Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 15

Yesu asali likamwisi na ye ya liboso

Yesu asali likamwisi na ye ya liboso

YOANE 2:1-12

  • FƐTI YA LIBALA NA KANA

  • YESU ABONGOLI MAI VINYO

Eleki sikoyo mikolo misato banda Natanaele akómi na molɔngɔ ya bayekoli ya liboso ya Yesu. Yesu ná bayekoli na ye mosusu ya liboso bazali kokende na nɔrdi ya etúká ya Galile mosika te na esika bautá. Bazali kokende na engumba ya Kana esika Natanaele autá. Kana ezali na nɔrdi ya bangomba ya Nazarete, esika Yesu akolá. Babengisi bango na fɛti moko ya libala na Kana.

Mama ya Yesu mpe ayei na fɛti yango. Lokola Maria azali moninga ya libota ya bato oyo babalani, emonani ete azali mpe na mosala ya koyamba ebele ya bapaya oyo bayei na fɛti yango. Mpe ntango vinyo esili, mbala moko amoni yango mpe akei koyebisa Yesu ete: “Bazali na vinyo te.”​—Yoane 2:3.

Emonani ete Maria azali kosɛnga Yesu asala mwa eloko lokola vinyo ezangi. Mpo na komonisa ete alingi te, Yesu asaleli maloba oyo: “Mwasi, ngai na yo likambo nini?” (Yoane 2:4) Lokola Yesu azali Mokonzi oyo Nzambe atye, esengeli Tata na ye ya likoló atambwisa makambo na ye, kasi te bato ya libota to baninga na ye. Na bwanya nyonso, Maria atiki makambo nyonso epai ya mwana na ye mpe ayebisi basali ete: “Oyo nyonso akoyebisa bino, bósala.”​—Yoane 2:5.

Bazalaki na bilokó ya mai motoba oyo mokomoko na yango ezali na litrɛ 40. Yesu ayebisi basaleli ete: “Bótondisa bilokó wana na mai.” Na nsima abakisi ete: “Bótoka mwa ndambo sikoyo mpe bómemela yango mokambi ya fɛti.”​—Yoane 2:7, 8.

Mokambi ya fɛti akamwe ndenge vinyo yango ezali kitoko kasi ayebi te ete esalemi na ndenge ya likamwisi. Abengi mobali ya libala mpe ayebisi ye ete: “Moto nyonso abimisaka vinyo oyo eleki malamu liboso, mpe ntango bato balangwe, oyo ya malamu mingi te. Yo obombi vinyo oyo eleki kitoko tii sikoyo.”​—Yoane 2:10.

Wana ezali likamwisi ya liboso oyo Yesu asali. Ntango bayekoli na ye ya sika bamoni yango, kondima na bango ekómi makasi. Na nsima, Yesu, mama na ye mpe bandeko na ye bakei na engumba ya Kapernaume na nɔrdi-wɛsti ya bokula ya Mbu ya Galile.