Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 5

“Oyo azali mwana na ngai”

“Oyo azali mwana na ngai”

NTANGO bana basalaka makambo ya malamu, baboti na bango basepelaka. Ntango mwana mwasi to mwana mobali asali likambo moko ya malamu, tata na ye akozala na esengo ya koyebisa bato ete: “Oyo azali mwana na ngai.”

Ntango nyonso, Yesu asalaka makambo oyo esepelisaka Tata na ye. Yango wana Tata na ye asepelaka na ye. Oyebi lisusu likambo oyo Tata ya Yesu asalaki mokolo moko, ntango Yesu azalaki elongo na bayekoli na ye misato?— Ɛɛ, mongongo ebimaki na likoló, Nzambe alobaki na bango boye: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo ngai nandimi.”​—Matai 17:5.

Ntango nyonso, Yesu asepelaka kosala makambo oyo esepelisaka Tata na ye. Oyebi mpo na nini? Mpamba te alingaka Tata na ye mingi. Soki moto azali kosala makambo kaka mpo basɛngi ye asala, akomona yango mpasi. Kasi, soki ye moko andimi kosala yango, akomona yango mpasi te. Oyebi soki kondima kosala likambo elimboli nini?— Elimboli kolinga kosala likambo yango.

Ata liboso aya awa na mabelé, Yesu azalaki kondima kosala makambo nyonso oyo Tata na ye azalaki kosɛnga ye. Asalaki bongo mpamba te alingaki Tata na ye, Yehova Nzambe. Yesu azalaki na esika moko ya lokumu na likoló, esika moko na Tata na ye. Kasi, Nzambe abongiselaki Yesu mosala moko monene. Mpo na kosala mosala yango, Yesu asengelaki kolongwa na likoló. Asengelaki kobotama lokola mwana awa na mabelé. Yesu andimaki mosala yango, mpamba te Yehova alingaki ye asala yango.

Mpo na kobotama lokola mwana awa na mabelé, esengelaki ete Yesu azala na mama. Oyebi soki mama yango azalaki nani?— Nkombo na ye ezalaki Malia. Yehova atindaki anzelu Gabriele auta na likoló mpe aya kosolola na Malia. Gabriele ayebisaki ye ete akobota mwana mobali. Nkombo ya mwana yango ekozala Yesu. Bongo tata ya mwana yango ekozala nani?— Anzelu alobaki ete Tata ya mwana yango ezali Yehova Nzambe. Yango wana basengelaki kobenga Yesu ete Mwana ya Nzambe.

Okanisi nini, Malia akanisaki nini mpo na yango?— Alobaki nde ete: “Naboyi kozala mama ya Yesu?” Te, Malia andimaki kosala mokano ya Nzambe. Kasi ndenge nini Mwana ya Nzambe oyo azalaki na likoló akokaki kobotama lokola mwana awa na mabelé? Ndenge nini kobotama ya Yesu ekeseni na kobotama ya bana mosusu? Oyebi yango?—

Ntango Nzambe asalaki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, asalaki bango na likambo moko ya malamu mpenza: básangisaka nzoto. Nsima ya kosangisa nzoto, mwana abandaka kokola na kati ya libumu ya mama na ye. Bato bakoloba ete wana ezali likamwisi mpenza! Na ntembe te yo mpe ondimi yango.

Kutu, Nzambe asalaki likamwisi mosusu ya monene koleka oyo wana. Azwaki bomoi ya Mwana na ye kuna na likoló mpe atyaki yango na kati ya libumu ya Malia. Nzambe asalaki naino likambo ya ndenge wana liboso te mpe asalá yango lisusu te tii na moi ya lelo. Yango esalaki ete Yesu abanda kokola na kati ya libumu ya Malia, ndenge bana mosusu bakolaka na kati ya libumu ya bamama na bango. Na nsima, Malia abalaki Yozefe.

Ntango ngonga ya kobotama ya Yesu ekokaki, Malia ná Yozefe bazalaki na mobembo na mboka Beteleme. Kasi, bato batondaki na mboka yango. Kutu, Malia ná Yozefe bazwaki esika ya kofanda te, yango wana, bakendaki kofanda esika banyama balalaka. Kuna nde Malia abotaki Yesu mpe atyaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ, ndenge ozali komona awa na elilingi. Elyelo ya bibwɛlɛ ezali esika batyaka biloko mpo bangɔmbɛ mpe banyama mosusu bálya.

Makambo ya kokamwa esalemaki na butu oyo Yesu abotamaki. Penepene na Beteleme, anzelu moko abimelaki bato oyo bazalaki kokɛngɛla bampate. Ayebisaki bango ete Yesu azali moto monene. Anzelu yango alobaki boye: ‘Talá! Nazali koyebisa bino nsango malamu oyo ekosepelisa bato. Lelo, moto moko abotami, oyo akobikisa bato.’​—Luka 2:10, 11.

Anzelu yango ayebisaki babateli ya mpate wana ete bakokuta Yesu na Beteleme, alali na elyelo ya bibwɛlɛ. Mbala moko, baanzelu mosusu basanganaki na anzelu ya liboso mpo na kokumisa Nzambe. Bayembaki boye: ‘Nkembo na Nzambe mpe kimya na mabelé na kati ya bato oyo ye amoniseli motema boboto.’​—Luka 2:12-14.

Ntango baanzelu balimwaki, babateli ya mpate bakendaki na Beteleme mpe bakutaki Yesu. Bayebisaki Yozefe ná Malia makambo nyonso ya malamu oyo bayokaki. Kanisá naino esengo oyo Malia azalaki na yango lokola andimaki kozala mama ya Yesu!

Na nsima, Yozefe ná Malia bakendaki na Yesu na mboka Nazalete. Kuna nde Yesu akolaki. Ntango akómaki mokóló, abandaki mosala monene ya koteya bato. Yango mpe ezalaki mosala oyo Yehova Nzambe alingaki ete Mwana na ye asala awa na mabelé. Yesu andimaki kosala mosala yango mpamba te alingaki Tata na ye ya likoló mingi.

Liboso Yesu abanda mosala na ye ya Moteyi Monene, Yoane Mobatisi abatisaki ye na Ebale ya Yolodani. Likambo moko ya kokamwa esalemaki! Ntango Yesu azalaki kobima na mai, Yehova alobaki kuna na likoló ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Osepelaka te ntango baboti na yo bayebisaka yo ete balingaka yo?— Na ntembe te, Yesu mpe asepelaki.

Yesu azalaki ntango nyonso kosala makambo oyo ezali sembo. Amipesaki te lokumu ya moto mosusu. Ayebisaki bato te ete azali Nzambe. Anzelu Gabriele ayebisaki Malia ete Yesu akobengama Mwana ya Nzambe. Yesu ye moko alobaki ete azali Mwana ya Nzambe. Alobaki te ete ayebi makambo mingi koleka Tata na ye. Alobaki nde boye: “Tata aleki ngai.”​—Yoane 14:28.

Ata na likoló, ntango Tata na ye azalaki kopesa ye mosala asala, Yesu azalaki kosala yango. Azalaki te kondima ete akosala yango mpe na nsima asala eloko mosusu. Alingaki Tata na ye. Yango wana ayokaki makambo oyo Tata na ye ayebisaki ye. Na nsima, ntango Yesu ayaki awa na mabelé, asalaki makambo oyo Tata na ye ya likoló atindaki ye asala. Alekisaki ntango na ye na makambo mosusu te. Yango wana, Yehova asepelaka na Mwana na ye!

Biso mpe tolingi kosepelisa Yehova, ezali bongo te?— Na bongo, tosengeli komonisa ete tozali mpenza koyoka Nzambe ndenge Yesu azalaki koyoka ye. Nzambe asalelaka Biblia mpo na koloba na biso. Ekozala malamu te soki tolobi ete toyokaka Nzambe, nzokande tondimaka mpe tosalaka makambo oyo eyokani na Biblia te, ezali bongo te?— Kobosana te, tokozala na esengo ete tozali kosepelisa Yehova kaka soki tolingi ye mpenza.

Sikoyo tángá bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo elobeli makambo ya Yesu oyo tosengeli koyeba mpe kondima: Matai 7:21-23; Yoane 4:25, 26; mpe 1 Timote 2:5, 6.