalisa biso to mpe kosala biso mabe.

15, 16. Ndenge nini Satana alukaka kotinda bato bándima ete bato oyo bakufá bakufá mpenza te?

15 Likanisi oyo emonisaka ete tokufaka mpenza te ezali lokuta oyo Satana Zabolo apalanganisi. Mpo na kondimisa bato likanisi yango ya lokuta, ye na bademo na ye bazali kosala makasi ete bátinda bato bákanisa ete bilimo ya bato oyo bakufá nde epesaka bato maladi to mpasi mosusu. Ezali solo ete mpasi mosusu eutaka na bademo. Ezali mpe solo ete mpasi mosusu eutaka na bilimo te. Nzokande, koloba ete bato oyo bakufá basalaka biso mabe ezali lokuta mpenza.

16 Ezali mpe na lolenge mosusu oyo bademo basalelaka mpo na kotinda bato bákanisa ete makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa ezali solo te. Bazali kokosa bato mpo bákanisa ete bamonaki to basololaki na bato oyo bakufá. Basalaka bongo na nzela ya bimonaneli, bandɔtɔ, banganga-nkisi, to na banzela mosusu. Nzokande, bato basololaka na bato oyo bakufá te, kasi na bademo oyo bazali kokosa ete bazali bato oyo bakufá. Yango wana Yehova apekisi mpenza bonganga-nkisi mpe kosolola na bato oyo bakufá.​—Deteronome 18:10-12; Zekalia 10:2.