Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 1

Mangomba nyonso eteyaka solo?

Mangomba nyonso eteyaka solo?

1. Tángá mwa mangomba oyo ezali na Afrika.

NA Afrika, tokoki koloba ete moto nyonso andimaka ete ezali na ntina mingi kosambela Nzambe. Kasi na likambo etali ndenge ya kosambela Nzambe, makanisi ya bato ekeseni. Bato mosusu bakendaka kosambela na moskɛ, mpe bato mosusu bakendaka na bisika basalaka losambo ya bonkɔkɔ. Ezali mpe na bato mosusu oyo bakendaka na ndako-nzambe. Kasi tokoki te koloba ete ezali kaka na mangomba misato na Afrika. Epai ya Bamizilma, okokuta bato na bato na mibeko na bango mpe na bindimeli na bango. Mboka na mboka ezali mpe na ndenge na yango ya losambo ya bonkɔkɔ oyo ekeseni mpenza na oyo ya mboka mosusu. Ata mangomba ya boklisto ezali mpe na boyokani te kati na yango. Longola mangomba minene ya boklisto, okomona ebele ya mangomba mosusu ya mikemike na Afrika.

Lingomba na biso esengeli kotongama likoló ya solo

2. (a) Nini esalaka ete moto azala na lingomba boye to boye? (b) Likambo nini emonisaka te ete lingomba na biso esepelisaka Nzambe?

2 Mpo na nini bato na bato bazali na ndenge na bango ya kosambela? Bato mingi balandaka lingomba ya baboti na bango. Ezali mpe na makambo ya kala oyo esali ete bato mosusu bázala na lingomba boye to boye. Buku moko (The Africans​—A Triple Heritage) elobi boye: “Lingomba ya Bamizilma epalangani na nɔrdi ya esobe ya Sahara mpo Bamizilma bayaki koyangela bikólo yango, . . . mangomba ya boklisto mpe epalangani na sudi ya esobe ya Sahara kaka na ndenge yango. Soki na nɔrdi ya esobe ya Sahara Lingomba ya Bamizilma epalanganaki mpo na ndenge bazalaki kobangisa bato na mopanga, na sudi ya Sahara mpe mangomba boklisto epalanganaki mpo bazalaki kobangisa bato na mindoki.” Atako bongo, bato mingi bandimaka ete lingomba na bango esepelisaka Nzambe. Kasi tokoki te koloba ete lingomba na biso ezali ya solo kaka mpo baboti na biso mpe bazali wana, to mpo ekólo moko ya bapaya nde endimisaki bankɔkɔ na biso bálanda yango.

3-5. Ndakisa nini ezali kosalisa biso tómona ete mangomba nyonso te nde eteyaka solo?

3 Atako mangomba nyonso ezali koloba ete ezali mpenza na malako ya malamu mpo na kosambela Nzambe, makanisi na bango ekeseni. Bazali koteya makambo ndenge na ndenge etali Nzambe, soki azali nani mpe azali kosɛnga biso nini. Kanisá naino: Ozwi mosala na kompani moko ya monene. Na mokolo ya liboso oyo obandi mosala, oyoki ete mokonzi ya kompani yango azali wana te mikolo yango. Otuni bato misato ya mosala soki osengeli kosala nini. Moto ya liboso ayebisi yo ete mokonzi alingi ete okombola ndako. Moto ya mibale alobi ete osengeli kopakola langi na ndako. Moto ya misato alobi na yo ete osengeli kokabola mikanda.

4 Na nsima, otuni bango soki mokonzi azalaka ndenge nini. Moto ya liboso alobi ete mokonzi azali molai, azali elenge mpe azalaka na makambo makasimakasi. Moto ya mibale alobi ete azali mokuse, mobange mpe azali na boboto. Moto ya misato alobi na yo ete mokonzi azali mobali te, kasi azali nde mwasi. Na ntembe te okoloba ete bango nyonso misato te nde balobi solo. Soki olingi mpenza kobatela mosala na yo ya sika, boye okozanga te kolukaluka mpo na koyeba soki mokonzi yango azali mpenza nani mpe eloko nini ye alingi osala.

5 Ezali mpe bongo na makambo ya lingomba. Lokola ezali na makanisi ebele oyo etali koyeba soki Nzambe azali nani mpe nini azali kosɛnga biso, tosengeli koluka koyeba mpenza soki lolenge biso tosambelaka eyokani na mateya ya solo. Kasi ndenge nini tokoki koyekola mateya ya solo oyo etali Nzambe?