Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 7

Botosi ekobatela yo

Botosi ekobatela yo

OKOSEPELA soki okoki kosala makambo nyonso oyo olingi? Ekómelaka yo mpe na bantango mosusu, oboya moto mosusu ayebisa yo makambo oyo osengeli kosala? Lobá solo, yebisá ngai soki okanisi nini.—

Kasi, nini ezali mpenza malamu mpo na yo? Ezali mpenza malamu kosala nyonso oyo olingi? To makambo oyo osalaka ezalaka malamu koleka ntango oyo otosaka tata na yo mpe mama na yo?— Nzambe alobi ete osengeli kotosa baboti na yo, yango ezali mpenza na ntina. Tótala soki okoyeba yango.

Ozali na mbula boni?— Oyebi mbula ya tata na yo?— Bongo ya mama na yo to ya nkɔkɔ na yo ya mwasi to ya mobali, oyebi yango?— Baumeli na bomoi bambula mingi koleka yo. Ntango moto aumeli bambula mingi na bomoi, yango elingi koloba ayebi mpe makambo mingi. Mbula na mbula, ayokaka makambo mingi, amonaka makambo mingi mpe asalaka makambo mingi. Yango wana bilenge bakoki koyeba makambo mingi epai ya mikóló.

Oyebi moto moko oyo yo oleki ye na mbula?— Oyebi makambo mingi koleka ye?— Mpo na nini yo oyebi makambo mingi koleka ye?— Mpamba te yo ozali na mbula mingi koleka ye. Ozwi ntango mingi ya koyekola makambo koleka moto oyo azali lɛki na yo.

Nani aumeli bambula mingi na bomoi koleka ngai ná yo, to mpe moto nyonso mosusu?— Ezali Yehova Nzambe. Ayebi makambo mingi koleka ngai, mpe ayebi mingi koleka yo. Ntango ayebisi biso tósala eloko boye to boye, tosengeli kondima ete ezali malamu, ata soki ezali komonana mpasi mpo na kosala yango. Oyebi ete mokolo moko, ata Moteyi Monene amonaki ete ezali pɛtɛɛ te mpo na kotosa?—

Mokolo moko, Nzambe asɛngaki Yesu asala likambo moko ya mpasi mpenza. Yesu abondelaki mpo na yango, ndenge ozali komona awa. Abondelaki mpe alobaki boye: “Soki olingi, longolá kɔpɔ oyo epai na ngai.” Ntango alobaki bongo, Yesu amonisaki ete kosala mokano ya Nzambe ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, ndenge nini Yesu asilisaki libondeli na ye? Oyebi?—

Yesu asilisaki yango na maloba oyo: “Ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:41, 42) Ya solo, alingaki ete mokano ya Nzambe esalema, kasi oyo ya ye moko te. Akendaki mpe asalaki oyo Nzambe alingaki, na esika asala oyo ye moko amonaki malamu.

Yango eteyi biso nini?— Eteyi biso ete ezalaka ntango nyonso malamu kosala oyo Nzambe alobi, ata soki ekoki kozala mpasi. Kasi, eteyi biso mpe likambo mosusu. Oyebi likambo yango?— Eteyi biso ete Nzambe ná Yesu bazali moto moko te, ndenge bato mosusu balobaka yango. Yehova azali mokóló koleka mpe ayebi makambo mingi koleka Yesu, Mwana na ye.

Ntango tozali kotosa Nzambe, tozali komonisa ete tolingaka ye. Biblia elobi boye: “Mpo bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” (1 Yoane 5:3) Bongo, lokola omoni yango, biso nyonso tosengeli kotosa Nzambe. Yo mpe olingi kotosa Nzambe, ezali bongo te?—

Tófungola Biblia na biso mpe tótala oyo Nzambe azali kosɛnga na bana. Tokotánga oyo Biblia elobi na Baefese mokapo 6, vɛrsɛ 1, 2, mpe 3. Elobi boye: “Bana, bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo, mpo yango ezali likambo ya boyengebene: ‘Kumisá tata na yo ná mama na yo’; oyo ezali komandema ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango molai na mabelé.’”

Omoni, Yehova Nzambe ye moko nde ayebisi yo ete otosaka tata na yo mpe mama na yo. “Kokumisa” bango elimboli nini? Elimboli ete osengeli komemya bango. Mpe Nzambe alaki ete soki otosaka baboti na yo, ‘makambo ekozala malamu mpo na yo.’

Tiká nabɛtɛla yo lisolo ya bato oyo babikisaki bomoi na bango mpo bazalaki na botosi. Bato yango bazalaki na bomoi kalakala na Yelusaleme, engumba monene. Bato mingi na mboka yango bayokelaki Nzambe te, yango wana Yesu akebisaki bango ete Nzambe akoboma engumba na bango. Yesu ayebisaki bango mpe ndenge oyo bakoki kobika soki basali makambo ya bosembo. Alobaki boye: ‘Ntango bokomona basoda bazingi Yelusaleme, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Boye ntango ekoki mpo na kobima na Yelusaleme mpe kokima na bangomba.’​—Luka 21:20-22.

Kaka ndenge Yesu alobaki yango, basoda bayaki kobundisa Yelusaleme. Basoda ya Loma bazingaki engumba mobimba. Na nsima, basoda yango balongwaki soki mpo na ntina nini, toyebi te. Bato mingi bakanisaki ete likambo moko ya mabe ekosalema lisusu te. Batikalaki na engumba. Kasi Yesu alobaki ete básala nini?— Olingaki kosala nini soki ozalaki kofanda na Yelusaleme na ntango wana?— Baoyo bandimelaki mpenza Yesu batikaki bandako na bango mpe bakimaki na bangomba, mosika mpenza na Yelusaleme.

Mbula mobimba elekaki, kasi eloko moko te esalemaki na Yelusaleme. Na mbula ya mibale, eloko moko mpe esalemaki te. Na mbula ya misato mpe, eloko moko esalemaki te. Ekoki kozala ete bato mosusu bakanisaki ete bato oyo bakimaki engumba bazalaki bazoba. Kasi na mbula ya minei, basoda ya Loma bazongaki lisusu. Bazingaki lisusu Yelusaleme mobimba. Mbala oyo, ntango ya kokima ezalaki lisusu te. Basoda yango babebisaki engumba. Bato mingi oyo bazalaki wana bakufaki mpe baoyo batikalaki na bomoi, basoda bamemaki bango baombo.

Kasi, nini ekómelaki bato oyo batosaki Yesu?— Babikaki. Bazalaki mosika mpenza na Yelusaleme. Yango wana bamonaki mpasi te. Botosi ebatelaki bango.

Soki ozali na botosi, yango ekobatela yo mpe?— Baboti na yo bakoki mbala mosusu kopekisa yo kosakana na balabala to na ebale. Mpo na nini bapekisi?— Mpamba te motuka ekoki kotuta yo to okoki kozinda na mai mpe okufi. Kasi, mokolo mosusu okoki kokanisa boye: ‘Mituka ezali na balabala te sikoyo. Bakotuta ngai te. Bana mosusu mpe basakanaka na balabala to na ebale, kasi namoná naino esika batuti bango te, to bazindi na mai te.’

Wana ezali makanisi oyo bato mingi bazalaki na yango na Yelusaleme. Ntango basoda ya Loma balongwaki, emonanaki lokola likambo moko ya mabe ekosalema te. Ezalaki na bato mosusu oyo batikalaki na engumba. Yango wana bango mpe batikalaki. Bakebisaki bango, kasi bayokaki te. Yango wana bakufaki.

Tózwa ndakisa mosusu. Osilá kosakana na alimɛti?— Mbala mosusu ezalaka esengo ntango opelisi mbuma moko ya alimɛti mpe ozali kotala ndenge mɔtɔ ezali kopela. Kasi kosakana na alimɛti ekoki kozala likama. Ndako mobimba ekoki kozika mpe okoki kokufa!

Kobosana te ete ekoki kaka te kotosa na boumeli ya mwa ntango moke. Kasi osengeli kozala na botosi ntango nyonso, yango nde ekobatela yo mpenza. Nani ayebisi yo ete: “Bana, bótosaka baboti na bino”?— Ezali Nzambe. Kobosana mpe te ete alobi bongo mpo alingaka yo.

Sikoyo, tángá bavɛrsɛ oyo emonisi ntina ya kozala na botosi: Masese 23:22; Mosakoli 12:13; Yisaya 48:17, 18; mpe Bakolose 3:20.