Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 21

Komikumisa ezali malamu?

Komikumisa ezali malamu?

OYEBI soki komikumisa elimboli nini?— Tókamata ndakisa moko. Osilá komeka kosala eloko moko oyo oyebi yango malamu te? Mbala mosusu omekaki kobɛta bale. To mpe omekaki kobɛta silikoti. Mwana moko alobaki na yo: “Ha! Ha! Ha! Ngai naleki yo”?— Yango elakisi ete mwana yango amikumisaki.

Oyokaka ndenge nini soki moto mosusu azali komikumisa? Yango esepelisaka yo?— Sikoyo, okanisi ete bato mosusu bayokaka ndenge nini soki ozali komikumisa?— Ezali malamu koloba na moto ete: “Ngai naleki yo”?— Yehova asepelaka na bato ya ndenge wana?—

Moteyi Monene ayebaki bato oyo bazalaki kokanisa ete bazali malamu koleka bato mosusu. Bazalaki komikumisa to komitombola mpe bazalaki komona bato mosusu mpamba. Yango wana, mokolo moko Yesu abɛtelaki bango lisolo moko mpo na komonisa ete komikumisa ezali mabe. Tóyoka naino lisolo yango.

Lisolo yango elobeli Mofalisai ná mokɔngɔli-mpako. Bafalisai bazalaki bateyi ya lingomba, mbala mingi bazalaki kosala makambo lokola nde bazali sembo to basantu koleka bato mosusu. Mofalisai oyo Yesu alobelaki na lisolo na ye akendaki na tempelo na Yelusaleme mpo na kobondela.

Yesu alobaki ete mokɔngɔli-mpako moko mpe akendaki na tempelo mpo na kobondela. Bato mingi bazalaki kolinga bakɔngɔli-mpako te. Bazalaki koloba ete bakɔngɔli-mpako babubaka bango. Ezali solo, mpo bakɔngɔli-mpako mingi bazalaki kofutisa mpako na bosembo te.

Na tempelo, Mofalisai abandaki kobondela Nzambe boye: ‘E! Nzambe, natɔndi yo mpo nazali moto ya masumu te lokola bato mosusu. Nabubaka bato te mpe nasalaka makambo mosusu ya mabe te. Nazali lokola mokɔngɔli-mpako oyo wana te. Nazali moyengebene. Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ mpo nazwa ntango mingi ya kokanisa yo. Mpe na tempelo, napesaka moko ya zomi ya biloko nyonso oyo nazwaka.’ Mofalisai wana akanisaki mpenza ete ye nde azali moto malamu koleka bato mosusu, ezali bongo te?— Mpe ayebisaki yango Nzambe.

Kasi, mokɔngɔli-mpako asalaki bongo te. Akokaki ata kotombola miso likoló te ntango azali kobondela. Atɛlɛmaki mwa mosika mpe akitisaki motó na nse. Mokɔngɔli-mpako ayokaki motema mpasi mpo na masumu na ye, mpe azalaki komibɛta na ntolo mpo na kolakisa mawa na ye. Amekaki ata te koyebisa Nzambe ete ye azali moto malamu. Abondelaki nde boye: ‘E! Nzambe, yokelá ngai mawa, nazali moto ya masumu.’

Na makanisi na yo, Nzambe asepelaki na nani na kati ya bato wana mibale? Asepelaki nde na Mofalisai oyo azalaki kokanisa ete azali mpenza moto malamu? To asepelaki nde na mokɔngɔli-mpako oyo ayokaki mawa mpo na masumu na ye?—

Yesu alobaki ete Nzambe asepelaki na mokɔngɔli-mpako. Mpo na nini? Yesu alimbolaki ete: ‘Mpo moto nyonso oyo azali koluka komonisa ete azali moto malamu koleka bato mosusu bakokitisa ye. Kasi moto oyo amikitisi, bakotombola ye.’​—Luka 18:9-14.

Liteya nini Yesu apesaki na lisolo wana?— Ateyaki ete ezali mabe komimona ete tozali bato malamu koleka basusu. Ekoki kozala ete tolobi mpenza te ete tozali bato malamu koleka basusu, kasi makambo oyo tozali kosala ekoki komonisa ete tokanisaka bongo. Esilá kokómela yo osala bongo?— Yoká likambo ekómelaki ntoma Petelo.

Ntango Yesu ayebisaki bantoma na ye ete bakotika ye ntango bakokanga ye, Petelo amikumisaki boye: ‘Ata soki bango nyonso batiki yo, ngai nakotika yo ata moke te!’ Kasi, Petelo amikosaki. Amityelaki motema koleka. Nzokande atikaki Yesu. Kasi, azongelaki ye lisusu, ndenge tokomona yango na Mokapo 30 ya mokanda oyo.​—Matai 26:31-33.

Tózwa sikoyo ndakisa moko ya mikolo na biso. Kanisá ete bazali kotuna yo ná moninga na yo moko mwa mituna na kelasi. Okomiyoka ndenge nini soki oyebi mbala moko biyano na mituna yango, kasi moninga na yo ayebi yango te? Na ntembe te, okozala na esengo. Kasi, ekozala malamu omikokanisa na moninga na yo oyo azali kokoka kopesa eyano te?— Ezali malamu olakisa ete yo oleki mpe ete ye ayebi eloko te?—

Mofalisai asalaki ndenge wana. Amikumisaki ete aleki mokɔngɔli-mpako. Kasi Moteyi Monene alobaki ete Mofalisai amikosaki. Ezali solo ete moto moko akoki kosala makambo mosusu malamu koleka moninga na ye. Kasi, yango elingi koloba te ete aleki mpenza basusu.

Na bongo soki toyebi makambo mingi koleka moto mosusu, ezali malamu tómikumisa?— Kanisá naino. Biso nde tosalá bɔɔngɔ na biso?— Te, Nzambe nde apesá mokomoko na biso bɔɔngɔ. Kutu, makambo mingi oyo toyebi, ezali moto mosusu nde alakisaki biso yango. Ekoki kozala ete totángaki makambo yango na mokanda moko boye. To mpe moto mosusu nde ayebisaki biso yango. Ata soki toyebi likambo moko na ndenge na biso moko, toyebaki yango ndenge nini?— Ɛɛ, ezali bɔɔngɔ oyo Nzambe apesá biso nde esalisaki biso.

Soki moto azali kobundana mpo na kosala eloko moko oyo azali kokoka te, ezali malamu oloba na ye likambo moko oyo ekolendisa ye. Yebisá ye ete osepeli na likambo oyo asali. Ntango mosusu ekozala kutu malamu osalisa ye asala malamu koleka. Yo mpe okosepela bato mosusu básalela yo ndenge wana, ezali bongo te?—

Bato mosusu bazalaka na makasi koleka baninga na bango. Ezali boni soki ozali na makasi koleka ndeko na yo? Osengeli nde komikumisa mpo na yango?— Te. Ezali biloko oyo tolyaka nde esalisaka biso tókóma na makasi. Lisusu, Nzambe nde abimisaka moi mpe anɔkisaka mbula mpe asalaka makambo mosusu nyonso oyo esengeli mpo biloko ekola, ezali bongo te?— Yango wana, soki tozali na makasi, tosengeli kopesa Nzambe matɔndi.​—Misala 14:16, 17.

Moto moko te asepelaka koyoka moto azali komikumisa, ezali bongo te?— Tókanisa lisusu maloba ya Yesu: ‘Ndenge olingi bato mosusu básalela yo, yo mpe salelá bango bongo.’ Soki tozali kosala bongo, tokokokana te na Mofalisai oyo amikumisaki, oyo Moteyi Monene alobelaki na lisolo oyo abɛtaki.​—Luka 6:31.

Mokolo mosusu, moto moko abengaki Yesu moto malamu. Moteyi Monene alobaki ete: ‘Ɛɛ, nazali moto malamu’?— Te, alobaki bongo te. Alobaki nde boye: “Moto ya malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” (Malako 10:18) Atako Moteyi Monene azalaki moto ya kokoka, azalaki komikumisa te. Kasi, azalaki nde kopesa lokumu nyonso epai ya Tata na ye, Yehova.

Na bongo ezali na moto oyo tokoki kokumisa ye?— Ɛɛ, azali. Tokoki kokumisa Mozalisi na biso, Yehova Nzambe. Ntango tomoni ndenge moi ezali kolala na kitoko na yango, to biloko mosusu ya kitoko oyo Nzambe asalá, tokoki koyebisa moto ete: ‘Ezali Yehova, Nzambe na biso ya kokamwa, nde asalaki yango!’ Tiká tómibongisaka ntango nyonso mpo na kolobela makambo minene oyo Yehova asilá kosala mpe oyo akosala na mikolo ezali koya.

Tángá oyo Makomami elobi mpo na likambo ya komikumisa, to komitombola, mpo na koyeba ndenge tosengeli koboya ezaleli yango: Masese 16:5, 18; Yilimia 9:23, 24; 1 Bakolinti 4:7; mpe 13:4.