Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 1

Ntina oyo Yesu azalaki Moteyi monene

Ntina oyo Yesu azalaki Moteyi monene

EKÓMI sikoyo mbula koleka nkóto mibale banda mwana moko abotamaki. Mwana yango akesanaki mpenza na bana mosusu nyonso mpe ntango akolaki, akómaki moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Na ntango wana bampɛpɔ ná mituka ezalaki te. Biloko mosusu lokola batelevizyo, baradio to batelefone ezalaki mpe te.

Mwana yango, bapesaki ye nkombo Yesu. Akómaki na bwanya koleka bato nyonso awa na mabelé. Yesu akómaki mpe moteyi oyo aleki bateyi nyonso. Soki makambo oyo akoteya ezali mpasi, azalaki kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpo bato báyoka ye.

Yesu ateyaki bato na bisika nyonso oyo azalaki kokutana na bango. Ateyaki bango na pembeni ya mbu mpe ntango afandaki na masuwa. Ateyaki bango na bandako mpe na nzela ntango azalaki kokende na bamboka mosusu. Yesu azalaki na motuka te, azalaki mpe kotambola na bisi to na engbunduka te. Azalaki kotambola na bisika nyonso, mpo na koteya bato.

Toyekolaka makambo mingi epai ya bato mosusu. Kasi tokoki koyekola makambo oyo eleki ntina epai ya Yesu, Moteyi Monene. Totángaka maloba ya Yesu na Biblia. Ntango tozali kotánga maloba yango na Biblia, ezali lokola nde Yesu ye moko azali koloba na biso.

Mpo na nini Yesu azalaki Moteyi Monene? Ntina ya liboso ezali mpo Yesu ye moko mpe bateyaki ye. Mpe alobaki ete esengeli koyoka ntango bazali koteya yo. Kasi Yesu azalaki koyoka nani? Nani ateyaki ye?— Tata na ye nde ateyaki ye. Tata ya Yesu ezali Nzambe.

Liboso Yesu aya awa na mabelé lokola moto, azalaki na likoló esika moko na Nzambe. Yango wana, Yesu akeseni mpenza na bato mosusu nyonso, mpamba te moto moko te azalaki na bomoi na likoló liboso ya kobotama awa na mabelé. Na likoló, Yesu azalaki mwana malamu mpenza, azalaki koyoka Tata na ye. Yango wana ayebaki mpe koteya bato makambo oyo ayekolaki epai ya Nzambe. Yo mpe okoki kolanda ndakisa ya Yesu soki ozali koyoka tata na yo ná mama na yo.

Ntina mosusu oyo esali ete Yesu azala Moteyi Monene ezali mpo azalaki kolinga bato. Alingaki kosalisa bato báyekola makambo ya Nzambe. Yesu azalaki kolinga mikóló, kasi azalaki mpe kolinga bana. Bana mpe bazalaki kolinga kozala esika moko na Yesu mpo azalaki koloba na bango mpe koyoka bango.

Mokolo moko, baboti mosusu bayaki na bana na bango ya mike epai ya Yesu. Kasi, baninga ya Moteyi Monene bakanisaki ete azali na mosala mingi mpe azali na ntango te ya kosolola na bana yango. Yango wana bayebisaki baboti yango bázonga. Kasi, Yesu alobaki nini?— Yesu alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Ya solo, Yesu alingaki bana mike báya epai na ye. Omoni ete atako Yesu azalaki moto ya bwanya mpenza mpe moto monene, azalaki mpe kozwa ntango mpo na koteya bana mike.​—Malako 10:13, 14.

Oyebi mpo na nini Yesu ateyaki bana mpe azalaki koyoka bango? Lokola alingaki kosalisa bango bázala na esengo, yango wana azalaki koyebisa bango makambo ya Nzambe, Tata na ye ya likoló. Ndenge nini okoki kosalisa bato mpo bázala na esengo?— Soki oyebisi bango makambo oyo oyekoli mpo na Nzambe.

Mokolo moko, Yesu alingaki koteya baninga na Ye likambo moko ya ntina mingi, azwaki mwana moko ya moke mpe atɛlɛmisaki ye na katikati ya bayekoli na Ye, bato oyo bazalaki kotambola na Ye. Na nsima, Yesu alobaki na mikóló wana ete basengeli kobongola makanisi na bango mpe kokóma lokola mwana wana.

Maloba wana ya Yesu elingi koloba nini? Oyebi ndenge nini mokóló to mwana oyo akoli akoki kokóma lokola mwana moke?— Mwana moke ayebaka makambo mingi te lokola mokóló, mpe alingaka báteya ye. Yango wana, Yesu alingaki koyebisa bayekoli na ye ete basengeli komikitisa ndenge bana mike bamikitisaka. Ya solo, biso nyonso tokoki koyekola makambo mingi epai ya bato mosusu. Biso nyonso mpe tosengeli koyeba ete mateya ya Yesu ezali na ntina mingi koleka makanisi na biso moko.​—Matai 18:1-5.

Ntina mosusu oyo esali ete Yesu azala Moteyi Monene ezali mpo ayebaki koloba makambo oyo ekosepelisa bato. Ntango azalaki koloba, maloba na ye ezalaki pɛtɛɛ mpe polele. Alobelaki bandɛkɛ, bafololo mpe biloko mosusu oyo bato bameseni komona mpo asalisa bato báyeba Nzambe.

Mokolo moko, Yesu azalaki likoló ya ngomba moko mpe bato mingi bayaki epai na ye. Yesu afandaki mpe asololaki na bango lisolo moko, ndenge ozali komona na elilingi awa. Babengaka lisolo yango Lisolo Likoló ya Ngomba. Alobaki boye: ‘Bótala bandɛkɛ ya likoló. Balonaka te. Babombaka mpe biloko na bandako ya kobomba biloko te. Kasi Nzambe na likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?’

Yesu alobaki lisusu boye: ‘Bózwa liteya na bafololo kilinono ya esobe. Ezali kokola, esalaka mosala te. Kasi talá ndenge ezali kitoko! Ata Salomo, mokonzi ya bozwi, alataki te koleka bafololo yango. Bongo, sikoyo, soki Nzambe alatisaka matiti ya bilanga, akoleka kolatisa bino te?’​—Matai 6:25-33.

Omoni liteya oyo Yesu alingaki kopesa ntango ateyaki likambo yango?— Alingaki te ete tómitungisa mingi soki tokozwa biloko oyo tokolya to bilamba oyo tokolata epai wapi. Nzambe ayebi ete tozali na mposa ya biloko wana nyonso. Yesu alingaki koloba te ete tosengeli kosala mosala te mpo na kozwa biloko ya kolya to bilamba. Kasi, alingaki nde koloba ete tosengeli kotya Nzambe na esika ya liboso. Soki tosali bongo, Nzambe akosala ete tózwa biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata. Yo mpe ondimi yango?—

Ntango Yesu asilisaki koloba, bato balobaki nini?— Biblia elobi ete bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya. Basepelaki mpenza koyoka ye. Maloba na ye esalisaki bato básala oyo ezali malamu.​—Matai 7:28.

Yango wana, ezali na ntina mingi tóyekola makambo epai ya Yesu. Oyebi ndenge nini tokoki kosala yango?— Maloba na ye ezali na mokanda moko. Oyebi mokanda yango?— Mokanda yango ezali Biblia Mosantu. Yango elingi koloba ete soki tozali kotya likebi na makambo oyo tozali kotánga na kati ya Biblia, ezali lokola nde tozali koyoka Yesu ye moko. Kutu okokuta lisolo moko kitoko na kati ya Biblia, ndenge Nzambe ye moko ayebisi biso tóyokaka Yesu. Yoká lisolo yango.

Mokolo moko, Yesu akendaki na baninga na ye misato likoló ya ngomba moko. Nkombo ya baninga na ye yango ezali Yakobo, Yoane ná Petelo. Tokolobela bato yango mingi na mbala ya nsima mpamba te bango nyonso misato bazalaki mpenza baninga ya Yesu ya motema. Kasi na mokolo yango, elongi ya Yesu ebandaki kongɛnga makasi mpenza. Mpe bilamba na ye ekómaki kongɛnga lokola pole, ndenge ozali komona awa na elilingi.

Na nsima, Yesu ná baninga na ye bayokaki mongongo moko euti na likoló. Mongongo yango elobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo ngai nandimi; bóyoka ye.” (Matai 17:1-5) Oyebi soki mongongo yango ezalaki ya nani?— Ezalaki mongongo ya Nzambe! Ya solo, Nzambe ye moko nde alobaki ete basengeli koyoka Mwana na ye.

Bongo biso lelo oyo? Tokondima kotosa Nzambe mpe koyoka Mwana na ye, Moteyi Monene?— Yango nde likambo oyo biso nyonso tosengeli kosala. Oyebi lisusu ndenge tokoki kosala yango?—

Ya solo, tokoki koyoka Mwana ya Nzambe soki tozali kotánga masolo ya bomoi ya Yesu oyo ezali na Biblia. Makambo ya kitoko oyo Moteyi Monene alingi koyebisa biso ezali mpenza mingi. Okosepela mpenza koyekola makambo yango na kati ya Biblia. Okozala mpe na esengo mingi soki ozali koyebisa baninga na yo makambo kitoko oyo ozali koyekola.

Mpo na koyeba makambo mosusu ya kitoko oyo moto akoki kozwa soki azali koyoka Yesu, fungolá Biblia na yo mpe tángá Yoane 3:16; 8:28-30; mpe Misala 4:12.