Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 9

Lingomba ya solo ekopesa yo mapamboli libela na libela!

Lingomba ya solo ekopesa yo mapamboli libela na libela!

1. Nini ekokómela biso soki ‘topusani penepene na Nzambe’?

YEHOVA alingaka bato oyo basalelaka ye. Soki osambeli Yehova, akopambola yo sikoyo mpe na mikolo ekoya. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

2. Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe mpe yango ekosala nini na mabondeli na biso?

2 Mpo na kopusana penepene na Nzambe, osengeli koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango. Soki mabondeli na yo eyokani na mokano na ye, Yehova akoyoka yango mpe akoyanola yo. Ntoma Yoane, oyo azalaki mpe moklisto, akomaki boye: “Kondimisama oyo tozali na yango na ntina etali [Nzambe], yango oyo, ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso. Lisusu, soki toyebi ete akoyoka biso na oyo etali eloko nyonso tozali kosɛnga, toyebi ete tokozwa biloko yango oyo esɛngami mpamba te tosɛngi ye yango.”​—1 Yoane 5:14, 15.

3-7. Ndenge nini tokoki kozwa bwanya oyo euti na Nzambe, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso?

3 Mpe lisusu soki opusani penepene na Nzambe, akopesa yo bwanya oyo okosalela na bomoi na yo mpe okozala na bomoi ya malamu. Biblia elobi boye: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe.”​—Yakobo 1:5.

4 Ndenge nini bwanya oyo euti na Nzambe ekoki kosalisa yo? Ekosalisa yo na makambo mingi; na ndakisa, ekosalisa yo oyeba makambo oyo esepelisaka Yehova te. Okoyeba mpe mpo na nini makambo yango ezali mabe mpe oyo okoki kosala mpo na komipesa na yango te. Soki oyebi makambo yango, ekoki kobatela yo na mikakatano mingi oyo bato bakutanaka na yango. Na ndakisa, kotosa toli ya Nzambe ya kozala na bizaleli ya pɛto ebatelaka bato ya Nzambe ete bázwa zemi ya balabala te to oyo bakanaki te, bázwa te maladi oyo bato bazwaka na kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, bázala te na mabala ya mpasi to mpe mabala na bango ekufaka mpambampamba te.

5 Bwanya oyo euti na Nzambe ekosalisa yo lisusu na nini? Ekosalisa yo ozala na bomoi moko ya malamu mpenza. Ekosalisa yo ozwa bikateli malamu na makambo oyo tokutanaka na yango, na ndakisa okoyeba kosalela mbongo na yo. Okoyeba kozala na mikano ya malamu mpe koboya mikano ya mpambampamba.

6 Bwanya oyo euti na Nzambe ekoki mpe kosalisa yo na boyokani na yo na bato. Okozala na bomoi malamu ya libota. Okopona baninga ya malamu oyo bakozala baninga na yo ntango nyonso mpe bato bakopesa yo limemya, ezala ata baoyo basalelaka Nzambe te.

7 Lisusu, soki ozali na bwanya oyo euti na Nzambe, yango ekopesa yo elikya kitoko na bomoi. Ekosalisa yo oyika mpiko na mikakatano mpe bampasi ya bomoi. Okozala na makanisi malamu, okotalela mikolo ekoya ete ekozala malamu. Elikya yango ekosala ete otungisama te na makanisi mpe ozala nzoto kolɔngɔnɔ.​—Masese 14:30; Yisaya 48:17.

8. Soki osaleli Nzambe, makambo nini okobanga lisusu te?

8 Soki osaleli Nzambe ya solo, okobanga lisusu te makambo oyo bato oyo basalelaka ye te babangaka. Lokola oyebi ete bato oyo bakufá bazali lisusu na bomoi te na kati ya nkunda, okobanga bango ata moke te. Lokola ozali na elikya na elaka oyo Nzambe apesi ete akosekwisa bato oyo bakufá, likanisi ete okokufa ekobangisa yo te. Mpe lokola oyebi ete Nzambe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, okobanga banganga-nkisi to bandɔki te.​—Yoane 8:32.

Bato ya sembo bakozwa mabele

9-11. Banani bakozala na bomoi na Paladiso, mpe banani bakozala wana te?

9 Soki opusani penepene na Nzambe, okomitungisa lisusu te mpo na avenire. Ndenge tomonaki yango, Biblia esakolaki mikakatano mingi oyo tozali komona lelo oyo na mokili. Yehova alobi ete makambo yango ekoumela libela na libela te. Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekobongola mabele oyo paladiso.​—Luka 21:10, 11, 31; 23:43.

10 Kaka bato oyo bazali kopusana penepene na Yehova mpe bazali kosalela ye nde bakozala na bomoi na Paladiso. Biblia elobi boye: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”​—Nzembo 37:10, 11.

11 Baoyo baboyaka na nko kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe bakokufa mpo na libela. (2 Batesaloniki 1:8, 9) Bakozala lisusu te. Bakokufa mpo na libela lokola Satana na bademo na ye. (Emoniseli 20:10, 14) Kasi bato oyo bayekoli Yehova mpe basaleli ye bakosepela mpenza na Paladiso awa na mabele.

Elikya kikoto mpenza!

12. Biblia elobi nini mpo na mikolo ekoya?

12 Yehova abombeli bato oyo balingaka ye makambo ya kokamwa mpenza! Talá oyo Liloba na ye emonisi mwa moke ndenge bomoi ekozala na Paladiso awa na mabele:

  • Biloko ya kolya ekozala mingi mpenza: “Masangu [to biloko ya kolya] ekotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba].”​—Nzembo 72:16.

  • Ndako ya malamu: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango.”​—Yisaya 65:21.

  • Mosala ya malamu: “Baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala ya mpamba te.”​—Yisaya 65:22, 23.

  • Maladi ekozala te: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na [maladi].”​—Yisaya 33:24.

  • Bibɔsɔnɔ bakozala te: “Bongo miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bayokaka te ekofungwama; bongo, moto oyo akufá makolo akopumbwa mbangu lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo.”​—Yisaya 35:5, 6.

  • Mpasi, mawa mpe liwa ekozala te: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, na mawa na koganga na mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

  • Bitumba ekozala te: “[Nzambe] akosukisa bitumba kino na nsuka ya mokili.”​—Nzembo 46:9.

  • Bomoi ya seko: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

13. Kaka nani nde akoki kokómisa mabele oyo paladiso, mpe mpo na nini?

13 Bato bakoki ata moke te kosala makambo oyo, kasi Yehova azali na nguya ya kosala nyonso oyo ye alingi. Eloko moko te ekoki kopekisa ye kosala oyo ye alingi. Biblia elobi boye: “Mpo epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki te kosalema.”​—Luka 1:37.

14. Ndenge nini okoki kotambola na nzela oyo ememaka na bomoi ya seko?

14 Yehova azali kosalela Batatoli na ye mpo na kopesa bato ya bikólo nyonso libaku ya ‘kokɔta na ekuke ya nkaka’ mpe kotambola na nzela oyo ememaka na bomoi ya seko. Tiká ete yo mpe ozala kati na bato ya esengo oyo bazali kondima kotambola na nzela yango. Sambelá na lingomba ya solo mpe sepelá na mapamboli ya Yehova libela na libela!​—Matai 7:13, 14.