Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 10

Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehovah?

Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehovah?

Osí okendá na makita ya Batatoli ya Yehova? Soki okendá naino te, mbala mosusu kokende kuna mpo na mbala ya liboso ebangisaka yo. Okoki komituna: ‘Nini esalemaka na makita yango? Mpo na nini ezali na ntina? Mpo na nini nasengeli kokende?’ Na liteya oyo, okomona ete kokende makita ekoki kosalisa yo okóma moninga ya Nzambe. Okomona mpe ndenge ekoki kosalisa yo na bomoi na yo.

1. Wapi ntina ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova basalaka makita?

Mokomi moko ya Biblia amonisaki ntina ya libosoliboso ya koyangana na basusu. Akomaki: “Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, nakopambola Yehova.” (Nzembo 26:12) Ndenge moko mpe, Batatoli ya Yehova basepelaka mingi koyangana elongo. Na mokili mobimba, basalaka makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kokumisa Nzambe, koyembela ye, mpe kobondela ye. Basalaka mpe mayangani ya minene mpo na losambo mbula na mbula.

2. Okoyekola nini na makita na biso?

Na makita, toyekolaka Liloba ya Nzambe, ‘tomonisaka yango polelepolele, mpe tolimbolaka yango.’ (Tángá Nehemia 8:8.) Soki oyei na makita, okoyekola makambo etali Yehova mpe bizaleli na ye ya kitoko. Ntango okoyeba makambo mingi oyo emonisi ete Yehova alingaka yo mingi, yo mpe okokóma kolinga ye mingi. Okoyeba mpe ete akoki kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu.​—Yisaya 48:17, 18.

3. Na ndenge nini bato oyo okokutana na bango na makita bakoki kosalisa yo?

Yehova alingi ete “tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.” (Baebre 10:24, 25) Na makita na biso, okokutana na bato oyo balinganaka mpenza mpe oyo lokola yo, balingaka koyeba makambo mingi etali Nzambe. Okomona ndenge balobelaka makambo ya kolendisa oyo euti na Biblia. (Tángá Baroma 1:11, 12.) Okoyebana mpe na bato mosusu, ezala baoyo babalá to baoyo babalá te, oyo bazali na esengo atako bazali na mikakatano. Oyo ezali kaka mwa makambo oyo emonisi ntina oyo Yehova alingi ete tókendaka makita nyonso!

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo oyo esalemaka na makita ya Batatoli ya Yehova mpe bolamu oyo okozwa soki osali makasi ya kokende makita yango.

4. Makita ya Batatoli ya Yehova

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na kosambela Yehova. (Baroma 16:3-5) Tángá Bakolose 3:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosambela Yehova?

Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova bayanganaka mbala na mbala na bisika na bango ya losambo. Mpo na koyeba makambo oyo esalemaka na makita yango, talá VIDEO. Na nsima, talá fɔtɔ oyo emonisi makita ya lisangá mpe yanolá na mituna oyo elandi.

  • Makambo oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi mpe makambo oyo otángi na Bakolose 3:16, ekokani na nini?

  • Na video to na fɔtɔ, omoni makambo mosusu oyo esalemaka na makita oyo esepelisi yo?

Tángá 2 Bakorinti 9:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basɛngaka mbongo te na makita na bango?

Moto oyo azali koyekola na yo Biblia ayebisa yo na mokuse makambo oyo ekosalema na makita oyo ekolanda.

  • Makambo nini oyo bakolobela na makita esepelisi yo mingi mpe ekosalisa yo?

Oyebaki yango?

Na jw.org, okoki komona bisika mpe ngonga oyo makita esalemaka na mokili mobimba.

  1. Na makita na biso basalaka badiskur, bilakiseli, mpe balakisaka bavideo. Makita ebandaka mpe esukaka na loyembo mpe libondeli

  2. Na biteni mosusu ya makita bato bapesaka biyano

  3. Bato nyonso bakoki koya, ezala mabota, bato oyo babalá to te, mibange mpe bana

  4. Kokɔta na makita na biso ezalaka ofele. Batatoli ya Yehova bakongolaka mabonza te

5. Osengeli kosala makasi mpo na kokende makita

Tózwa ndakisa ya libota ya Yesu. Mpo na koyangana na makita oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, bazalaki kotambola bakilomɛtrɛ soki 100 longwa na Nazarete tii na Yerusaleme na nzela ya bangombangomba. Tángá Luka 2:39-42, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: Basengelaki kosala makasi mpo na kosala mobembo yango?

  • Mpo na nini mbala mosusu osengeli kosala makasi mpo na kokende makita?

  • Okanisi ete ezali na ntina? Mpo na nini?

Biblia elobi ete koyangana elongo mpo na kosambela Yehova ezali na ntina mingi. Tángá Baebre 10:24, 25, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini tosengeli koyangana na makita nyonso?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ezali na ntina te koyangana na bato mosusu. Okoki na yo kaka kotánga Biblia yo moko na ndako.”

  • Vɛrsɛ to ndakisa nini ya Biblia emonisi makambo oyo Yehova alingi tósala?

NA MOKUSE

Koyangana na makita ekosalisa yo oyekola makambo mingi etali Yehova, okómisa boninga na yo ná ye makasi, mpe osambela ye elongo na basusu.

Bozongeli

  • Mpo na nini Yehova asɛngi biso tóyanganaka elongo?

  • Makambo nini okoyekola na makita ya Batatoli ya Yehova?

  • Okanisi nini: Makita ekoki kosalisa yo na makambo nini mosusu?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Bongo soki ozali kobanga koyangana na makita? Talá ndenge moto moko oyo azalaki kobanga kokende makita akómaki kolinga yango.

Tokobosana te ndenge bayambaki biso (4:16)

Talá ndenge elenge moko asepelaki na makita mpe oyo asalaki mpo azangaka makita te.

Nakómaki kosepela mingi na makita (4:33)

Talá ndenge moto moko ya mobulu abongolaki bomoi na ye nsima ya kokende makita ya Batatoli ya Yehova.

“Nazalaki komema mondoki na ngai esika nyonso” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2014)