Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 35

Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu

Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu

Biso nyonso tozwaka bikateli. Mingi ya bikateli yango ekoki komemela biso bolamu to mpasi. Ekoki mpe kobongisa to kobebisa boninga na biso ná Yehova. Na ndakisa, tokoki kopona esika oyo tokofanda, mosala oyo tokosala mpo na kozwa mwa mbongo, mpe soki tokobala to te. Soki tozali kozwa bikateli ya malamu, tokozala na esengo mpe tokosepelisa Yehova.

1. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu?

Liboso ya kozwa ekateli moko, bondelá Yehova asalisa yo mpe tángá Biblia mpo na komona ndenge atalelaka likambo yango. (Tángá Masese 2:3-6.) Na makambo mosusu, Yehova apesi mobeko ya polele. Soki ezali bongo, ekozala mpenza malamu otosa.

Bongo soki Biblia epesi mobeko moko ya polele te mpo na oyo osengeli kosala? Yehova akotambwisa yo kaka “na nzela oyo osengeli kotambola.” (Yisaya 48:17) Na ndenge nini? Biblia ezali na mitinda ebele oyo ekoki kosalisa yo. Mitinda ya Biblia ezali mateya ya moboko oyo emonisaka makanisi ya Nzambe mpe ndenge oyo atalelaka makambo. Mbala mingi toyebaka ndenge Nzambe atalelaka likambo moko ntango totángi lisolo moko na Biblia. Ntango tomoni ndenge oyo Yehova atalelaka makambo, tokozwa bikateli oyo ekosepelisa ye.

2. Makambo nini osengeli kotalela liboso ya kozwa ekateli?

Biblia elobi ete: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Yango elingi koloba ete liboso ya kozwa ekateli, tosengeli kokanisa malamu. Ntango ozali kotalela likambo mokomoko, omituna boye: ‘Mitinda nini ya Biblia nakoki kosalela? Ekateli nini ekopesa ngai kimya ya motema? Ekateli oyo nakozwa ekosala basusu nini? Oyo eleki ntina, ekateli yango ekosepelisa Yehova?’​​—Kolimbola Mibeko 32:29.

Yehova nde asengeli koyebisa biso oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Soki toyebi malamu mibeko mpe mitinda na ye, mpe tozwi ekateli ya kotosa yango tokozala na lisosoli ya malamu. Lisosoli ezali mongongo moko na kati na biso oyo eyebisaka biso oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Baroma 2:14, 15) Lisosoli oyo eteyami ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge mitinda ya Biblia mpe lisosoli esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu.

3. Salelá makambo oyo Biblia elobi

Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo ntango ozali kozwa bikateli? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Bonsomi ya kopona ezali nini?

  • Mpo na nini Yehova apesá biso bonsomi ya kopona?

  • Yehova apesá biso nini mpo tózwaka bikateli ya malamu mpenza?

Tángá Baefese 5:15, 16 mpo na komona etinda moko ya Biblia. Mpe na nsima lobelá ndenge okoki ‘komisombela ntango oyo ebongi’ mpo na . . .

  • kotánga Biblia mbala na mbala.

  • kokóma molongani ya malamu, moboti ya malamu, to mwana ya malamu.

  • koyanganaka na makita ya lisangá.

4. Teyá lisosoli na yo mpo ozwaka bikateli ya malamu

Ezalaka mpasi te kozwa ekateli na likambo moko ntango Biblia epesi mobeko ya polele. Bongo soki mobeko ya polele ezali te? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Na video yango, ndeko mwasi asali nini mpo na koteya lisosoli na ye mpe mpo na kozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova?

Mpo na nini tosengeli te kosɛnga basusu bázwa bikateli na esika na biso? Tángá Baebre 5:14, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Atako ekoki kozala pɛtɛɛ kosɛnga basusu bázwa ekateli na esika na biso, biso moko tosengeli kozala na likoki ya kokesenisa nini?

  • Nini ekoki kosalisa yo oteya lisosoli na yo mpo ozwaka bikateli ya malamu?

Lisosoli na biso ezali lokola karte oyo elakisaka biso nzela

5. Tosá lisosoli ya basusu

Bato nyonso bazwaka bikateli ndenge moko te. Ndenge nini tokoki komonisa ete totosaka lisosoli ya basusu? Tózwa bandakisa mibale:

Ndakisa 1: Ndeko mwasi moko oyo alingaka kosala monzɛlɛ makasi akei na lisangá oyo bandeko basi mingi babɛtaka libaku soki bamoni ndeko mwasi asali monzɛlɛ ya bongo.

Tángá Baroma 15:1 mpe 1 Bakorinti 10:23, 24, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela bavɛrsɛ yango, ndeko mwasi yango akoki kozwa ekateli nini? Okosala nini soki ozali ná moto moko oyo lisosoli na ye epekisi ye kosala likambo oyo lisosoli na yo epekisi yo te?

Ndakisa 2: Ndeko mobali moko ayebi ete Biblia epekisi te komɛla masanga, kasi ye amɛlaka na ye masanga te. Babengisi ye na fɛti to esika moko oyo bandeko mosusu bazali komɛla masanga.

Tángá Mosakoli 7:16 mpe Baroma 14:1, 10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela bavɛrsɛ yango, ndeko mobali yango akoki kozwa ekateli nini? Okosala nini soki omoni moto azali kosala makambo oyo lisosoli na yo epekisi yo?

 Makambo oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu

1. Sɛngá Yehova asalisa yo oyeba oyo okosala.​​—Yakobo 1:5.

2. Salá bolukiluki na Biblia mpe na mikanda na biso mpo na koyeba mitinda oyo okosalela. Okoki mpe kosolola na ndeko moko oyo akɔmɛli na elimo.

3. Talá soki ekateli yango ekobɛtisa lisosoli na yo mpe ya basusu libaku to te.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Osengeli kosala nyonso oyo olingi. Kokipe bato mosusu te!”

  • Mpo na nini tosengeli kotalela ndenge oyo Yehova ná bato mosusu bakoyoka?

NA MOKUSE

Tokozwa bikateli ya malamu soki toluki koyeba ndenge oyo Yehova atalelaka likambo moko mpe soki bikateli yango ekosalisa basusu to ekopesa bango mpasi.

Bozongeli

  • Okoki kosala nini mpo na kozwa bikateli oyo esepelisaka Yehova?

  • Ndenge nini okoki koteya lisosoli na yo?

  • Ndenge nini okoki komonisa ete otosaka lisosoli ya basusu?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Okoki kosala nini mpo na kozwa bikateli oyo ekokómisa boninga na yo ná Yehova makasi?

“Bikateli na yo ekumisa Nzambe” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2011)

Luká koyeba makambo mingi mpo na ndenge oyo Yehova apesaka biso toli.

Yehova akambaka basaleli na ye (9:50)

Luká koyeba makambo oyo esalisaki mobali moko azwa ekateli moko ya monene.

Yehova alaki kopesa nyonso oyo ezali malamu (5:46)

Luká koyeba ndenge oyo okosepelisa Yehova ntango apesi mobeko moko ya polele te na likambo moko boye.

“Osengeli kaka komona naino mobeko ya Biblia?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2003)