Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LESSON 47

Okoki mpenza mpo na kozwa batisimo?

Okoki mpenza mpo na kozwa batisimo?

Na boyekoli na yo ya Biblia, oyekoli makambo mingi etali Yehova. Na ntembe te, osali bambongwana mpo na kosalela makambo oyo oyekoli. Kasi, ekoki kozala na eloko moko oyo ezali kopekisa yo omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Na liteya oyo, tokotalela mwa makambo oyo epekisaka bato mingi kozwa batisimo mpe ndenge oyo okoki kolonga yango.

1. Osengeli koyeba makambo nyonso oyo Biblia eteyaka liboso ya kozwa batisimo?

Liboso ya kozwa batisimo, osengeli kozala na “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yango elingi koloba te ete liboso ya kozwa batisimo osengeli koyeba makambo nyonso oyo ezali na Biblia. Ata bakristo oyo bazwá batisimo kala bakobaka kaka koyekola. (Bakolose 1:9, 10) Kasi, osengeli koyeba malamu mateya ya ebandeli ya Biblia. Bankulutu ya lisangá bakosalisa yo oyeba soki ozali na boyebi oyo esengeli.

2. Makambo nini osengeli kosala liboso ya kozwa batisimo?

Liboso ya kozwa batisimo, osengeli ‘kobongola motema mpe kobongwana.’ (Tángá Misala 3:19.) Yango elakisi koyoka mawa makasi mpo na mabe oyo osalaki kala mpe kosɛnga Yehova alimbisa yo. Osengeli mpe kozwa ekateli ya koboya makambo ya mabe mpe kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. Lisusu, osengeli koyanganaka na makita ya lisangá mpe kosakolaka elongo na bandeko ya lisangá.

3. Mpo na nini osengeli te kotika kobanga ezongisa yo nsima?

Bato mosusu babangaka ete bakokoka kosala te makambo oyo balaki Yehova. Ezali solo ete na bantango mosusu okobanda kosala mabunga, ndenge kaka basi mpe mibali ya sembo oyo Biblia elobeli basalaki. Kasi Yehova asɛngaka te ete basaleli na ye bázala bato ya kokoka. (Tángá Nzembo 103:13, 14.) Asepelaka ntango ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kosepelisa ye! Akosalisa yo. Kutu, Yehova alaki biso ete eloko moko te ekokoka “kokabola biso na bolingo [na ye].”​—Tángá Baroma 8:38, 39.

KƆTÁ NA MOZINDO

Talá ndenge koyeba Yehova malamu mpe kondima lisalisi na ye ekoki kosalisa yo olonga makambo nyonso oyo ekoki kopekisa yo kozwa batisimo.

4. Yebá Yehova malamumalamu

Osengeli koyeba makambo nini oyo etali Yehova liboso ya kozwa batisimo? Osengeli koyeba Yehova na ndenge oyo ekotinda yo olinga ye mpe osepelisa ye. Talá VIDEO mpo na komona ndenge bayekoli ya Biblia na mokili mobimba basalaka yango. Mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Na video yango, nini esalisaki bandeko mosusu bákoka kozwa batisimo?

Tángá Baroma 12:2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ozali na mwa bantembe na makambo oyo ozali koyekola na Biblia to ondimaka te ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo?

  • Soki ezali bongo, okoki kosala nini?

5. Longá makambo oyo ekoki kopekisa yo kozwa batisimo

Moto nyonso akutanaka na mikakatano ntango azwi ekateli ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Mpo na komona ndakisa moko, talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, mikakatano nini Narangerel asengelaki kolonga mpo asalela Yehova?

  • Ndenge nini bolingo na ye mpo na Yehova esalisaki ye alonga mikakatano wana?

Tángá Masese 29:25 mpe 2 Timote 1:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini epesaka biso mpiko ya kolonga mikakatano?

6. Tyá motema ete Yehova akosalisa yo

Yehova akosalisa yo osepelisa ye. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, nini ezalaki kopekisa moyekoli ya Biblia wana azwa batisimo?

  • Makambo nini ayekolaki oyo esalisaki ye akómisa kondima na ye makasi epai ya Yehova?

Tángá Yisaya 41:10, 13, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini osengeli kondima ete okokokisa makambo oyo olaki Yehova ntango omipesi na ye na libondeli?

7. Kómá na botɔndi mingi mpo na ndenge Yehova alingaka yo

Ntango ozali kokanisa bonene ya bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na yo, okozala na botɔndi mingi mpe okolinga kosalela ye libela na libela. Tángá Nzembo 40:5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mapamboli nini ya Yehova osepelaka na yango mingi?

Mosakoli Yirimia alingaki Yehova mpe liloba na ye. Azalaki mpe na botɔndi mingi mpo na lokumu oyo azalaki na yango ya komema nkombo ya Yehova. Alobaki boye: “Liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe.” (Yirimia 15:16) Yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini kozala Motatoli ya Yehova ezali lokumu monene?

  • Olingi kozwa batisimo mpo okóma Motatoli ya Yehova?

  • Eloko moko ezali kopekisa yo osala yango?

  • Okanisi nini: Osengeli kosala nini mpo ozwa batisimo?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nazali kobanga kozwa batisimo, mpo nakokoka kosala te makambo nyonso oyo nakolaka Yehova.”

  • Ozali mpe komiyoka bongo?

NA MOKUSE

Na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga mokakatano nyonso oyo ekoki kopekisa yo ozwa batisimo.

Bozongeli

  • Boyebi ya ndenge nini ya Biblia osengeli kozala na yango liboso ozwa batisimo?

  • Mbongwana nini osengeli mbala mosusu kosala liboso ya kozwa batisimo?

  • Mpo na nini osengeli kotika te kobanga ezongisa yo nsima?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá makambo oyo esengeli kotinda yo ozwa ekateli ya kozwa batisimo.

“Okoki mpo na kozwa batisimo?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2020)

Talá oyo okoki kosala mpo na kolonga mikakatano oyo ekoki kopekisa yo kozwa batisimo.

“Nini ezali kopekisa ngai nazwa batisimo?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 03/2019)

Talá ndenge mobali moko alongaki mikakatano ya makasi mpo azwa batisimo.

‘Mpo na nini ozali kopusa batisimo’ (1:10)

Liboso, mobali moko na nkombo Ataa abandaki kobanga kozwa batisimo. Talá makambo oyo etindaki ye azwa batisimo.

Nabongi mpenza na yango? (7:21)