Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 4 Bozongeli

Eteni 4 Bozongeli

Bótalela mituna oyo elongo na moteyi na yo:

  1. Tángá Masese 13:20.

    • Mpo na nini ezali na ntina kopona baninga malamu?

      (Talá Liteya 48.)

  2. Toli nini ya Biblia ekoki kosalisa yo soki ozali . . .

    • mobali to mwasi ya libala?

    • moboti to mwana?

      (Talá Liteya 49 mpe 50.)

  3. Maloba ya ndenge nini esepelisaka Yehova? Maloba ya ndenge nini esepelisaka ye te?

    (Talá Liteya 51.)

  4. Mitinda nini ya Biblia ekosalisa yo opona malamu molato mpe monzɛlɛ na yo?

    (Talá Liteya 52.)

  5. Ndenge nini okoki kopona kominanola oyo ekosepelisa Yehova?

    (Talá Liteya 53.)

  6. Tángá Matai 24:45-47.

    • “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali nani?

      (Talá Liteya 54.)

  7. Ndenge nini okoki kosalela ntango, makasi mpe biloko na yo mpo na kosalisa lisangá?

    (Talá Liteya 55.)

  8. Tángá Nzembo 133:1.

    • Ndenge nini okoki kobatela bomoko ya lisangá?

      (Talá Liteya 56.)

  9. Ndenge nini Yehova asalisaka biso ntango tosali lisumu ya monene?

    (Talá Liteya 57.)

  10. Tángá 1 Ntango 28:9.

    • Ndenge nini okoki komonisa ete ozali kosalela Yehova na motema mobimba ntango basusu bazali kotɛmɛla yo to batiki solo?

    • Mbongwana nini osengeli kosala mpo ozala sembo epai ya Yehova mpe kokabwana na lingomba ya lokuta?

      (Talá Liteya 58.)

  11. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na minyoko?

    (Talá Liteya 59.)

  12. Makambo nini okani kosala mpo okoba kokóla na elimo?

    (Talá Liteya 60.)