Programɛ ya Liyangani ya etúká 2017

Talá programɛ ya mokolo mokomoko ya liyangani oyo, ekosalisa yo okoba kosala oyo ezali malamu mpe koyika mpiko na mikakatano.

Mokolo ya mitano

Nini ekoki kosalisa bakristo bámonisa bizaleli oyo esengeli mpo na koyikela mikakatano mpiko?

Mokolo ya pɔsɔ

Ndenge nini Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesaka biso ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi?

Mokolo ya lomingo

Yesu alobaki: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” Okoki kosala nini mpo na kolanda maloba na ye?

Mayebisi mpo na bayangani

Mbala mosusu okosepela kokɔta makita ya sipesiale oyo ekosalema na ntango ya mayangani. Longola yango, talá soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali bayambi-bato, batisimo, makabo, mwa lisungi ya nkisi, biloko oyo ebungaki mpe emonani, bisika ya kofanda, to bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko.