Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 2

Ndenge nini okoki koyekola solo na ntina etali Nzambe?

Ndenge nini okoki koyekola solo na ntina etali Nzambe?

1, 2. Ndakisa nini ezali komonisa ete tozali na mposa ya eloko moko oyo ekosalisa biso tópona na makambo ya lingomba?

NDENGE nini tokoki koyeba Nzambe? Ezali mpenza na ntina ete tótalela mateya nyonso ya ebele ya mangomba oyo ezali na mokili? Tokokoka te. Ata soki tokoki kosala yango, ndenge nini tokoyeba mateya ya solo?

2 Ya solo, lokola makanisi ekeseni mpenza na likambo etali Nzambe, tozali na mposa ya eloko oyo ekosalisa biso tóyeba makanisi oyo ezali solo, to eloko oyo bato nyonso bakoki kondima. Tózwa ndakisa: Tóloba ete bato mibale bazali koswana na wenze mpo bayokani te mpo na liputa moko. Motɛki alobi ete liputa yango ezali mɛtrɛ misato, kasi mosombi akanisi ete ekoki mɛtrɛ misato te. Ndenge nini bakoki kosilisa matata na bango? Basengeli kozwa mɛtrɛ mpe komeka liputa yango.

3. Mpo na nini Biblia ekomamaki?

3 Ezali na mɛtrɛ to emekeli moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba solo na makambo ya lingomba? Ɛɛ, emekeli yango ezali nde Biblia. Nzambe akomisaki Biblia mpo bato ya bisika nyonso báyekola solo na ntina na ye. Babimisá bamiliare ya Babiblia. Babongoli yango na mobimba to ndambo na minɔkɔ koleka 2 100. Tokoki koloba ete moto nyonso akoki kotánga solo na ntina na Nzambe na monɔkɔ moko oyo balobaka na mboka na ye.

4. Biblia ezali koyebisa makambo nini?

4 Biblia ezali likabo moko ya motuya mingi oyo euti na Nzambe. Ezali kolimbola makambo oyo biso moko tokokaki koyeba ata moke te. Ezali kolobela bato oyo bazali na nzoto ya elimo. Ezali kolakisa makanisi ya Nzambe, bomoto na ye mpe mokano na ye. Ezali kolobela makambo oyo ye asalaki mpo na bato mpe makambo oyo bato basalelaki ye na boumeli ya bambula ebele mpenza. Ezali koyebisa makambo oyo ekosalama na mikolo ekoya. Ezali mpe komonisa ndenge oyo tokoki komona nzela ya bomoi ya seko.

Mpo na nini okoki kondima Biblia

5. Ndakisa nini emonisi ete Biblia ezali na makambo oyo siansi mpe endimi yango?

5 Ezali na makambo mingi oyo ezali kotinda biso tóndima ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe. Moko na yango ezali ete Biblia elobi makambo oyo siansi mpe endimi yango. Na ntango ya kala, bato ya mokili mobimba bazalaki kokanisa ete mabele efandi likoló na eloko moko. Na ndakisa, na Afrika ya Wɛsti, bato bazalaki kokanisa ete nyoka moko oyo elíngamálíngamá nde esimbaka mabele; elíngami mbala 3 500 likoló ya mabele mpe mbala 3 500 na nse na yango. Nzokande esili koleka mbula 3 500, mokomi moko ya Biblia akomaki maloba oyo siansi mpe endimi yango ete Nzambe “atii mabele likoló ya eloko moko te.”​—Yobo 26:7.

6. Likambo nini eleki monene emonisi mpenza ete Biblia euti na Nzambe?

6 Likambo eleki monene oyo emonisi mpenza ete Biblia euti na Nzambe ezali ndenge oyo ezali kolobela makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya mpe makambo yango ezali kosalema ndenge kaka Biblia elobaki. Na kokesana na bisakweli ya bato, Nzambe ayebi mpenza makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya mpe nyonso oyo ye alobaka esalemaka kaka ndenge alobaki.

7. Tángá mwa bisakweli ya Biblia oyo ekokisamaki na ntango ya kala.

7 Bisakweli mingi ya Biblia ekokisamaki na ntango ya kala. Na ndakisa, mbula 700 liboso Yesu abotama, Biblia elobaki solo ete akobotama na mboka Beteleme mpe yango esalemaki kaka bongo. (Mika 5:2; Matai 2:3-9) Mpo na kobakisa na ebele ya bisakweli oyo etali Yesu, Biblia esakolaki mpe lisusu ete mwana mwasi moko oyo ayebi mibali te nde akobota ye mpe na nsuka, bakokaba ye mpo na mbongo ya palata 30. Bisakweli wana nyonso ekokisamaki. Ya solo, ata moto moko te azalaki na likoki ya kosakola makambo oyo!​—Yisaya 7:14; Zekalia 11:12, 13; Matai 1:22, 23; 27:3-5.

8. Tángá mwa bisakweli ya Biblia oyo ezali kokokisama na ntango na biso mpe yango ezali komonisa nini?

8 Ebele ya bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na ntango na biso. Talá mwa ndambo na yango:

  • “Ekólo ekotombokela ekólo [na bitumba], mpe bokonzi ekotombokela bokonzi; mpe koningana minene ya mabele ekozala, mpe epai na epai bamaladi mabe mpe kozanga ya bilei ekozala.”​—Luka 21:10, 11.

  • “Botyoli-mibeko ekobakisama mingi.”​—Matai 24:12.

  • “Na mikolo ya nsuka . . . bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, . . . bato bazangi botosi epai ya baboti, . . . bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, . . . bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.”​—2 Timote 3:1-5.

Ondimi te ete makambo oyo ezali kosalema lelo oyo? Bosembo mpe bosolo ya bisakweli ya Biblia emonisi mpenza ete Biblia ekeseni na mikanda nyonso mosusu. Ezali Liloba ya Nzambe oyo epemami!​—2 Timote 3:16.

Biblia ebongwaná?

9, 10. Nini emonisi ete Nzambe apesaka bato nzela te ete bábongola mateya ya Biblia?

9 Kanisá ete ozali mokonzi ya kompani moko mpe otyeli bato na yo ya mosala mibeko na esika moko. Soki monguna na yo moko alongoli makambo oyo okomaki mpe atii oyo ya ye, okosala nini? Okobongisa makambo oyo abongolaki, boye te? Ndenge moko mpe Nzambe apesaka bato nzela te ete bábongola mateya ya solo ya Biblia, Liloba na ye.

10 Bato oyo bameká kobongola mateya ya Liloba ya Nzambe balongá ata moke te. Soki tomeki kokokanisa Biblia oyo tozali na yango lelo mpe Babiblia oyo ezalaki na ntango ya kala, tokomona ete ekokani mpenza. Yango ezali komonisa ete Biblia ebongwani te, atako bambula mingi esili koleka.