Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 6

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

1. Na kotalela Liloba ya Nzambe, tángá ndenge mibale ya mangomba oyo ezali na mokili.

YESU alobaki boye: “Bókɔta na ekuke ya nkaka; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Na kotalela Liloba ya Nzambe, mangomba ezali kaka ndenge mibale: moko ya solo mpe mosusu ya lokuta; moko ya malamu mpe mosusu ya mabe; moko ememaka na bomoi mpe mosusu ememaka na libebi.

2. Ndenge nini Makomami emonisi ete mangomba nyonso te nde esepelisaka Nzambe?

2 Bato mosusu bakanisaka ete mangomba nyonso esepelisaka Nzambe. Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi emonisi ete likanisi yango ezali lokuta:

  • “Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] lisusu, mpe basalelaki Babala mpe Asetaloti, banzambe ya Sulia mpe banzambe ya Sidona mpe banzambe ya Moaba mpe banzambe ya Baamona mpe banzambe ya Bafilisitia. Batikaki [Yehova] mpe basalelaki ye te. Nkanda ya [Yehova] epelelaki Yisalaele.” (Basambisi 10:6, 7) Soki tosambelaka bikeko to nzambe mosusu na esika ya Nzambe ya solo, Yehova akondima biso ata moke te.

  • “Bato ya ekólo oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, kasi mitema na bango etangwá mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo bazali koteya lokola mateya bakomandema ya bato.” (Malako 7:6, 7) Soki bato bazali koloba ete básambelaka Nzambe nzokande bazali koteya makanisi na bango moko na esika ya mateya ya Biblia, losambo na bango ezali mpamba. Nzambe azali kondima yango ata moke te.

  • “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Losambo na biso esengeli kolanda ndenge mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe esɛngi.

Mbuma ya mangomba ya lokuta

3. Ndenge nini tokoki koyeba lingomba ya solo mpe oyo ya lokuta?

3 Ndenge nini okoki koyeba soki lingomba boye to boye esepelisaka Nzambe to te? Yesu alobaki boye: “Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso oyo epɔlá ebotaka mbuma oyo ezangá ntina . . . Boye, ya solo mpenza, bokoyeba bato wana na bambuma na bango.” Na maloba mosusu, soki lingomba moko euti na Nzambe, ekobimisa makambo malamu, kasi soki lingomba euti na Satana, ekobimisa nde makambo mabe.​—Matai 7:15-20.

4. Ezaleli nini basambeli ya Yehova bamonisaka?

4 Lingomba ya solo ebimisaka bato oyo bazali na bolingo kati na bango mpe balingaka basusu. Ezali boye mpamba te Yehova ye moko azali Nzambe ya bolingo. Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” Mangomba bakokisaka etinda wana oyo emonisaka losambo ya solo?​—Yoane 13:35; Luka 10:27; 1 Yoane 4:8.

5. Ndenge nini mokanda moko elobeli likambo ya kotɛka bato moindo ya Afrika na boombo?

5 Talá naino likambo ya kotɛka bato moindo ya Afrika na boombo na mikili ya bapaya. Mokanda moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Kobanda na mobu 605 tii na 1905, bato ya Afrika soki milio 18 bakatisaki esobe ya Sahara mpe Océan indien mpo Lingomba ya Bamizilma etɛkaki bango na boombo na mikili ya bapaya. Na katikati ya ekeke ya 15, bato ya Mpoto babandaki kokende na bokula ya mai monene na wɛsti ya Afrika mpo na kokanga bato ya kotɛka bango baombo mpe na mobu 1867, bamemaki na masuwa bato ya Afrika soki milio 7 to mpe milio 10 mpo na kotɛka bango baombo na Amerika.”

6. Ndenge nini mangomba emikɔtisaki na likambo ya kotɛka bato ya Afrika na boombo?

6 Mangomba esalaki nini na ntango wana ya mobulu na Afrika, ntango oyo bazalaki kozwa mibali, basi na bana na bandako mpe na mabota na bango mpo na kokanga bango minyɔlɔlɔ, kotya bango elembo na ebende ya mɔtɔ, kosomba bango mpe kotɛka bango lokola banyama? Bethwell Ogot akomi boye na zulunalo Daily Nation ya Nairobi, na Kenya: “Ezala mangomba ya boklisto to Lingomba ya Bamizilma, bango nyonso bateyaka ete bato basengeli kozala na bomoko, nzokande bango nde babandisaki makambo ya boombo na mokili, esika makanisi ya kokabola mposo etondi. . . . Tosengeli kondima ete Lingomba ya Bamizilma na mangomba ya boklisto, mikili ya Mpoto na ya Moyen-Orient ezali na ngambo na ndenge bakangaki miso na likambo yango oyo enyokoli mpenza bato ya Afrika na boumeli ya bikeke mingi.”

Mangomba emikɔtisi na makambo ya bitumba

7. Bakonzi ya mangomba basalaki nini na bitumba?

7 Ezali mpe na ndenge mosusu oyo mangomba ya lokuta emonisi mbuma mabe na yango. Na ndakisa, atako Biblia elobi ete ‘lingá mozalani na yo,’ bakonzi ya mangomba na mokili mobimba bakɔtaki na makambo ya bitumba mpe bazalaki kolendisa mpenza bato ete bábundaka.​—Matai 22:39.

Mangomba ya lokuta emikɔtisi na bitumba mpe na likambo ya kotɛka bato ya Afrika na boombo

8. (a) Ndenge nini bakonzi ya mangomba balendisaki bato na kobomana na bitumba na Afrika? (b) Pastɛrɛ moko alobaki nini mpo na bakonzi ya mangomba na etumba ya bana-mboka na Nigeria?

8 Eyebani malamu ete na mobu 1994, bamamelo na basango mosusu bazalaki na kati ya bato oyo babomanaki na ndenge ya nsɔmɔ na Rwanda. Mangomba esalaki mpe makambo mingi na bitumba mosusu oyo ebimaki na Afrika. Na ndakisa, na bitumba ya bana-mboka oyo ebomaki bato mingi na Nigeria, mangomba ezalaki kolendisa bato na ngámbo nyonso mibale ete bábunda. Ntango bitumba ezalaki se kotɔka, pastɛrɛ moko alobaki ete bakonzi ya mangomba “batiki mosala oyo Nzambe apesi bango.” Alobaki mpe lisusu boye: “Biso bato tomibengaka baministre ya Nzambe, tokómi nde baministre ya Satana.”

9. Biblia elobi nini mpo na baministre ya Satana?

9 Biblia mpe elobi likambo ya ndenge wana mpenza na maloba oyo: “Satana ye moko azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki baministre na ye mpe bazali kokoba komibimisa lokola baministre ya boyengebene.” (2 Kol. 11:14, 15) Ndenge moko na bato mingi ya mabe oyo balobaka ete bazali bato malamu, Satana azali kokosa bato na nzela ya baministre na ye oyo bazali komimonisa lokola bato ya boyengebene, nzokande misala mpe mbuma na bango ezali mabe.

10. Ndenge nini bakonzi ya mangomba bawangani Nzambe?

10 Na mokili mobimba, bakonzi ya mangomba bazali koteya bolingo, kimya, bolamu, kasi bango moko bazali nde koyina, kobunda mpe bazali kotyola mibeko ya Nzambe. Biblia mpe emonisi yango polele na maloba oyo: “Balobaka polele ete bayebi Nzambe, kasi bazali kowangana ye na misala na bango.”​—Tito 1:16.

Bimá na “Babilone Monene”

11. Ndenge nini Biblia emonisi mangomba ya lokuta?

11 Tokoki komona ndenge Yehova atalelaka mangomba ya lokuta soki totángi Biblia na mokanda ya Emoniseli. Kuna, emonisi mangomba ya lokuta lokola mwasi moko ya elilingi, Babilone Monene. (Emoniseli 17:5) Talá oyo Nzambe alobi mpo na ye:

  • “Mwasi ya ndumba monene . . . oyo elongo na ye bakonzi ya mabele basalaki pite.” (Emoniseli 17:1, 2) Na esika ya kozala sembo epai ya Nzambe, mangomba ya lokuta emikɔtisi na makambo ya politiki, mbala mingi, bayebisaka baguvɛrnema básala boye to boye.

  • “Na kati na ye makila ya basakoli mpe ya basantu mpe ya baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki.” (Emoniseli 18:24) Mangomba ya lokuta enyokoli mpe ebomi basaleli ya sembo ya Nzambe mpe ebomisi bamilio ya bato na bitumba.

  • “Amikumisaki mpe afandaki na bomɛngo ya biloko kitoko ya lofundo.” (Emoniseli 18:7) Mangomba ya lokuta ezali na bozwi mingi, oyo bakonzi na yango basalelaka mpo na kozala na bomɛngo mingi.

  • “Na misala na [ye] ya bilimo mabe bikólo nyonso bibungisamaki nzela.” (Emoniseli 18:23) Na mateya na bango ya lokuta ete molimo ekufaka te, mangomba ya lokuta epesi nzela na misala ya bilimo mabe mpe ya bondɔki, mpe etindi bato bábangaka bato oyo bakufá mpe básambelaka bankɔkɔ.

12. Likebisi nini Biblia epesi mpo na mangomba ya lokuta?

12 Biblia elobi boye mpo na kokebisa bato ete bákabwana na mangomba ya lokuta: “Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.”​—Emoniseli 18:4, 5.

13. Nini ekokómela mangomba ya lokuta mpe bato oyo bazali na kati na yango?

13 Mosika te Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, ekobebisama nyɛɛ. Biblia elobi boye: “Na mokolo kaka moko malɔzi na ye ekoya, liwa mpe mawa mpe nzala, mpe akozikisama na mɔtɔ nyɛɛ, mpamba te Yehova Nzambe, oyo asambisi ye, azali makasi.” (Emoniseli 18:8) Mpo na kokima ete tózwa ndambo ya malɔzi na ye te, tosengeli kokata boyokani nyonso na mangomba ya lokuta; tosengeli komikɔtisa ata moke te na misala na yango, milulu na yango mpe bindimeli na yango mpo ezali kosepelisa Nzambe te. Tosengeli koumisa likambo yango te. Ezali likambo etali bomoi na biso!​—2 Bakolinti 6:14-18.