Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 34

Tokokóma ndenge nini soki tokufi?

Tokokóma ndenge nini soki tokufi?

OYEBI malamu ete lelo oyo bato bakómaka mibange, babɛlaka, mpe bakufaka. Ata bana mpe bakufaka. Osengeli kobanga liwa to mpe moto moko oyo akufi?— Mpo na yo, tokómaka ndenge nini soki tokufi?—

Lelo oyo, ezali na moto moko te oyo akufaki mpe azongaki na bomoi mpo na koyebisa biso ndenge tokómaka soki tokufi. Kasi ntango Yesu, Moteyi Monene, azalaki awa na mabelé, ezalaki na mobali moko oyo akufaki mpe azongaki na bomoi. Soki totángi lisolo ya mobali yango, tokoki koyeba oyo ekómelaka bato oyo bakufá. Mobali yango azalaki moninga ya Yesu mpe azalaki kofanda na Betania, engumba moko moke oyo ezalaki penepene na Yelusaleme. Nkombo ya mobali yango Lazalo, mpe azalaki na bandeko basi mibale, Malata ná Malia. Tiká tótánga oyo Biblia elobi mpo na likambo yango.

Mokolo moko Lazalo abɛli makasi. Na ntango yango, Yesu azali mosika, azali na engumba wana te. Yango wana, Malata ná Malia batindi moto moko akende koyebisa Yesu ete ndeko na bango, Lazalo, azali kobɛla. Basali bongo mpo bayebi ete Yesu akoki koya kobikisa ndeko na bango. Yesu azali monganga te, kasi azali na nguya oyo Nzambe apesá ye mpo akoka kobikisa bato oyo bazali na maladi ya ndenge na ndenge.​—Matai 15:30, 31.

Nzokande, liboso Yesu akende kotala Lazalo, maladi ya Lazalo eyei mpenza makasi mpe akufi. Ata bongo, Yesu ayebisi bayekoli na ye ete Lazalo alali mpɔngi mpe Ye akokende kuna mpo na kolamwisa ye. Bayekoli bakangi mpenza ntina ya maloba wana ya Yesu te. Na bongo, Yesu alobi polele ete: “Lazalo akufi.” Yango emonisi nini mpo na liwa?— Emonisi ete liwa ezali lokola mpɔngi moko ya makasi. Ezali mpenza mpɔngi moko ya makasi oyo moto akoki ata kolɔta ndɔtɔ te.

Sikoyo Yesu ayei kotala Malata ná Malia. Ebele ya baninga ya libota wana basili koya. Bayei kobɔndisa bandeko basi wana mibale mpo ndeko na bango akufi. Ntango Malata ayoki ete Yesu azali koya, akei kokutana na ye. Na mbala moko, Malia mpe abimi mpo akende komona Yesu. Malia azali na mawa makasi, azali kolela mpe akwei na makolo ya Yesu. Baninga mosusu oyo balandi Malia, bango mpe bazali kolela.

Moteyi Monene atuni epai wapi batye Lazalo. Na yango, bato bakei kotika Yesu na lilita oyo bakundaki Lazalo. Ntango Yesu amoni bato nyonso bazali kolela, ye mpe abandi kolela. Azali kolela mpo ayebi mpasi oyo bato bayokaka soki moto oyo balingaka akufi.

Libanga moko ezali na monɔkɔ ya lilita yango, na bongo Yesu alobi ete: “Bólongola libanga.” Ebongi nde bálongola yango?— Malata amoni ete likanisi ya kolongola libanga ezali malamu te. Alobi ete: “Nkolo, sikoyo asengeli kolumba nsolo, mpo esali mikolo minei.”

Kasi Yesu alobi na ye: “Nayebisaki yo te ete soki okondima okomona nkembo ya Nzambe?” Yesu alingi koloba ete Malata akomona likambo moko oyo ekopesa Nzambe lokumu. Likambo nini Yesu akosala? Ntango balongoli libanga, Yesu abondeli Yehova na mongongo makasi. Na nsima, Yesu alobi na mongongo makasi ete: “Lazalo, bimá!” Akobima mpenza? Azali nde na likoki ya kobima?—

Okoki kolamwisa moto oyo alali mpɔngi?— Ɛɛ, akoki kolamuka soki obengi ye na mongongo makasi. Kasi okoki kolamwisa moto oyo akufi?— Te. Ata obengi na mongongo makasi ndenge nini, moto oyo akufi akoyoka te. Lelo oyo, ezali na eloko moko te oyo ngai ná yo to mpe moto mosusu awa na mabelé tokoki kosala mpo na kolamwisa bato oyo bakufá.

Yesu asalaki nini mpo na Lazalo?

Kasi Yesu azali moto ya ndenge mosusu. Nzambe apesá ye nguya ya ndenge mosusu. Yango wana ntango Yesu abengi Lazalo, likambo moko ya kokamwa esalemi. Mobali oyo asili kokufa esali mikolo minei abimi na lilita! Azongi na bomoi! Akoki lisusu kopema, kotambola mpe koloba! Ɛɛ, Yesu asekwisi Lazalo.​—Yoane 11:1-44.

Sikoyo kanisá naino: Lazalo akómaki ndenge nini ntango akufaki? Ezali nde na eteni mosusu ya nzoto na ye, na ndakisa—molimo to elimo—oyo etikaki nzoto na ye mpe ekendaki kofanda epai mosusu? Molimo ya Lazalo ekendaki nde na likoló? Na mikolo minei yango, azalaki nde na bomoi na likoló elongo na Nzambe ná baanzelu basantu?—

Te, azalaki kuna te. Kobosana te, Yesu alobaki ete Lazalo alalaki nde mpɔngi. Okómaka ndenge nini ntango olali mpɔngi? Ntango olali mpɔngi ya makasi mpenza, oyebaka te makambo oyo elekaka, ezali bongo te?— Mpe ntango olamuki, soki otali naino montre te, okoyeba te ngonga boni olekisi na mpɔngi.

Ezali kaka bongo mpo na bato oyo bakufá. Bayebi eloko te. Bayokaka mpe eloko te. Bakoki mpe kosala eloko te. Lazalo azalaki ndenge wana ntango oyo akufaki. Liwa ezali lokola mpɔngi moko ya makasi oyo moto akoki koyeba lisusu likambo te. Biblia elobi ete: ‘Bato oyo bakufá bayebi likambo te.’​—Mosakoli 9:5, 10.

Lazalo akómaki ndenge nini ntango akufaki?

Kanisá mpe likambo oyo: Soki Lazalo azalaka na likoló na mikolo wana minei, alingaki alobela makambo ya likoló te?— Mpe soki azalaka na likoló, Yesu alingaki alongola ye na esika kitoko wana mpo na kozongisa ye awa na mabelé?— Soki moke te!

Nzokande, bato mingi balobaka ete biso tozali na molimo, mpe balobaka ete soki nzoto ekufi molimo etikalaka na bomoi. Balobaka ete molimo ya Lazalo ezalaki na bomoi epai mosusu. Kasi Biblia elobi bongo te. Yango elobi ete Nzambe asalaki moto ya liboso Adama “molimo ya bomoi.” Adama azalaki molimo. Biblia elobi lisusu ete ntango Adama asalaki lisumu, akufaki. Akómaki “molimo oyo ekufi,” mpe azongaki na putulu oyo basalaki ye na yango. Biblia elobi mpe ete bana nyonso ya Adama bazwaki libula ya lisumu mpe ya liwa.​—Genese 2:7; 3:17-19; Mituya 6:6NW; Baloma 5:12.

Na bongo, ezali solo ete biso tozali na molimo te oyo ekabwanaka na nzoto na biso. Mokomoko na biso azali molimo. Mpe lokola Adama, moto ya liboso, atikelá bato lisumu, Biblia elobi ete: ‘Molimo oyo esali lisumu ekokufa.’​—Ezekiele 18:4.

Mpo na nini tosengeli te kobanga bato oyo bakufá?

Bato mosusu babangaka bato oyo bakufá. Balingaka te kokende pene na esika lilita ezali mpo bakanisaka ete bato oyo bakufá bazali na molimo oyo ekabwanaka na nzoto na bango, mpe ekoki kosala bato ya bomoi mabe. Kasi moto oyo akufá akoki nde kosala moto ya bomoi mabe?— Te, ata moke te.

Bato mosusu kutu bandimaka ete bato oyo bakufá bakoki kozonga lokola bilimo mpo na kotala bato oyo bazali na bomoi. Yango wana bapesaka bato oyo bakufá biloko ya kolya. Kasi bato oyo basalaka bongo bandimaka mpenza te oyo Nzambe alobaka na ntina na bato oyo bakufá. Soki tondimaka oyo Nzambe alobaka, tokoki kobanga bato oyo bakufá te. Mpe soki tozali mpenza na botɔndi epai ya Nzambe mpo na bomoi, tokomonisa yango na kosaláká makambo oyo esepelisaka ye.

Kasi ntango mosusu okomituna: ‘Nzambe akozongisa bana oyo basili kokufa na bomoi? Alingaka mpenza kozongisa bango na bomoi?’ Tiká tólobela yango na mokapo oyo elandi.

Tótánga mikapo mosusu ya Biblia ndenge bato bakómaka soki bakufi mpe oyo emonisi ete moto azali molimo: Nzembo 115:17; 146:3, 4; mpe Yilimia 2:34.