Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 6

Moteyi monene asalelaki bato

Moteyi monene asalelaki bato

OSEPELAKA soki moto asaleli yo likambo moko ya malamu?— Bato mosusu mpe basepelaka ntango basaleli bango likambo moko ya malamu. Biso nyonso tosepelaka. Moteyi Monene ayebaki likambo yango mpe azalaki ntango nyonso kosalela bato. Alobaki boye: ‘Nayaki, mpo básalela ngai te, kasi mpo nasalela bato.’​—Matai 20:28.

Na yango, tosengeli kosala nini soki tolingi kozala lokola Moteyi Monene?— Tosengeli kosalela bato. Tosengeli kosalela bango malamu. Ya solo, bato mingi basalaka bongo te. Kutu, bato mingi balingaka nde basusu básalelaka bango. Yango ekómelaki mpe ata bayekoli ya Yesu. Moyekoli mokomoko alingaki kozala moto monene to moto ya lokumu mingi.

Mokolo moko, Yesu azalaki na mobembo elongo na bayekoli na ye. Bakómaki na mboka Kapalanauma, penepene na Mbu ya Galilai mpe bakɔtaki bango nyonso na ndako moko. Kuna, Yesu atunaki bango motuna oyo: “Likambo nini bozalaki kolobana nzelanzela?” Bafandaki nyɛɛ mpo nzelanzela bazalaki kolobana mpo na koyeba na kati na bango nani aleki.​—Malako 9:33, 34.

Yesu ayebaki ete ezali malamu te ete moyekoli na ye moko akanisa ete ye nde aleki basusu nyonso. Yango wana, ndenge toyekolaki yango na mokapo ya liboso ya mokanda oyo, atɛlɛmisaki mwana moke moko na katikati na bango mpe ayebisaki bango ete basengeli kozala na komikitisa lokola mwana yango. Kasi bayokaki kaka te. Yango wana, mwa moke liboso akufa, Yesu apesaki bango liteya moko oyo babosanaki lisusu te. Asalaki nini?—

Ntango bafandaki esika moko mpo na kolya, Yesu alongwaki na mesa mpe alongolaki bilamba na ye ya likoló. Azwaki esume mpe alíngaki yango na loketo na ye. Na nsima, atyaki mai na saani moko. Bayekoli na ye bamitunaki mpenza soki alingi kosala nini. Bazalaki kaka kotala ndenge Yesu azali koleka epai ya mokomoko na bango, agumbamaki mpe asukolaki makolo na bango nyonso. Na nsima, apangusaki makolo na bango na esume. Kanisá naino! Soki ozalaki wana, olingaki komiyoka ndenge nini?—

Bayekoli na ye bamonaki ete ebongi te ete Moteyi Monene asalela bango ndenge wana. Bayokaki nsɔni. Kutu, Petelo aboyaki ete Yesu asalela ye mosala ya bɔi ndenge wana. Kasi, Yesu alobaki ete ezali na ntina mingi asala mosala yango.

Lelo oyo tosukolaka makolo ya bato te. Kasi, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bazalaki kosala bongo. Oyebi ntina bazalaki kosala bongo?— Mpamba te na esika Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kofanda, bato bazalaki kolata sandalɛ na sosɛti te. Ntango bazalaki kotambola na banzela ya mabelé, putulu ezalaki kotonda na makolo na bango. Yango wana, mpo na komonisela moto oyo ayei kotala yo boboto, esengelaki kosukola makolo na ye mpo na kolongola putulu wana.

Kasi na mbala oyo, ata moyekoli moko te ya Yesu akanisaki kosukola makolo ya baninga na ye. Yango wana Yesu asalaki yango ye moko. Na ndenge yango, Yesu apesaki bayekoli na ye liteya moko ya ntina mingi. Basengelaki mpenza kozwa liteya na likambo yango. Biso mpe lelo oyo tosengeli kozwa liteya na likambo yango.

Oyebi liteya yango?— Yesu alataki lisusu bilamba na ye ya likoló mpe afandaki lisusu na esika na ye na mesa, na nsima alobaki boye: “Boyebi likambo oyo nasaleli bino? Bobengaka ngai, ‘Moteyi,’ mpe, ‘Nkolo,’ mpe ezali ya solo, mpo nazali bongo. Na yango, soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino.”​—Yoane 13:2-14.

Awa Moteyi Monene amonisaki ete alingaki bayekoli na ye básalaka mpo na bolamu ya basusu. Alingaki te ete mokomoko na bango akanisaka kaka makambo na ye moko. Alingaki te ete bákanisaka ete baleki bato nyonso mpe bázelaka ete basusu básalelaka bango mosala. Alingaki ete bándimaka kosalela bato mosusu mosala.

Ezalaki mpenza liteya moko kitoko, ezali bongo te?— Yo mpe okozala lokola Moteyi Monene mpe okosalela bato mosusu?— Biso nyonso tokoki kosalela basusu makambo mingi. Yango ekosepelisa bango. Kasi na koleka, ekosepelisa Yesu ná Tata na ye.

Ezali mpasi te mpo na kosalela bato mosusu. Soki otali malamu, okomona makambo mingi oyo okoki kosalela bato. Kanisá naino: Eloko nini okoki kosala mpo na kosalisa mama na yo? Oyebi ete asalelaka yo na libota mobimba makambo. Okoki kosalisa ye?— Mpo nini okotuna ye te?

Okoki mbala mosusu kotanda basaani na mesa liboso ya kolya na libota. To okoki kolongola basaani ya salite na mesa ntango bosilisi kolya. Bana mosusu bakendaka kobwaka bosɔtɔ. Ezala mosala nini okosala, yebá ete ozali kosalela bato mosusu, se ndenge Yesu asalaki.

Ozali na balɛki oyo okoki kosalela bango mosala? Kobosana te ete Yesu, Moteyi Monene asalelaki ata bayekoli na ye. Yo mpe okolanda ndakisa ya Yesu soki ozali kosalela balɛki na yo mosala. Eloko nini okoki kosala mpo na bango?— Mbala mosusu okoki kosalisa bango báyeba kozongisa biloko na bango ya kosakana na esika yango ezalaka soki basilisi kosakana. To okoki kolatisa bango bilamba. To mpe okoki kosalisa bango na kobongisa mbeto na bango. Okoki kokanisa makambo mosusu oyo okoki kosalela bango?— Bakolinga yo mingi soki osaleli bango makambo oyo, ndenge mpe bayekoli ya Yesu balingaki ye.

Na kelasi mpe okoki kosalela bato. Ekoki kozala baninga na yo ya kelasi to molakisi na yo. Soki moto moko akweisi mikanda na ye, ekozala malamu soki osalisi ye na kolɔkɔta yango. Okoki mpe kosɛnga opangwisa tablo to osalela molakisi na yo misala mosusu. Ata ntango osimbeli moto porte ntango alingi kokɔta to kobima, yango mpe ezali mosala malamu.

Mbala mosusu, tokomona ete bato bakopesa biso matɔndi te mpo na makambo oyo tosaleli bango. Okanisi ete yango esengeli kopekisa biso kosalaka malamu?— Te! Bato mingi bapesaki Yesu matɔndi te mpo na makambo ya malamu oyo azalaki kosala. Kasi, yango epekisaki ye te kosala makambo ya malamu.

Yango wana, tóboyaka te kosalela bato mosusu makambo ya malamu. Tóbosana te Yesu, Moteyi Monene, mpe tósalaka ntango nyonso makasi mpo na kolanda ndakisa na ye.

Bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli kosalela bato mpe oyo okoki kotánga ezali Masese 3:27, 28; Baloma 15:1, 2; mpe Bagalatia 6:2.