Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

NZAMBE MOZWI-NA-NGUYA-NYONSO azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ekoya ezali na mabɔkɔ na ye. Azali na nguya ya kopesa mbano mpe ya kopesa etumbu. Azali na nguya ya kopesa bomoi mpe ya kobɔtɔla yango. Soki tosali makambo oyo ezali kosepelisa ye tokolonga, kasi soki tosali makambo oyo ezali kosepelisa ye te tokosuka mabe. Ezali mpenza na ntina mingi ete ye andima losambo na biso!

Bato basambelaka na ndenge mingi. Soki mangomba ezali lokola nzela, tokoki koloba ete Nzambe asepelaka na nzela nyonso? Te. Yesu Klisto, mosakoli ya Nzambe, amonisaki ete ezali kaka na nzela mibale. Alobaki boye: “Nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.”​—Matai 7:13, 14.

Mangomba ezali kaka mibale: oyo ememaka na bomoi mpe oyo ememaka na liwa. Ntina ya mwa buku oyo ezali mpo na kosalisa yo omona nzela ya bomoi ya seko.