Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 17

Ndenge ya kozala na esengo

Ndenge ya kozala na esengo

BISO nyonso tolingaka kozala na esengo, ezali bongo te?— Kasi bato mingi bazali mpenza na esengo te. Oyebi mpo na nini?— Ezali mpo bayebi te nini ezali sɛkɛlɛ ya kozala na esengo. Bakanisaka ete soki moto azali na biloko ebele nde akozala na esengo. Kasi ata soki bazwi biloko yango, esengo na bango eumelaka te.

Sikoyo yoká sɛkɛlɛ monene ya kozala na esengo. Moteyi Monene alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Na yango, ndenge nini moto akoki kozala na esengo?— Moto akoki kozala na esengo soki azali kokabela bato mosusu mpe azali kosalela bango. Oyebaki bongo?—

Tókanisa likambo yango malamu. Yesu alobaki nde ete moto oyo bakabeli ye eloko akozala na esengo te?— Te, alobaki bongo te. Olingaka bákabela yo biloko, ezali bongo te?— Moto nyonso alingaka bákabela ye. Tozalaka na esengo ntango bakabeli biso biloko ya kitoko.

Kasi Yesu alobaki ete esengo ezalaka mingi ntango tozali kopesa. Sikoyo, yebisá ngai, nani oyo apesi bato biloko mingi koleka moto mosusu nyonso?— Ɛɛ, ezali Yehova Nzambe.

Biblia elobi ete Nzambe “apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” Anɔkisaka mbula mpe atindaka moi mpo banzete ekola mpe tózwa biloko ya kolya. (Misala 14:17; 17:25) Ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia ebengi Yehova “Nzambe ya esengo”! (1 Timote 1:11) Moko ya makambo oyo epesaka Nzambe esengo ezali ete akabaka. Biso mpe tokoki kozala na esengo soki tozali kokaba.

Eloko nini tokoki kopesa bato mosusu? Okanisi nini?— Mbala mosusu eloko ya kopesa moto esɛngaka osomba yango na mbongo. Soki okozwa eloko yango na magazini, ekosɛnga ete obimisa mbongo. Na yango, soki olingi kopesa moto eloko ya ndenge wana, mbala mosusu okobanda kobomba mbongo tii ekokoka mpo osomba eloko yango.

Kasi biloko nyonso oyo bakabelaka bato esengeli kouta kaka na magazini te. Na ndakisa, soki moi ezali makasi, mai ya mpiɔ ekitisaka mpenza motema. Soki moto azali na mposa ya mai mpe opesi ye mai ya mpiɔ, okoki koyoka esengo oyo eutaka na kopesa.

Mokolo mosusu, ekoki kokóma ete yo ná mama na yo bólamba mikate. Okosepela mpenza. Kasi, okosala nini na mikate mosusu mpo oyoka esengo koleka kutu soki olyaka yango nyonso kaka yo moko?— Okoki kokabela moninga na yo moko mwa mikate mosusu. Okolinga mpenza kosala bongo mokolo mosusu?—

Moteyi Monene ná bantoma na ye bayebaki bango nyonso esengo ya kopesa. Oyebi eloko oyo bazalaki kopesa bato mosusu?— Ezalaki eloko oyo eleki malamu na mokili! Lokola bayebaki solo oyo etali Nzambe, balakisaki bato mosusu nsango malamu yango na esengo nyonso. Bazalaki kosɛnga mbongo ata moke te.

Mokolo moko ntoma Paulo ná moyekoli Luka, moninga na ye ya motema, bakutanaki na mwasi moko oyo alingaki mpe koyoka esengo ya kopesa. Bakutanaki na ye pembeni ya ebale moko. Paulo ná Luka bakendaki kuna mpo bayokaki ete ezalaki esika ya mabondeli. Mpe, ndenge kaka bayebisaki bango, ntango bakómaki kuna, bakutaki basi mosusu bazali kobondela.

Paulo abandaki koyebisa basi yango nsango malamu ya Yehova Nzambe mpe ya Bokonzi na ye. Moko na bango nkombo na ye Lidia, ye alandaki mpenza na likebi. Na nsima, Lidia alingaki kosala eloko moko mpo na kolakisa ete asepelaki mpenza na nsango malamu oyo ayokaki. Yango wana, abondelaki Paulo ná Luka ete: “Soki bomoni mpenza ete nazali moto ya sembo na miso ya Yehova, bókɔta na ndako na ngai mpe bófanda.” Mpe atyaki bango mbamba bándima kaka kokɔta na ndako na ye.​—Misala 16:13-15.

Lidia azalaki na esengo ya koyamba basaleli wana ya Nzambe na ndako na ye. Alingaki bango mpo basalisaki ye na koyeba Yehova ná Yesu mpe ndenge ya kozwa bomoi ya seko. Azalaki mpenza na esengo ndenge apesaki Paulo ná Luka biloko ya kolya mpe esika ya kopema. Na bongo, ezaleli ya kokaba oyo Lidia azalaki na yango epesaki ye esengo mpo asepelaki mpenza kokaba. Tosengeli kobosana likambo wana te. Moto mosusu akoki koloba na biso ete tosengeli kokabela moto moko eloko. Kasi soki tozali na mposa ya kokabela moto yango te, tokoyoka esengo te ata soki topesi ye eloko yango.

Na ndakisa, ozali na mwa babɔmbɔ na yo oyo olingi kolya. Soki nalobi na yo okabela mwana mosusu mwa ndambo, okosepela kokabela ye?— Kasi ekozala boni soki ozali na babɔmbɔ ntango okutani na moninga moko oyo olingaka mingi? Soki yo moko ozwi likanisi ya kokabela ye babɔmbɔ mosusu, yango ekopesa yo esengo, ezali bongo te?—

Ekómaka na bantango mosusu ete tolingi moto moko mingi mpe tosepeli kopesa ye eloko nyonso oyo tozali na yango mpe totikali mabɔkɔ mpamba. Soki tozali kolinga Nzambe mingi, tosengeli kozala na mposa ya kosalela ye ndenge wana.

Moteyi Monene amonaki mwasi moko mobola oyo azalaki na mposa ya ndenge wana. Amonaki ye na tempelo na Yelusaleme. Mwasi yango azalaki kaka na mbongo mibale ya bibende ya mikemike; yango nde mbongo nyonso oyo azalaki na yango. Kasi atyaki yango nyonso mibale na kɛsi ya makabo lokola likabo mpo na tempelo. Moto moko te atindaki ye atya yango. Bato mingi oyo bazalaki wana bayebaki kutu te likambo oyo asalaki. Asalaki yango mpo asepelaki kosala bongo mpe mpo alingaki mpenza Yehova. Azalaki na esengo ete azali mpe na likoki ya kopesa mwa eloko.​—Luka 21:1-4.

Ezali na ndenge mingi oyo tokoki kopesa. Okoki kopesa ngai mwa bandakisa?— Soki tozali kopesa mpo tosepeli mpenza kopesa, tokozala na esengo. Yango wana Moteyi Monene ayebisi biso ete: “Bózala na momeseno ya kopesa.” (Luka 6:38) Soki tozali kosala bongo, tokosala ete bato mosusu bázala na esengo. Biso moko mpe tokozala na esengo mingi koleka!

Tiká tótánga bavɛrsɛ mosusu oyo ezali komonisa ete ezaleli ya kopesa ememelaka bato esengo, na Matai 6:1-4; Luka 14:12-14; mpe 2 Bakolinti 9:7.