Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 8

Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo

Boyá mangomba ya lokuta; sambelá na lingomba ya solo

1. Na likambo ya losambo, bato basengeli kopona nini lelo oyo?

YESU alobaki boye: “Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai.” (Matai 12:30) Soki tozali na ngámbo ya Yehova te, tozali na ngámbo ya Satana. Bato mingi bakanisaka ete basalelaka Nzambe na ndenge oyo ye alingi, kasi Biblia elobi ete Satana “azali kobungisa mabele mobimba oyo efandami.” (Emoniseli 12:9) Bamilio ya bato bakanisaka ete basambelaka Nzambe, nzokande bazali nde kosalela Satana Zabolo! Lelo oyo, bato nyonso basengeli kopona na likambo oyo: Kosalela Yehova, “Nzambe ya bosolo,” to kosalela Satana, “tata ya lokuta.”​—Nzembo 31:5; Yoane 8:44.

Longwá na boombo ya lingomba ya lokuta

2. Tángá mokakatano moko oyo Satana asalelaka mpo na kopekisa bato kosambela Yehova.

2 Kopona kosalela Yehova ezali likambo ya mayele mpenza mpe esepelisaka Nzambe. Kasi Satana asepelaka te na moto nyonso oyo asalelaka Nzambe; mpe amemelaka ye mikakatano mingi. Moko ya mikakatano yango ezali ete asalaka ete bato mosusu, ezala ata baninga to bandeko na ye, bábanda kosɛka to kotɛmɛla moto yango. Yesu akebisaki boye: “Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.”​—Matai 10:36.

3. Soki bandeko na yo to baninga na yo bazali koboya ete osambela Nzambe, okosala nini?

3 Soki yango ekómeli yo, okosala nini? Bato mingi bayebaka ete losambo na bango ezali mabe, kasi bazali kokakatana mpo na kotika yango. Bakanisaka ete soki basali bongo, bakomonisa ete balingi libota na bango te. Ezali mpenza likambo ya mayele? Soki oyoki ete bandeko na yo bazali komɛla bangi, okokebisa bango ete bangi yango ekoki kobebisa bango, boye te? Okolanda bango na komɛla bangi?

4. Yosua alobaki nini na Bayisalaele mpo na likambo ya losambo na ntango na ye?

4 Yosua alendisaki Bayisalaele ete bátika misala ya losambo ya lokuta mpe mimeseno na bango ya bonkɔkɔ. Alobaki boye: “Na bongo bóbanga Yehova mpe bósalela ye na motema moko mpe na sembo. Bólongola banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngámbo ya Ebale, mpe na Ezipito, mpe bósalela Yehova.” (Yosua 24:14) Yosua azalaki sembo epai ya Nzambe mpe Yehova apambolaki ye. Soki biso mpe tozali sembo epai ya Yehova, akopambola biso.​—2 Samwele 22:26.

Bwaká biloko oyo basalelaka na losambo ya lokuta

5. Mpo na nini tosengeli kobwaka biloko nyonso ya nkisi?

5 Kolongwa na lingomba ya lokuta esɛngi mpe ete tótumba biloko nyonso ya nkisi oyo tozalaki na yango. Ekoki kozala bikelakela, bikeko, mpɛtɛ to nsinga ya nkisi, mpe biloko mosusu ya ndenge wana. Yango ezali na ntina mingi mpamba te ekomonisa ete totii elikya na biso nyonso epai ya Yehova.

6. Baklisto ya ekeke ya liboso basalaki nini na mikanda na bango ya nkisi?

6 Talá oyo baklisto mosusu ya ekeke ya liboso basalaki ntango baponaki kosambela na lingomba ya solo. Biblia elobi boye: “Motángo monene ya baoyo bazalaki kosala misala ya nkisi basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.”​—Misala 19:19.

7. Tokoki kosala nini soki bademo bazali kotungisa biso?

7 Ekómaka ete bademo bátungisa bato mosusu oyo bazalaki banganga-nkisi, bandɔki, to mpe bato ya nkisi mpo babandi kosalela Yehova. Soki yango ekómeli yo, bondelá Yehova na mongongo makasi, bengá ye na nkombo na ye mpenza mpe ye akosalisa yo.​—Masese 18:10; Yakobo 4:7.

8. Ndenge nini baklisto batalelaka bikeko, bililingi mpe bafɔtɔ oyo bato basalelaka na losambo ya lokuta?

8 Bato oyo balingi kosalela Yehova basengeli te kobomba to kosalela bikeko, bililingi to bafɔtɔ oyo bato basalelaka na losambo ya lokuta. Baklisto ya solo ‘batambolaka na kondima, kasi na komona te.’ (2 Bakolinti 5:7) Batosaka mibeko ya Nzambe oyo epekisi kosalela bililingi ya lolenge nyonso na losambo.​—Exode 20:4, 5.

Zalá moninga ya bato ya Yehova

9. Toli nini Biblia epesi mpo na kokóma na bwanya?

9 Biblia elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato ya [bwanya akokóma moto ya bwanya].” (Masese 13:20) Soki tolingi kozala na bwanya, tosengeli kotambola na Batatoli ya Yehova mpe kozala baninga na bango. Bango nde bato oyo bazali kotambola na nzela oyo ememaka na bomoi.​—Matai 7:14.

10. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo osalela Nzambe?

10 Batatoli bazali mpenza komitungisa mpo na bato. Mosala na bango ezali ya kosalisa bato ya motema sembo bákanga ntina ya mateya ya solo ya Biblia oyo ezali komema na bomoi ya seko. Bakoki kosalisa yo na koyekoláká na yo Biblia ofele. Bakoyanola na mituna oyo ozalaka na yango mpe bakomonisa yo ndenge oyo okoki kosalela boyebi ya Biblia na bomoi na yo.​—Yoane 17:3.

11. Na ndenge nini makita ya boklisto ekosalisa yo?

11 Na makita na bango oyo basalaka mbala mingi na Ndako ya Bokonzi, okoyekola makambo mingi etali nzela ya Yehova. Ekolendisa mposa na yo ya kosambela na lingomba ya solo. Ekobongisa yo mpe mpo oyeba ndenge ya kosalisa bato báyekola mateya ya solo ya Biblia.​—Baebele 10:24, 25.

12. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa yo osalela Nzambe?

12 Ntango okoyekola makambo mingi etali mokano ya Yehova, na ntembe te okoyeba mpenza nzela na ye ya bolingo mpe okosepela na yango mingi mpenza. Osengeli mpe kokolisa mposa na yo ya kosala makambo oyo esepelisaka ye mpe koboya makambo oyo esepelisaka ye te. Kobosana te ete okoki kosolola na Yehova na nzela ya libondeli mpo na kosɛnga ye asalisa yo osala oyo ezali sembo mpe oboya mabe.​—1 Bakolinti 6:9, 10; Bafilipi 4:6.

Ndenge nini okoki kosambela Nzambe na ndenge ya solo?

13. Ndenge nini okoki kosepelisa motema ya Yehova?

13 Nsima ya mwa ntango, soki ozali kokola na elimo, na ntembe te okomona ete osengeli komipesa, kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova. Soki okɔti na molɔngɔ ya bato ya Yehova, okosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Yo mpe okozala moko kati na bato ya esengo oyo Nzambe alobi boye mpo na bango: “Nakofanda na kati na bango mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato ya ekólo na ngai.”​—2 Bakolinti 6:16.