Maloba na nsuka ya lisolo
1. Babilone Monene ezali nini?
“Babilone Monene” emonisaka mangomba nyonso ya lokuta. Ndenge nini toyebi yango? (Emoniseli 17:5) Tótalela makambo oyo elandi:
-
Azali bisika nyonso mpe azali kosala na mokili mobimba. Biblia elobi ete Babilone Monene efandi likoló ya “ebele ya bato mpe bikólo.” Mwasi yango azali na “bokonzi likoló ya bakonzi ya mabele.”—Emoniseli 17:15, 18.
-
Mwasi yango akoki kozala te nguya moko ya politiki to ya mombongo. Mpo ntango mwasi yango akobomama, “Bakonzi ya mabele” mpe “Bato ya mombongo” bakobomama te elongo na ye.—Emoniseli 18:9, 15.
-
Azali kokosela Nzambe makambo. Abengami mwasi ya ndumba mpo asalá boyokani na baguvɛrnema mpo na mbongo mpe biloko mosusu. (Emoniseli 17:1, 2) Azali kokosa bato ya bikólo nyonso. Mpe abomisi bato ebele.—Emoniseli 18:23, 24.
2. Ntango nini Masiya asengelaki komonana?
Biblia esakolaki ete esengelaki bapɔsɔ 69 eleka liboso ete Masiya amonana.—Tángá Danyele 9:25.
-
Ntango nini bapɔsɔ 69 ebandaki? Na mobu 455 L.T.B. Na ntango yango, Guvɛrnɛrɛ Nehemia akómaki na Yerusaleme mpo na “kobongisa mpe kotonga lisusu” engumba.—Danyele 9:25; Nehemia 2:1, 5-8.
-
Ntango boni bapɔsɔ 69 esalaki? Na bisakweli mosusu ya Biblia, mokolo moko emonisaka mbula moko. (Mitángo 14:34; Ezekiele 4:6) Na yango, pɔsɔ mokomoko ezali komonisa bambula nsambo. Na esakweli oyo, bapɔsɔ 69 ezali bambula 483 (bapɔsɔ 69 x mikolo 7).
-
Ntango nini Bapɔsɔ 69 esukaki? Soki totángi bambula 483 banda na 455 L.T.B. ekomema biso na mobu 29 T.B. a Yango nde mpenza mobu oyo Yesu azwaki batisimo mpe akómaki Masiya.—Luka 3:1, 2, 21, 22.
3. Mayele ya monganga oyo esɛngi kosalela makila
Ezali na mayele ya monganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko. Mayele yango mosusu ezali, na ndakisa, kopesa moto mosusu makila to kobomba makila na yo moko liboso básala yo lipaso; bakristo basengeli kosala yango te.—Kolimbola Mibeko 15:23.
Kasi, mayele mosusu ya monganga ezali na yango mabe te. Na ndakisa, kosala ekzamɛ ya makila, kosala moto hémodialyse, to hémodilution, to mpe kolekisa makila ya moto na masini oyo ekosala mosala oyo motema mpe mimpululu (poumons) esalaka. Mokristo mokomoko nde asengeli kopona ndenge oyo makila na ye moko ekosalelama ntango bazali kosalela mayele moko ya monganga, ntango bazali kosala ye ekzamɛ ya monganga, to ntango bazali kopesa ye lisalisi mosusu ya monganga. Minganga nyonso basalelaka mayele yango ndenge moko te. Na yango, liboso mokristo andima ete básala ye lipaso, ekzamɛ moko, to lisalisi moko ya monganga, asengeli koluka koyeba malamumalamu ndenge oyo bakosalela makila na ye. Akoki kotalela mituna oyo elandi:
-
Bongo soki babendi makila na ngai mpe makila yango etiki kotambola mpo na mwa ntango? Lisosoli na ngai ekotalela yango kaka lokola makila ya nzoto na ngai, oyo esɛngi te ‘kosopa yango na mabele lokola mai’?—Kolimbola Mibeko 12:23, 24.
-
Bongo soki ntango minganga bazali kosalisa ngai, babendi ngai makila, batye yango bankisi, mpe bazongisi yango na nzoto na ngai? Na kotalela oyo nayekoli na Biblia, lisosoli na ngai ekotungisama te? Nakoki kondima mayele yango ya monganga?
4. Kokabwana na molongani
Liloba ya Nzambe eyebisi balongani bákabwana te mpe emonisi polele ete soki moto akabwani na molongani na ye, akozala na lotomo te ya kobala lisusu. (1 Bakorinti 7:10, 11) Kasi, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kotinda mokristo akabwana na molongani na ye.
-
Koboya na nko kokokisa bamposa ya libota: Mobali alingi kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye te, 1 Timote 5:8.
mpe libota ekómi kokelela to kozanga biloko ya kobikela.— -
Konyokola to kobɛta molongani makasi mpenza: Kobɛta to konyokola molongani tii amona ete bomoi to kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ezali na likama.—Bagalatia 5:19-21.
-
Kosala nyonso mpo na kobebisa boyokani ya molongani na ye ná Yehova: Moto azali kosala nyonso mpo na kopekisa molongani na ye asalela Yehova.—Misala 5:29.
5. Bafɛti mpe milulu
Bakristo baboyaka kosala bafɛti mpe milulu oyo esepelisaka Yehova te. Kasi mokristo mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kopona oyo akosala ntango oyo bafɛti to milulu yango ezali kosalema. Talelá mwa bandakisa oyo elandi.
-
Ntango moto moko alobi na yo bonɛ fɛti. Okoki kaka koloba “matɔndi” to “mersi.” Soki moto alingi koyeba makambo mosusu, okoki koyebisa ye ntina oyo osalaka fɛti yango te.
-
Soki molongani na yo, oyo azali Motatoli ya Yehova te, asɛngi yo bókende kolya mwa eloko elongo na bandeko ya libota na mokolo ya molulu moko. Soki lisololi na yo epekisi yo te, okoki koyebisa molongani na yo liboso ete soki bakosala makambo oyo Biblia epekisi, okosala yango te.
-
Ntango oyo patrɔ na yo apesi yo mbongo to eloko mosusu na ntango ya bafɛti. Osengeli koboya yango? Mpenza te. Patrɔ na yo apesi yo yango mpo na fɛti, to mpo asepelaka na mosala na yo?
-
Ntango moto moko apesi yo likabo na ntango ya fɛti. Moto oyo azali kopesa yo likabo akoki koloba boye: “Nayebi ete osalaka fɛti yango te, kasi nalingi kopesa yo eloko oyo.” Mbala mosusu moto yango alingi kaka komonisela yo boboto. Kasi, okoki mpe kotalela soki alingi komeka kondima na yo to alingi osangana na fɛti yango. Nsima ya kotalela likambo yango, yo moko nde okopona soki okondima likabo yango to te. Na bikateli na biso nyonso, tolingaka kozala na lisosoli ya malamu mpe kozala sembo epai ya Yehova.—Misala 23:1.
6. Bamaladi mabe
Lokola tolingaka bato, tozalaka mpenza ekɛngɛ ete ntango oyo tozali na maladi moko, basusu bázwa yango te. Na yango, soki toyebi ete tozali na maladi oyo epanzanaka to tomoni ete tokoki kozala na maladi oyo ekoki kozwa basusu, tokozala ekɛngɛ mpenza. Tosalaka bongo mpo na kotosa mobeko oyo ya Biblia: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—Baroma 13:8-10.
Ndenge nini moto oyo azali na maladi oyo ekoki kozwa basusu akoki komonisa ete alingaka basusu? Asengeli te kosala makambo lokola koyamba basusu to kopesa bango mbote ya mabɔkɔ. Asengeli mpe te kosilika to komona mabe soki basusu bamoni ete mpo na kobatela mabota na bango, bakobengisa ye te na ndako. Mpe liboso azwa batisimo, asengeli koyebisa mokambi-misala ya lisangani ya bankulutu makambo etali maladi na ye mpo ete bibongiseli ezwama mpo na kobatela bato mosusu oyo mpe bakozwa batisimo. Liboso atuna moto libala, moto oyo akoki kozala na maladi oyo ekoki kozwa bato mosusu noki asengeli koluka kosala naino ekzamɛ ya makila. Kosala bongo, ekomonisa basusu ete olingaka bango mpe ete ‘otyaka likebi kaka na makambo na yo moko te, kasi otyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.’—Bafilipi 2:4.
7. Makambo etali mombongo mpe kosamba na batribinale
Soki tozali kokoma boyokani nyonso etali mombongo to mbongo, ata oyo tosali na mokristo, mikakatano mosusu ekokómela biso te. (Yirimia 32:9-12) Na bantango mosusu, bakristo bakoki kozala na matata na makambo etali mbongo to makambo mosusu. Kasi basengeli kosala nyonso mpo na kosilisa yango nokinoki kaka bango mibale mpe kobatela kimya.
Ndenge nini tosengeli kosilisa makambo ya minene, na ndakisa kobuba moto to kokosela moto makambo? (Tángá Matai 18:15-17.) Yesu amonisaki makambo misato ya kosala:
-
Salá makasi bósilisa makambo yango kaka bino mibale.—Talá vɛrsɛ 15.
-
Soki esimbi te, sɛngá ndeko moko oyo akómɛli na elimo to bandeko mibale na lisangá mpo bákende elongo na yo.—Talá vɛrsɛ 16.
-
Soki boyokani kaka te, osengeli sikoyo kokutana na bankulutu.—Talá vɛrsɛ 17.
Na makambo mingi, tosengeli te komema bandeko na biso na tribinale mpo yango ekofingisa nkombo ya Yehova mpe lisangá na ye. (1 Bakorinti 6:1-8) Kasi ezali na makambo mosusu oyo ekoki kokatama kaka na tribinale. Na ndakisa, koboma libala, lotomo ya kotikala na bana, lotomo ya kozwaka mbongo ya kolya mpe koleisa bana, kozwa mbongo ya asiranse, bato oyo basengeli kofuta bango mbongo ntango kompanyi ekwei, to mokanda oyo emonisi ndenge ya kosalela biloko oyo mowei atiki. Soki mokristo amemi makambo ya ndenge wana na tribinale, abuki mobeko ya Nzambe te.
Soki mokristo moko asali mokristo mosusu likambo ya mabe mpenza, na ndakisa asangisi na ye nzoto na makasi, abebisi mwana, abimeli ye to ayeli ye mpo na kosala ye mabe, ayibi eloko ya motuya mingi, to abomi, mokristo oyo akei kofunda likambo ya ndenge wana na Leta abuki mobeko ya Biblia te.
a Banda 455 L.T.B. tii 1 L.T.B. epesi bambula 454. Banda 1 L.T.B. tii 1 T.B. esali mbula moko (mobu zero ezalaki te). Mpe banda na mobu 1 T.B. tii na mobu 29 T.B. esali mbula 28. Yango nyonso epesi bambula 483.