Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 44

Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?

Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?

Yehova alingi ete tósepelaka mpe tósalaka fɛti na bantango mosusu. Kasi bafɛti mpe milulu nyonso esepelisaka ye? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova na likambo yango?

1. Mpo na nini bafɛti mingi esepelisaka Yehova te?

Mbala mosusu okokamwa soki oyebi ete bafɛti mingi euti na mateya ya bapakano to na mangomba ya lokuta. Bafɛti mosusu ya ndenge wana eyokani na misala ya bilimo mabe to na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Bafɛti mosusu mpe eutá na biyambayamba (superstition). Bato basalaka mpe bafɛti mosusu mpo bakanisa ete likambo moko ya mabe ekokómela bango soki basali yango te. Yehova ayebisi basaleli na ye ete: “Bókabwana . . . mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.”​—2 Bakorinti 6:17. a

2. Ndenge nini Yehova atalelaka bafɛti oyo epesaka bato lokumu oyo babongi na yango te?

Yehova apekisi biso “kotyela moto ya mabele motema.” (Tángá Yirimia 17:5.) Bafɛti mosusu ekumisaka bakonzi to basoda. Mosusu ekumisaka bilembo ya ekólo to lipanda. (1 Yoane 5:21) Bafɛti mosusu mpe epesaka mabɔkɔ na ebongiseli ya politiki to na bibongiseli ya ekólo. Yehova ayokaka ndenge nini soki tozali kopesa moto to ebongiseli moko lokumu oyo babongi na yango te, mingimingi soki basalaka makambo oyo eyokani te na mokano na ye?

3. Makambo nini ekoki komonisa ete fɛti moko ezali mabe na miso ya Yehova?

Biblia epekisi biso “kolekisa ndelo na vinyo, bafɛti ya lokoso, [mpe] komɛla mingi.” (1 Petro 4:3) Na bafɛti mosusu bato bazangaka komipekisa mpe basalaka makambo ya mbindo. Soki tolingi kotikala baninga ya Yehova, tosengeli koboya makambo ya mbindo ya ndenge wana.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo ozwa bikateli ya malamu oyo ekosepelisa Yehova na likambo etali bafɛti mpe milulu.

4. Boyá bafɛti mpe milulu oyo epesaka Yehova lokumu te

Tángá Baefese 5:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Makambo nini tosengeli kotalela liboso ya kosala fɛti moko?

  • Bafɛti nini esalemaka na esika oyo ofandi?

  • Okanisi nini: Bafɛti yango esepelisaka Yehova?

Na ndakisa, osilá komituna ndenge oyo Yehova atalelaka bafɛti ya mbotama? Biblia elobi ata esika moko te ete basaleli ya Yehova bazalaki kosala bafɛti ya mbotama, kasi elobeli bafɛti ya mbotama mibale ya bato oyo bazalaki kosambela Yehova te. Tángá Ebandeli 40:20-22 mpe Matai 14:6-10. Mpe na nsima, yanolá na mituna oyo:

  • Makambo nini esalemaki na bafɛti yango nyonso mibale?

  • Okanisi nini: Na kotalela bavɛrsɛ yango, Yehova akanisaka nini mpo na bafɛti ya mbotama?

Mbala mosusu okoki komituna: ‘Soki nasangani na molulu ya fɛti ya mbotama to na bafɛti mosusu oyo Biblia epekisi, yango ezali mpenza mabe na miso ya Yehova?’ Tángá Kobima 32:1-8. Na nsima, talá VIDEO mpe yanolá na mituna oyo elandi.

  • Mpo na nini tosengeli koluka koyeba bafɛti oyo esepelisaka Yehova?

  • Ndenge nini tokoki kosala yango?

Ndenge oyo tokoki koyeba fɛti oyo esepelisaka Nzambe te

  • Euti na Biblia te? Mpo na koyeba yango, luká esika oyo yango euti.

  • Ezali kopesa bato mpe bibongiseli lokumu oyo ebongi te, to ezali kokumisa bilembo ya ekólo? Topesaka Yehova lokumu koleka moto to eloko mosusu nyonso mpe totyaka motema ete ye nde akosilisa bampasi nyonso ya mokili.

  • Mimeseno mpe makambo oyo esalemaka na fɛti yango, eyokani te na oyo Biblia elobi? Tosengeli kotikala pɛto na makanisi mpe na bizaleli.

5. Salisá bato mosusu bátyola te mateya oyo ondimaka

Ekoki kozala mpasi oboya ntango basusu batye yo mbamba mpo osala fɛti oyo esepelisaka Yehova te. Zalá na motema molai ntango ozali koyebisa bango ntina oyo ozwi ekateli wana mpe salá yango na mayele. Mpo na komona ndenge okoki kosala yango, talá VIDEO.

Tángá Matai 7:12, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela vɛrsɛ oyo, osengeli kopekisa bandeko ya libota na yo oyo basambelaka Yehova te kosala fɛti moko boye?

  • Okoki kosala nini mpo na komonisa bato ya libota na yo ete atako okosala fɛti wana na bango te, olingaka bango mpe ozwaka bango na valɛrɛ mingi?

6. Yehova alingi ete tózala na esengo

Yehova alingi ete tólekisaka ntango malamu ná libota mpe baninga na biso. Tángá Mosakoli 8:15, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini vɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova alingi tózala na esengo?

Yehova alingi ete bato oyo basambelaka ye básepelaka mpe bálekisaka ntango ya malamu elongo. Talá VIDEO mpo na komona ndenge yango emonisami polele na mayangani na biso oyo esangisaka mikili mingi.

Tángá Bagalatia 6:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na kosalela bato “oyo ezali malamu,” tosengeli kosala bafɛti oyo bato mingi basalaka?

  • Nini ekopesa yo esengo: kokabela moto kaka mpo na fɛti moko boye to kokabela ye mpo olingi kosala yango?

  • Na bantango mosusu, Batatoli ya Yehova mingi basalelaka bana na bango fɛti mpe bapesaka bango bakado. Soki ozali na bana, makambo nini ya ntina okoki kosala mpo na bango?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Koluka koyeba esika fɛti euti ezali na yango na ntina te. Eloko eleki ntina ezali kaka kolekisa ntango elongo na libota mpe baninga.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Yehova alingi tólekisaka ntango elongo na libota mpe baninga. Kasi alingi mpe ete tóboya bafɛti oyo esepelisaka ye te.

Bozongeli

  • Mituna nini tokoki komituna mpo na koyeba soki fɛti moko esepelisaka Yehova to te?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa libota mpe baninga na biso báyeba ntina oyo toboyaka kosala fɛti moko?

  • Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi tózala na esengo mpe tósepelaka?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá makambo minei oyo etindi biso tóndima ete fɛti ya mbotama esepelisaka Nzambe te.

“Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya mbotama te?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá oyo elenge moko asalaki ntango bazalaki kotyola ye na eteyelo mpo aboyaki kosala fɛti ya Noele.

Asalaki na mayele ntango bazalaki kotyola ye (2:04)

Bamilio ya bakristo basalaka fɛti ya Noele te. Bayokaka ndenge nini mpo na yango?

“Bazwi eloko moko ya malamu koleka” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2012)

a Talá Maloba na nsuka ya lisolo 5 mpo na koyeba oyo okoki kosala ntango basusu bazali kosala fɛti to molulu moko boye.