Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 3 Bozongeli

Eteni 3 Bozongeli

Bótalela mituna oyo elongo na moteyi na yo:

  1. Tángá Masese 27:11.

    • Mpo na nini osengeli kozala sembo epai ya Yehova?

      (Talá Liteya 34.)

  2. Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu na makambo oyo Biblia epesi mobeko ya polele te?

    (Talá Liteya 35.)

  3. Ndenge nini okoki kozala sembo na makambo nyonso?

    (Talá Liteya 36.)

  4. Tángá Matai 6:33.

    • Ndenge nini okoki kokoba “koluka liboso bokonzi” na likambo etali mosala mpe mbongo?

      (Talá Liteya 37.)

  5. Ndenge nini okoki komonisa ete ozwaka bomoi na valɛrɛ ndenge oyo Yehova azwaka yango?

    (Talá Liteya 38.)

  6. Tángá Misala 15:29.

    • Ndenge nini okoki kotosa mobeko ya Yehova na likambo etali makila?

    • Okanisi ete makambo oyo asɛngi biso ebongi mpenza?

      (Talá Liteya 39.)

  7. Tángá 2 Bakorinti 7:1.

    • Kozala pɛto na nzoto, na bizaleli mpe na makanisi elakisi nini?

      (Talá Liteya 40.)

  8. Tángá 1 Bakorinti 6:9, 10.

    • Ndenge nini Biblia etalelaka likambo ya kosangisa nzoto? Ondimi yango?

    • Toli nini Biblia epesi na likambo etali masanga?

      (Talá Liteya 41 mpe 43.)

  9. Tángá Matai 19:4-6, 9.

    • Mobeko ya Nzambe ezali nini mpo na libala?

    • Mpo na nini mabala esengeli kokomisama na buku ya Leta? Mpo na nini bato oyo balingi koboma libala basengeli kokende liboso ya Leta?

      (Talá Liteya 42.)

  10. Bafeti mpe milulu nini esepelisaka Yehova te, mpe mpo na nini?

    (Talá Liteya 44.)

  11. Tángá Yoane 17:16 mpe Misala 5:29.

    • Ndenge nini okoki kokɔta te na makambo ya mokili?

    • Soki mobeko ya bato eyokani te na mobeko ya Nzambe, okosala nini?

      (Talá Liteya 45.)

  12. Tángá Marko 12:30.

    • Ndenge nini okoki komonisa ete olingaka Yehova?

      (Talá Liteya 46 mpe 47.)