Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 53

Poná kominanola to masano oyo esepeliska Yehova

Poná kominanola to masano oyo esepeliska Yehova

Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Alingi ete tózala na esengo mpe tósepela na bomoi. Asepelaka soki tozwi mwa ntango ya kopema nsima ya mosala. Na liteya oyo, tokomona ndenge oyo tokoki kosalela ntango yango mpo esepelisaka biso mpe Yehova.

1. Nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kopona kominanola to masano?

Osepelaka kosala nini ntango ozali kopema, kosakana to kozwa mwa mopɛpɛ? Basusu basepelaka kofanda na ndako mpo na kotánga mwa buku, koyoka miziki, kotala filme to kokɔta na Internet. Basusu mpe balingaka kobima elongo na baninga, kosakana na mai to kosala lisano moko boye. Ezala toponi kosala nini, tosengeli komindimisa ete likambo oyo toponi ‘endimami na Nkolo.’ (Baefese 5:10) Likambo yango ezali na ntina mingi, mpo makambo mingi oyo bato baponaka koyoka, kotala to kosala lelo ezali makambo oyo Yehova ayinaka. Na ndakisa, mobulu, pite to misala ya bilimo mabe. (Tángá Nzembo 11:5.) Nini ekosalisa biso tópona kominanola to masano ya malamu?

Soki toponi baninga oyo balingaka Yehova, bakosalisa biso tólinga Yehova mpe tópona kominanola to masano ya malamu. Ndenge tomonaki yango na liteya 48, “ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” Kasi soki tozali mbala na mbala kolekisa ntango elongo na bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe te, ‘tokosuka mabe.’​—Masese 13:20.

2. Mpo na nini ezali na ntina tókata ngonga oyo tokolekisa na kominanola to na masano?

Ata soki kominanola oyo toponi ezali mabe te, tosengeli kaka kozala ekɛngɛ mpo ezwa biso ntango mingi te. Soki te, tokoki kozanga ntango ya kosala makambo oyo eleki ntina. Biblia eyebisi biso ete ‘tómisombela ntango oyo ebongi.’​—Tángá Baefese 5:15, 16.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo oponaka kominanola to masano ya malamu.

3. Boyá kominanola ya mabe

Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kopona kominanola? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Ndenge nini masano oyo Baroma bazalaki kosala na kala ekokani na masano mosusu ya lelo?

  • Na video yango, liteya nini Danny azwaki na likambo etali kominanola to masano?

Tángá Baroma 12:9, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini vɛrsɛ oyo ekoki kosalisa yo opona kominanola to masano ya malamu?

Wapi mwa makambo oyo Yehova ayinaka? Tángá Masese 6:16, 17 mpe Bagalatia 5:19-21. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:

  • Makambo nini oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali komonana mingi na kominanola to masano ya lelo?

 Mituna oyo ekosalisa yo opona kominanola to masano ya malamu

Omituna boye:

  • Ya ndenge nini? Kominanola yango ezali na makambo oyo Yehova ayinaka?

  • Ntango boni? Ezali kopekisa ngai kosala makambo eleki ntina?

  • Ná banani? Ezali kosala ete nalekisa ntango elongo na bato oyo balingaka Yehova te?

Soki tosali nyonso mpo na kokima likama, tokomibatela. Yango wana, tosengeli koboya kominanola nyonso oyo tomoni ete ekoki kozala mabe mpo na biso

4. Salelá ntango na yo malamu

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Atako ndeko oyo balobeli na video azalaki kotala eloko ya mabe te, akómaki na mokakatano nini?

Tángá Bafilipi 1:10, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini vɛrsɛ oyo ekoki kosalisa biso tókata ntango boni tokolekisa na kominanola?

5. Poná kominanola ya malamu

Ezali solo ete kominanola mosusu esepelisaka Yehova te, kasi ezali mpe na mingi oyo esepelisaka ye. Tángá Mosakoli 8:15 mpe Bafilipi 4:8, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Kominanola nini ya malamu osepelaka na yango?

Okoki kosepela na kominanola mpe masano ya malamu

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ezali na yango mabe te kotala filme to koyoka miziki oyo ezali na mobulu, pite, to misala ya bilimo mabe. Nazali kolekisa na ngai kaka ntango, nakosala na ngai yango te.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Yehova alingi tópona kominanola to masano ya malamu mpe tósepela.

Bozongeli

  • Kominanola ya ndenge nini mokristo asengeli koboya?

  • Mpo na nini tosengeli kozala ekɛngɛ mpo na ntango oyo tolekisaka na kominanola?

  • Mpo na nini olingi kopona kominanola oyo ekosepelisa Yehova?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge okoki kozwa bikateli ya malamu na oyo etali kominanola mpe masano.

“Oponaka kominanola oyo ebongi?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2011)

Na lisolo “Natiká ata kokanisela basusu mabe,” talá mpo na nini mobali moko akómaki kopona malamu kominanola.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2010)

Talá ndenge mwasi moko atikaki kotala bafilme oyo ezalaki kolakisa misala ya bilimo mabe.

Boyá kominanola oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe (2:02)