Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 30

Ndenge ya kolonga ezaleli ya kobanga

Ndenge ya kolonga ezaleli ya kobanga

MPO na yo, omonaka ete kosalela Yehova ezali likambo ya pɛtɛɛ?— Moteyi Monene alobaki te ete yango ekozala likambo ya pɛtɛɛ. Na butu oyo ezalaki liboso ete abomama, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino.”​—Yoane 15:18.

Petelo amikumisaki ete akotika Yesu ata moke te, kasi Yesu alobaki ete Petelo akowangana ye mbala misato kaka na butu wana. Mpe ezali yango nde Petelo asalaki! (Matai 26:31-35, 69-75) Mpo na nini likambo wana esalemaki?— Esalemaki mpo Petelo abangaki, bantoma mosusu mpe babangaki.

Oyebi mpo na nini bantoma babangaki?— Mpo ezali na likambo moko ya ntina mingi oyo basalaki te. Koyeba likambo yango ekoki kosalisa biso tósalela Yehova ata soki bato bazali koloba to kosala biso nini. Nzokande, liboso ya kolobela likambo yango, ebongi tótalela naino oyo esalemaki na butu yango ya nsuka oyo Yesu alekisaki elongo na bantoma na ye.

Ya liboso, basali Elekeli bango nyonso esika moko. Elekeli yango ezalaki elambo moko monene oyo libota ya Nzambe ezalaki kosala mbula na mbula mpo na kokanisa kolongwa na bango na boombo na Ezipito. Na nsima, Yesu abandisi elambo mosusu ya ntina elongo na bantoma na ye. Tokolobela yango na nsima na mokapo mosusu mpe tokolimbola ndenge nini elambo yango ezali kosalisa biso na kokanisa Yesu. Nsima na yango mpe nsima ya kolendisa bantoma na ye, Yesu abimi elongo na bango, bakei na elanga ya Getesemane. Yango ezali esika oyo bazalaki kosepela kokende mbala na mbala.

Yesu atiki bango, akei mwa mosika ye moko na elanga yango mpo na kobondela. Ayebisi mpe Petelo, Yakobo, ná Yoane ete bábondela. Kasi bango balali mpɔngi. Mbala misato Yesu akei kobondela kaka ye moko, mpe na mbala nyonso wana soki azongi akuti Petelo ná bamosusu balali mpɔngi! (Matai 26:36-47) Oyebi mpo na nini basengelaki kosɛnzɛla mpe kobondela?— Tiká tólobela likambo yango.

Mwa liboso, na mpokwa wana, Yuda Mokeliota azalaki na Elekeli elongo na Yesu ná bantoma mosusu. Ndenge oyebi yango, Yuda akómaki moyibi banda kala. Sikoyo akómi motɛki ya Yesu. Ayebi esika Yesu azalaki kokutana mbala na mbala na bantoma na ye na elanga ya Getesemane. Yango wana Yuda amemi basoda kuna mpo bákanga Yesu. Ntango basoda bakómi, Yesu atuni bango ete: “Bozali koluka nani?”

Basoda bazongisi ete: “Yesu.” Yesu abangaki te, yango wana azongisi maloba ete: “Ezali ngai.” Basoda bakamwi makasi mpo na mpiko ya Yesu, bazongi nsima mpe bakwei na nse. Na nsima Yesu alobi ete: ‘Soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika bantoma na ngai bákende.’​—Yoane 18:1-9.

Ntango basoda bazwi Yesu mpe bakangi ye bansinga, bantoma babangi mpe bakimi. Kasi Petelo ná Yoane balingi komona ndenge likambo yango ekosuka, yango wana bazali kolanda na mwa mosika. Nsukansuka, Yesu akómi na ndako ya Kaifa, nganga-nzambe monene. Lokola Yoane ayebani na nganga-nzambe monene, mobateli ya porte atiki ye ná Petelo bákɔta na lopango.

Banganga-nzambe basili koyangana na ndako ya Kaifa mpo na kosambisa Yesu. Balingi abomama. Yango wana bakɔtisi batatoli oyo bakoseli ye makambo. Bato babɛti ye makɔfi mpe bambata. Ntango makambo nyonso wana ezali kosalema, Petelo azali wana pembeni.

Mwana mwasi moko ya mosala, mobateli ya porte oyo atikaki Petelo ná Yoane bákɔta, amoni Petelo. Mwana mwasi yango alobi ete: “Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu!” Kasi Petelo awangani kutu Yesu. Nsima ya mwa ntango, mwana mwasi mosusu ayebi Petelo mpe alobi na baoyo batɛlɛmi pene wana ete: “Moto oyo azalaki elongo na Yesu.” Na mbala oyo lisusu Petelo awangani Yesu. Nsima ya mwa ntango moke, etuluku moko ya bato bamoni Petelo mpe balobi na ye: “Ya solo yo mpe ozali moko na bango.” Mpo na mbala ya misato Petelo awangani, alobi ete: “Nayebi moto wana te!” Kutu Petelo alapi ndai ete makambo azali koloba ezali solo, bongo Yesu abaluki mpe atali ye.​—Matai 26:57-75; Luka 22:54-62; Yoane 18:15-27.

Oyebi mpo na nini Petelo akosaki?— Ya solo, ezali mpo abangaki. Kasi mpo na nini abangaki? Eloko nini asalaki te mpo azala na mpiko? Kanisá naino. Eloko nini Yesu asalaki mpo azwa mpiko?— Abondelaki Nzambe, mpe Nzambe asalisaki ye azwa mpiko. Mpe kobosana te ete Yesu alobaki na Petelo mbala misato ete abondela, asɛnzɛla mpe alala mpɔngi te. Kasi nini esalemaki?—

Na mbala yango nyonso, Petelo alalaki mpɔngi. Abondelaki te, mpe asɛnzɛlaki te. Yango wana ayebaki likambo ya kosala te ntango bakangaki Yesu. Na nsima, ntango bazali kosambisa Yesu, wana babɛti ye mpe basali likita ya koboma ye, makambo wana ebangisi Petelo. Kasi, mwa bangonga liboso, eloko nini Yesu ayebisaki bantoma na ye ete ekokómela bango?— Yesu ayebisaki bango ete kaka ndenge mokili eyinaki ye, ekoyina mpe bango.

Sikoyo tókanisa mwa likambo moko oyo ekoki kokómela biso oyo ekoki kokokana na oyo ekómelaki Petelo. Kanisá ete ozali na kelasi mpe bana mosusu ya kelasi babandi koloba mabe mpo na bato oyo bapesaka drapo losako te to mpo na baoyo bakumisaka Noɛlɛ te. Na nsima, ekozala boni soki moko atali yo mpe atuni yo ete: “Ezali solo ete yo opesaka drapo losako te?” To bamosusu balobi ete: “Toyokaka ete okumisaka ata Noɛlɛ te!” Okobanga nde koyebisa bango solo?— Okolinga nde kokosa ndenge Petelo akosaki?—

Talá oyo ekómaki na nsima: Petelo ayokaki mpasi mingi na motema ndenge awanganaki Yesu. Ntango amonaki ete asali mabe, abimaki libándá mpe alelaki. Abongolaki motema mpe azongelaki Yesu. (Luka 22:32) Sikoyo kanisá naino. Eloko nini ekoki kosalisa biso ete tóbanga te mpe tókosa te ndenge Petelo asalaki?— Kobosana te ete, Petelo abondelaki te mpe asɛnzɛlaki te. Na bongo, mpo na yo, eloko nini tosengeli kosala mpo na kozala moyekoli ya Moteyi Monene?—

Ntembe ezali te ete tosengeli kobondela Yehova mpo asalisa biso. Ntango Yesu abondelaki, oyebi eloko oyo Nzambe asalelaki ye?— Atindaki anzelu moko mpo na kolendisa ye. (Luka 22:43) Baanzelu ya Nzambe bakoki mpe kosalisa biso?— Biblia elobi ete: “Anzelu ya Yehova azali zingazinga na baoyo babangaka ye, mpe abikisaka bango.” (Nzembo 34:7, NW) Kasi mpo Nzambe asalisa biso, tosengeli kosuka te kaka na kobondela. Oyebi eloko nini mosusu tosengeli kosala?— Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete básɛnzɛla mpe bálala mpɔngi te. Mpo na yo, eloko nini ekoki kosalisa biso tósɛnzɛla mpe tólala mpɔngi te?—

Tosengeli mpenza kotya likebi na makambo oyo balobaka na makita na biso ya boklisto mpe kotya likebi na makambo oyo totángaka na Biblia. Kasi tosengeli lisusu kobondela Yehova mokolo na mokolo asalisa biso tósalela ye. Soki tosali bongo, tokoyeba ndenge ya kolonga ezaleli ya kobanga bato. Na ndenge yango tokosepela ntango tokozwa libaku ya koyebisa basusu makambo etali Moteyi Monene mpe Tata na ye.

Mikapo oyo ekoki kosalisa biso ete tótika nzela te ete kobanga bato epekisa biso kosala makambo oyo ezali malamu: Masese 29:25; Yilimia 26:12-15, 20-24; mpe Yoane 12:42, 43.