Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 33

Yesu akoki kobatela biso

Yesu akoki kobatela biso

NTANGO Yesu akolaki mpe ayaki koyeba ndenge babatelaki ye ntango azalaki mwana moke, okanisi ete abondelaki Yehova mpo na kopesa ye matɔndi?— Mpo na yo, Yesu akokaki koloba nini na nsima epai ya Malia mpe Yozefe ntango ayaki koyeba ete babikisaki bomoi na ye na ndenge bamemaki ye na Ezipito?—

Ya solo, lelo oyo Yesu azali lisusu mwana moke te. Azali lisusu kutu na bomoi awa na mabelé te. Nzokande, lelo oyo bato mosusu bazwaka Yesu ete azali kaka mwana moke alali na elyelo ya bibwɛlɛ, ezali bongo te?— Na bamboka mingi, na ntango ya Noɛlɛ, bamonisaka Yesu na bililingi lokola mwana moke mpenza.

Atako Yesu azali lisusu na bomoi awa na mabelé te, okanisi ete ye azali na bomoi?— Ɛɛ, asekwaki, mpe lelo oyo azali Mokonzi moko ya nguya na likoló. Mpo na yo, ndenge nini abatelaka bato oyo bazali kosalela ye?— Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki ete akoki kobatela baoyo bazalaki kolinga ye. Tiká tótala ndenge asalaki yango mokolo moko ntango azalaki elongo na bayekoli na ye na masuwa.

Mpokwa epusani mpenza. Yesu auti koteya mokolo mobimba pene na Mbu ya Galilai, oyo ezali soki na molai ya kilomɛtrɛ 20 mpe monene ya kilomɛtrɛ 12. Sikoyo alobi na bayekoli na ye ete: “Tókatisa na ngámbo mosusu ya laki.” Na bongo, bakɔti na masuwa mpe babandi kokatisa laki. Yesu alɛmbi makasi, yango wana akei na nsima mpe alali likoló ya kuse. Na mbala moko, alali mpɔngi makasi.

Bayekoli balali te, bazali kaka kotambwisa masuwa. Eloko moko ya kobanga ezali te mpo na mwa ntango, kasi na mbala moko mopɛpɛ moko ya makasi eyei. Epɛpi makasi koleka, mpe mbonge ezali komata se komata. Mbonge yango ebandi kokɔta na masuwa, mpe masuwa ebandi kotonda na mai.

Bayekoli babangi ndenge balingi kozinda. Kasi Yesu azali kobanga te. Alali kaka mpɔngi na nsima ya masuwa. Nsukansuka, bayekoli balamwisi ye, mpe balobi ete: ‘Moteyi, Moteyi, bikisá biso; tolingi tókufa na mopɛpɛ makasi oyo.’ Na yango, Yesu alamuki mpe alobi na mopɛpɛ mpe na mbonge ete: “Fandá nyɛɛ! Tiká makɛlɛlɛ!”

Na mbala moko mopɛpɛ etiki kopɛpa, mpe laki ekómi nyɛɛ. Bayekoli bakamwi. Bamoná naino likambo ya boye te. Babandi kolobana ete: “Ye azali mpenza nani, mpo azali kopesa mitindo ata na mipɛpɛ mpe mai, mpe yango ezali kotosa ye?”​—Luka 8:22-25; Malako 4:35-41.

Oyebi soki Yesu azali nani?— Oyebi epai wapi azwi nguya monene wana?— Bayekoli basengelaki te kobanga ntango Yesu azali elongo na bango, mpo Yesu azalaki moto ya ndenge mosusu. Azalaki na likoki ya kosala makambo ya kokamwa oyo moto mosusu akoki kosala yango te. Tiká ngai nayebisa yo likambo mosusu oyo asalaki na mai monene ntango etombokaki.

Likambo yango esalemi mokolo mosusu. Ntango mpokwa ekómi, Yesu ayebisi bayekoli na ye bákɔta na masuwa mpe bákende liboso na ye na ngámbo mosusu. Na nsima Yesu amati na ngomba ye moko. Ezali esika moko ya kimya, epai akoki kobondela Tata na ye, Yehova Nzambe.

Bayekoli bakɔti na masuwa mpe babandi kokatisa mai yango. Kasi nokinoki mopɛpɛ ebandi kopɛpa. Epɛpi makasi koleka. Sikoyo butu ekómi. Mibali yango bakitisi elamba ya masuwa mpe babandi kolúka na nkai. Kasi bazali kokoka kotambola te mpo mopɛpɛ makasi ezali kopesa bango nzela te. Masuwa ezali koningana epai na epai na mbonge wana ya monene, mai ezali kobɛta mpe ezali kokɔta. Mibali yango basali nyonso mpo bákóma na esika bakoki kosɛma, kasi bazali kokoka te.

Yesu azali kaka ye moko na ngomba. Aumeli kuna. Kasi sikoyo amoni ete bayekoli na ye bazali na likama na kati ya mbonge wana ya monene. Yango wana akiti na ngomba akei tii na pembeni ya mai. Yesu alingi asalisa bayekoli na ye, yango wana abandi kotambola likoló ya mai wana ezali kotomboka mpo akende epai bango bazali!

Ekosuka boni soki omeki kotambola likoló ya mai?— Okoki kozinda, mpe okoki kokufa . Kasi ezali bongo te mpo na Yesu. Ye azali na nguya ya ndenge mosusu. Yesu asengeli kotambola ntaka molai mpo na kokóma epai masuwa ezali. Na bongo, ezali ntango ntɔngɔ elingi kotana nde bayekoli bamoni Yesu azali kotambola likoló ya mai mpo na koya epai bango bazali. Likambo oyo bazali kondima elekeli bango. Babangi makasi, mpe babandi koganga. Na nsima Yesu alobi na bango ete: “Bózala na mpiko, ezali ngai; bóbanga te.”

Kaka ntango Yesu amati na masuwa, mopɛpɛ wana ya makasi etiki kopɛpa. Bayekoli bakamwi lisusu. Bakwei liboso na ye mpe balobi ete: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.”​—Matai 14:22-33; Yoane 6:16-21.

Kozala na bomoi na ntango wana mpe komona ndenge Yesu azali kosala makambo ya ndenge wana, elingaki kozala likambo moko ya kosepelisa, ezali bongo te?— Oyebi mpo na nini Yesu azalaki kosala makambo wana ya kokamwisa?— Asalaki makambo wana mpo alingaki bayekoli na ye mpe asepelaki kosalisa bango. Kasi asalaki mpe makambo wana mpo na komonisa nguya monene oyo azalaki na yango, nguya oyo akosalela mpe na mikolo ezali koya lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe.

Kutu, ata lelo oyo, mbala mingi Yesu asalelaka nguya na ye mpo na kobatela bayekoli na ye liboso ya milende oyo Satana azali kosala mpo na kopekisa bango bátika koyebisa bato mosusu makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Kasi Yesu azali te kosalela nguya na ye mpo na kobatela bayekoli na ye ete bábɛla te to mpo na kobikisa bango ntango babɛli. Kutu, nsukansuka, bantoma nyonso ya Yesu bakufaki. Ata Yakobo, ndeko ya Yoane, babomaki ye, mpe batyaki Yoane ye moko na bolɔkɔ.​—Misala 12:2; Emoniseli 1:9.

Ezali kaka bongo lelo oyo. Bato nyonso, ezala baoyo basalelaka Nzambe to baoyo basalelaka ye te, bango nyonso bakoki kobɛla mpe kokufa. Kasi mosika te, na ntango Yesu akoyangela lokola Mokonzi ya guvɛrnema ya Nzambe, makambo ekozala ndenge mosusu. Na ntango wana, moto moko te akozala na kobanga, mpamba te Yesu akosalela nguya na ye mpo na kopambola bato nyonso oyo batosaka ye.​—Yisaya 9:6, 7.

Mikapo mosusu oyo ezali komonisa nguya monene oyo Yesu azali na yango lokola Mokonzi oyo Nzambe atye na Bokonzi ya Nzambe, ezali bongo Danyele 7:13, 14; Matai 28:18; mpe Baefese 1:20-22.